Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yebá monguna na yo

Yebá monguna na yo

‘Toyebi malamu mayele ya Satana.’​—2 BAKORINTI 2:11.

NZEMBO: 150, 32

1. Nsima ya lisumu ya Adama ná Eva, makambo nini Yehova amonisaki polele mpo na monguna na biso?

ADAMA ayebaki ete nyoka akoki koloba te. Na yango, nsima ya koyeba ete nyoka asololaki na Eva, mbala mosusu amonaki ete ekelamu moko ya elimo nde asalelaki nyoka mpo na kosolola na Eva. (Ebandeli 3:1-6) Adama ná Eva bayebaki ekelamu yango te. Kasi Adama andimelaki moto oyo ayebaki te mpe atombokelaki Tata na ye ya likoló, Nzambe ya bolingo. (1 Timote 2:14) Mbala moko, Yehova abandaki komonisa polele makambo mingi etali monguna wana mabe mpe alakaki ete nsukansuka akobomama. Kasi Yehova amonisaki mpe ete kaka na ntango yango, ekelamu wana oyo alobaki na nzela ya nyoka akotɛmɛla baoyo balingaka Nzambe.​—Ebandeli 3:15.

2, 3. Ekoki kozala mpo na ntina nini Yehova amonisaki makambo mingi te mpo na Satana liboso Masiya aya?

2 Yehova ayebisá biso te nkombo ya anzelu oyo atombokelaki ye. * Mpo na komonisa ndimbola ya nkombo ya monguna yango  Nzambe amonaki malamu kozela mbula 2 500 kobanda botomboki esalemaki na Edene. (Yobo 1:6) Nzokande, kaka mikanda misato ya Makomami ya Ebre na ndakisa 1 Ntango, Yobo mpe Zekaria elobeli Satana, nkombo oyo elimboli “Motɛmɛli.” Mpo na nini Makomami emonisaki makambo mingi te etali monguna yango liboso Masiya aya?

3 Na Makomami ya Ebre Yehova akomisá makambo mingi te etali Satana mpe makambo oyo asalaka. Kutu, mokano ya Makomami ya Ebre ezalaki ya kosalisa bato báyeba Masiya mpe bámekola ye. (Luka 24:44; Bagalatia 3:24) Ntango Masiya ayaki, Yehova asalelaki ye mpe bayekoli na ye mpo na komonisa makambo mingi etali Satana mpe baanzelu oyo balandaki ye. * Yango ebongi mpenza, mpo Yehova akosalela Yesu ná bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpo na koboma Satana mpe baoyo balandaka ye.​—Baroma 16:20; Emoniseli 17:14; 20:10.

4. Mpo na nini tosengeli te kolɛnga na nsɔmɔ liboso ya Zabolo?

4 Ntoma Petro alobeli Satana Zabolo lokola “nkɔsi oyo ezali koganga,” mpe Yoane abengi ye “nyoka” mpe “dragɔ.” (1 Petro 5:8; Emoniseli 12:9) Kasi, tosengeli te kolɛnga na nsɔmɔ liboso ya Zabolo mpo nguya na ye ezali na ndelo. (Tángá Yakobo 4:7.) Yehova, Yesu, mpe baanzelu ya sembo babatelaka biso. Na lisalisi na bango, tokoki kotɛmɛla monguna na biso. Kasi tosengeli kozwa biyano na mituna misato oyo ya ntina: Mayele nini Satana asalelaka mpo na kokosa bato? Ndenge nini Satana alukaka kokosa bato? Mpe makambo nini akoki kosala te? Tózwa biyano na mituna yango mpe tómona mateya tokoki kozwa.

MAYELE NINI SATANA ASALELAKA MPO NA KOKOSA BATO?

5, 6. Mpo na nini ata guvɛrnema moko te ya bato ekoki kokokisa bamposa oyo bato bazali na yango mpenza?

5 Baanzelu ebele balandaki Satana mpe batombokelaki Nzambe. Liboso ya Mpela, Satana asalelaki baanzelu mosusu mpo básangisa nzoto na basi. Biblia elobeli yango na ndenge ya elilingi ntango elobi ete dragɔ abwakami uta na likoló mpe azali kobenda moko ya bandambo misato ya minzoto. (Ebandeli 6:1-4; Yuda 6; Emoniseli 12:3, 4) Ntango baanzelu wana basundolaki libota ya Nzambe, bango moko baponaki kokóma na nse ya bokonzi ya Satana. Tókanisa te ete baanzelu wana babongisami malamu te. Satana amekolá ndenge Bokonzi ya Nzambe ebongisamá. Amikómisá mokonzi. Atyá bademo na guvɛrnema na ye, akabolelá bango bokonzi, mpe atyá bango báyangela mokili.​—Baefese 6:12.

6 Satana asalelaka ebongiseli na ye mpo na koyangela baguvɛrnema ya mokili mobimba. Likambo yango emonanaki polele ntango alakisaki Yesu “makonzi nyonso ya mabele esika bato bafandi,” mpe alobaki na ye ete: “Nakopesa yo bokonzi oyo nyonso mpe nkembo na yango, mpamba te bapesá ngai yango, mpe napesaka yango na moto oyo nalingi.” (Luka 4:5, 6) Kasi, baguvɛrnema mingi lelo esalaka makambo ya malamu mpo na bato, mpe bakonzi mosusu bazalaka mpenza na mposa ya kosalisa bato. Kasi ata mokonzi moko te akoki kokokisa bamposa oyo bato bazali na yango mpenza.​—Nzembo 146:3, 4; Emoniseli 12:12.

7. Longola kosalela baguvɛrnema, ndenge nini Satana asalelaka mangomba ya lokuta mpe ebongiseli ya mombongo? (Talá elilingi ya ebandeli.)

7 Satana ná bademo na ye basalelaka mpe mangomba ya lokuta ná ebongiseli ya mombongo mpo na kokosa “mabele mobimba  esika bato bafandi.” (Emoniseli 12:9) Satana asalelaka mangomba ya lokuta mpo na kopalanganisa makambo oyo ezali solo te na oyo etali Yehova, mpe alukaki kutu kozipa nkombo ya Nzambe. (Yirimia 23:26, 27) Yango esali ete bato mosusu ya mitema sembo bákanisa ete basambelaka Nzambe, nzokande basambelaka bademo. (1 Bakorinti 10:20; 2 Bakorinti 11:13-15) Satana asalelaka mpe bato ya mombongo mpo na kopalanganisa lokuta na mokili, na ndakisa balobaka ete mbongo mpe biloko ya mokili nde epesaka bato esengo. (Masese 18:11) Bato oyo bandimaka likambo yango balekisaka bomoi na bango mpo na kosalela “Bomɛngo,” na esika ya kosalela Nzambe. (Matai 6:24) Ata soki liboso bazalaki kolinga Nzambe, bolingo na bