Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

 LISOLO YA BOYEKOLI 24

Kweisá makanisi nyonso oyo ezali kotɛmɛla boyebi ya Nzambe!

Kweisá makanisi nyonso oyo ezali kotɛmɛla boyebi ya Nzambe!

“Tozali kokweisa makanisi mpe eloko nyonso etombwani oyo ezali kotɛmɛla boyebi ya Nzambe.”​—2 KO. 10:5.

LOYEMBO 124 Tótikala sembo

NA MOKUSE *

1. Toli nini ntoma Paulo apesaki bakristo oyo batyamaki mafuta na elimo?

NTOMA Paulo akomaki ete: “Bótika kolanda makambo ya ntango oyo.” (Rom. 12:2) Alobaki maloba wana epai ya bakristo ya siɛklɛ ya liboso. Mpo na nini apesaki toli wana ya polele epai ya mibali mpe basi oyo basilaki komipesa na Nzambe mpe batyamaki mafuta na elimo?​—Rom. 1:7.

2-3. Ndenge nini Satana alukaka kokabola biso na Yehova, kasi nini ekoki kosalisa biso tópikola makanisi oyo “epikamá makasi” na kati na biso?

2 Ntoma Paulo amitungisaki mpo ezalaki komonana lokola ete bakristo mosusu bakómaki kolanda makanisi ya mabe mpe filozofi ya mokili ya Satana. (Ef. 4:17-19) Likambo yango ekoki mpe kokómela biso. Mpo na kokabola biso na Yehova, Satana, nzambe ya makambo ya ntango oyo, azali kosalela mayele ndenge na ndenge. Na ndakisa, soki tozalaka na mwa mposa ya kozwa lokumu to kokóma bato minene, akosalela yango mpo na kokabola biso na Yehova. Akoki kutu kosalela makambo oyo eyokani na ndenge oyo tobɔkwamá, mimeseno ya mboka na biso, to makambo oyo bateyá biso mpo na kotinda biso tóbanda kokanisa lokola ye.

3 Nini ekoki kosalisa biso tópikola makanisi “oyo epikamá makasi” kati na biso? (2 Ko. 10:4) Talá eyano oyo ntoma Paulo apesi: “Tozali kokweisa makanisi mpe eloko nyonso etombwani oyo ezali kotɛmɛla boyebi ya Nzambe; mpe tozali kokómisa likanisi nyonso mokangami mpo etosa Kristo.” (2 Ko. 10:5) Ya solo, Yehova akoki kosalisa biso tólongola makanisi ya mabe. Ndenge kaka nkisi ekoki kosilisa  maladi moko boye, Liloba ya Nzambe mpe ekoki kosalisa biso tólongola makanisi ya mokili ya Satana oyo ekɔtelá biso.

“BÓKÓMISA MAKANISI NA BINO MAKANISI YA SIKA”

4. Bambongwana nini mingi kati na biso tosalaki ntango tondimaki solo?

4 Kanisá lisusu bambongwana oyo osalaki ntango ondimaki solo ya Liloba ya Nzambe mpe ozwaki ekateli ya komipesa mpo na kosalela Yehova. Mpo na mingi kati na biso, yango esɛngaki mpe tótika kosala makambo ya mabe. (1 Ko. 6:9-11) Tozali mpenza na esengo ndenge Yehova asalisaki biso tótika makambo yango ya mabe!

5. Makambo nini mibale Baroma 12:2 esɛngi biso tósala?

5 Nzokande, tosengeli ata moke te komona ete mbongwana oyo tosalá ekoki. Ata soki totiká kosala masumu ya minene oyo tozalaki kosala liboso ya kozwa batisimo, tosengeli kokoba koboya eloko nyonso oyo ekoki kotinda biso tózongela lisusu makambo ya kala. Ndenge nini tokoki kosala yango? Paulo ayanoli boye: “Bótika kolanda makambo ya ntango oyo, kasi bóbongwana, bókómisa makanisi na bino makanisi ya sika.” (Rom. 12:2) Na yango, tosengeli kosala makambo mibale. Ya liboso, tosengeli ‘kotika kolanda’ makambo ya mokili oyo. Ya mibale, tosengeli ‘kobongwana,’ kokómisa makanisi na biso makanisi ya sika.

6. Maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 12:43-45 ezali koteya biso nini?

6 Kobongwana oyo Paulo azalaki kolobela ezali kaka ya libándá te. Etali mpe bomoto na biso mobimba ya kati. (Talá etanda “ Obongwaná to omimonisaka lokola obongwaná?”) Tosengeli kobongwana mpenza na kati, elingi koloba makanisi na biso, mayoki na biso, mpe bamposa na biso nyonso. Na yango, mokomoko na biso asengeli komituna boye: ‘Bambongwana oyo nazali kosala ezali kaka mpo bato  bámona ete nazali mokristo, to nazali mpenza kobongola makanisi mpe motema na ngai?’ Yesu amonisaki makambo oyo tosengeli kosala na maloba na ye oyo ezali na Matai 12:43-45. (Tángá.) Tokoki kozwa liteya ya ntina mingi na maloba yango: Tosengeli kosuka kaka te na kolongola makanisi ya mabe; tosengeli mpe kokɔtisa makanisi oyo esepelisaka Nzambe.

‘BÓKÓMISAMA SIKA NA KATI YA BOKASI OYO EZALI KOTAMBWISA MAKANISI NA BINO’

7. Ndenge nini tokoki kobongola ndenge na biso ya kokanisa?

7 Ekoki mpenza kosalema ete tóbongola ndenge na biso ya kokanisa? Liloba ya Nzambe epesi eyano oyo: “Bosengeli kokómisama sika na kati ya bokasi oyo ezali kotambwisa makanisi na bino, mpe bosengeli kolata bomoto ya sika oyo ezalisamaki na boyokani na mokano ya Nzambe na boyengebene mpe bosembo ya solo.” (Ef. 4:23, 24) Ya solo, tokoki kobongola ndenge na biso ya kokanisa, kasi kosala yango ezali pɛtɛɛ te. Tosengeli kosuka kaka te na kopekisa bamposa ya mabe mpe kotika kosala makambo ya mabe. Tosengeli mpe kobongola “bokasi oyo ezali kotambwisa makanisi na biso,” elingi koloba ndenge na biso ya kokanisa. Yango esɛngi kobongola makanisi na biso, bamposa na biso, mpe ntina oyo tosalaka likambo boye to boye. Kosala yango esɛngaka ntango nyonso milende.

8-9. Ndenge nini ndakisa ya ndeko mobali moko emonisi ntina ya kobongola ndenge na biso ya kokanisa?

8 Tótalela ndakisa ya ndeko mobali moko oyo azalaki moto ya mobulu liboso ayeba solo. Azalaki kolangwa masanga mpe kobunda; kasi atikaki makambo yango mpe azwaki batisimo. Yango ezalaki litatoli ya malamu na mwa mboka na bango. Kasi, mwa moke nsima ya batisimo na ye, akutanaki na komekama oyo akanisaki te. Mobali moko oyo alangwaki masanga ayaki na ndako na ye na mpokwa moko mpe alukaki kobundisa ye. Na ebandeli, ndeko na biso apekisaki mposa na ye ya kobunda. Kasi, nsukansuka ntango mobali yango afingaki Yehova, ndeko yango akangaki lisusu motema te. Abimaki mpe abɛtaki mobali yango. Mpo na nini asalaki bongo? Atako boyekoli na ye ya Biblia esalisaki ye apekisa mposa na ye ya kobunda, kasi alongaki naino te kobongola bokasi oyo ezalaki kotambwisa makanisi na ye. Na maloba mosusu, abongolaki te ndenge na ye ya kokanisa.

9 Atako bongo, ndeko mobali yango alɛmbaki te. (Mas. 24:16) Na lisalisi ya bankulutu, akobaki kokende liboso. Nsukansuka, akokisaki masɛngami mpe akómaki nkulutu. Na nsima, mokolo moko na mpokwa libándá ya Ndako ya Bokonzi, ndeko yango akutanaki na komekama oyo ekokanaki na oyo akutanaki na yango bambula liboso. Mobali moko oyo alangwaki masanga alingaki kobɛta nkulutu moko. Ndeko mobali yango asalaki nini? Na kimya nyonso mpe na komikitisa, asololaki na mobali oyo alangwaki, akitisaki ye motema, mpe asalisaki ye azonga ndako. Mpo na nini asalaki bongo? Ndeko na biso abongolaki bokasi oyo ezalaki kotambwisa makanisi na ye. Na kati na ye, akómaki moto ya kimya, ya komikitisa, mpe yango epesaki Yehova nkembo!

10. Kobongola ndenge na biso ya kokanisa esɛngi nini?

10 Kobongwana esalemaka na mokolo moko te; eyaka mpe kaka boye te. Ekoki kosɛnga ‘tósala makasi mpenza’ na boumeli ya bambula mingi. (2 Pe. 1:5) Bambongwana yango ekosalema kaka te mpo tosaleli Yehova bambula mingi. Tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo  na kobongola ndenge na biso ya kokanisa. Ezali na mwa makambo ya ntina oyo ekosalisa biso tósala yango. Tótalela makambo yango mosusu.

NDENGE YA KOBONGOLA BOKASI OYO ETAMBWISAKA MAKANISI NA BISO

11. Ndenge nini kobondela ekoki kosalisa biso tóbongola bokasi oyo etambwisaka makanisi na biso?

11 Kobondela ezali likambo ya liboso oyo tosengeli kosala. Tosengeli kobondela lokola mokomi ya nzembo ete: “Ee Nzambe, zalisá motema ya pɛto na kati na ngai, mpe tyá kati na ngai elimo ya sika, oyo ezali ngwi.” (Nz. 51:10) Tosengeli kondima ete ezali na ntina tóbongola bokasi oyo etambwisaka makanisi na biso mpe kosɛnga Yehova asalisa biso. Ndenge nini toyebi ete Yehova akosalisa biso tóbongola ndenge na biso ya kokanisa? Likambo oyo Yehova alakaki kosala mpo na Bayisraele oyo bazalaki motó makasi na eleko ya Ezekiele ekoki kolendisa biso; alobaki ete: “Nakopesa bango motema moko, mpe nakotya na kati na bango elimo ya sika; . . . mpe nakopesa bango motema ya mosuni, [elingi koloba motema ya botosi].” (Ezk. 11:19) Yehova asepelaki kosalisa Bayisraele bábongwana; asepelaka mpe kosalisa biso.

12-13. (a) Na kotalela Nzembo 119:59, tosengeli komanyola makambo nini? (b) Mituna nini osengeli komituna?

12 Komanyola ezali likambo ya mibale oyo tosengeli kosala. Wana tozali kotánga na likebi Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo, tosengeli kozwa ntango ya komanyola, to kokanisa na bozindo, mpo tómona makambo mpe makanisi oyo tosengeli kobongola. (Tángá Nzembo 119:59; Ebr. 4:12; Yak. 1:25) Tosengeli koluka koyeba soki tozalaka ata na mwa mposa moke ya kolanda filozofi ya bato. Tosengeli kondima bolɛmbu na biso na bosembo nyonso mpe kosala makasi mpo na kolongola yango.

13 Na ndakisa, omituna boye: ‘Nazali ata na mwa likunya to zuwa moke na kati ya motema na ngai?’ (1 Pe. 2:1) ‘Nazalaka na mwa lolendo mpo na ndenge oyo nabɔkwamá, kelasi natángá, to mbongo oyo nazali na yango?’ (Mas. 16:5) ‘Nazalaka na ezaleli ya kotyola bato oyo bazali te na biloko oyo nazali na yango to bato ya loposo mosusu?’ (Yak. 2:2-4) ‘Nabendamaka na biloko oyo ezali na mokili ya Satana?’ (1 Yoa. 2:15-17) ‘Nasepelaka na kominanola oyo elendisaka pite mpe mobulu?’ (Nz. 97:10; 101:3; Amo. 5:15) Biyano oyo okopesa na mituna yango ekoki komonisa bisika oyo osengeli kobongisa. Soki tolongi kolongola makanisi “epikamá makasi” oyo ekoki kozala na motema na biso, tokosepelisa Tata na biso ya likoló.​—Nz. 19:14.

14. Mpo na nini kopona baninga ya malamu ezali na ntina mingi?

14 Kopona baninga ya malamu ezali likambo ya misato oyo tosengeli kosala. Ezala toyebi yango to te, mbala mingi tolandaka makambo oyo baninga na biso basalaka. (Mas. 13:20) Na mosala to na kelasi, mbala mingi tozalaka na bato oyo bakosalisa biso te tókóma na makanisi oyo esepelisaka Nzambe. Kasi, tokoki kozwa baninga ya malamu na makita na biso ya lisangá. Kuna nde tokoki kolendisama mpo na ‘kozala na bolingo mpe kosala misala ya malamu.’​—Ebr. 10:24, 25.

‘TƐLƐMÁ NGWI NA KONDIMA’

15-16. Ndenge nini Satana alukaka kobongola makanisi na biso?

15 Kasi, kobosana te ete Satana azali na ekateli ya kobongola makanisi na biso. Asalelaka makanisi ya lolenge nyonso mpo na kobebisa makanisi na biso oyo eteyami na Liloba ya Nzambe.

 16 Satana azali kokoba kotuna motuna oyo atunaki Eva na elanga ya Edene ete: “Ezali mpenza solo ete Nzambe alobaki . . . ?” (Eba. 3:1) Na mokili oyo ya Satana, mbala mingi toyokaka mituna lokola oyo: ‘Ezali mpenza solo ete Nzambe andimaka te libala ya mibali na mibali to basi na basi? Ya solo mpenza Nzambe aboyi bósalaka fɛti ya Noele mpe ya mbotama? Nzambe na bino alingi mpenza ete bóboya kozongisa makila? Nzambe ya bolingo akoki mpenza kosɛnga yo okata boyokani na moto oyo olingaka mingi, kaka mpo alongolami na lisangá?’

17. Tosengeli kosala nini ntango batuni biso mituna mpo na mateya oyo tondimaka, mpe na kotalela Bakolose 2:6, 7, tokoki kozwa litomba nini?

17 Tosengeli mpenza kokangama na mateya oyo tondimaka. Soki tozali na mituna ya ntina mingi mpo na mateya oyo tondimaka, kasi toluki biyano na yango te, tokoki kokóma na bantembe makasi na motema na biso. Nsukansuka, bantembe yango ekoki kobebisa makanisi mpe kondima na biso. Na yango, tosengeli kosala nini? Liloba ya Nzambe esɛngi biso tóbongola makanisi na biso mpo tómindimisa, to tóyeba “mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.” (Rom. 12:2) Soki tozali koyekola mbala na mbala, tokondima ete mateya oyo toyekolaka na Biblia ezali solo, mpe ete mibeko ya Yehova ezali sembo. Na nsima, ndenge moko na nzete oyo ezali na misisa ya makasi, tokopikama makasi, ‘tokotɛlɛma ngwi na kondima.’​—Tángá Bakolose 2:6, 7.

18. Nini ekoki kosalisa biso tólongola makanisi ya mokili ya Satana oyo ekɔtelá biso?

18 Yo moko nde osengeli kosala makasi mpo otɛlɛma ngwi na kondima; yango wana kobá kobongola bokasi oyo etambwisaka makanisi na yo to ndenge na yo ya kokanisa. Bondeláká ntango nyonso; sɛngáká Yehova asalisa yo na elimo na ye. Manyoláká na mozindo; kobá kotalela makanisi na yo mpe ntina oyo osalaka makambo boye to boye. Luká baninga ya malamu; zaláká elongo na bato oyo bakosalisa yo obongola ndenge na yo ya kokanisa. Soki ozali kosala bongo, okolongola makanisi ya mokili ya Satana oyo ekɔtelá yo mpe okolonga kokweisa “makanisi mpe eloko nyonso etombwani oyo ezali kotɛmɛla boyebi ya Nzambe”​—2 Ko. 10:5.

LOYEMBO 50 Libondeli na ngai ya komipesa

^ par. 5 Ezala na ndenge ya malamu to ya mabe, makanisi na biso elandaka ndenge oyo tobɔkwamá, mimeseno ya mboka na biso, mpe makambo oyo bateyá biso. Mbala mosusu tomonaka ete makanisi mosusu ya mabe epikamá makasi mpenza na bomoto na biso. Lisolo oyo ekomonisa ndenge oyo tokoki kolongola makanisi nyonso ya mabe oyo tokoki kozala na yango.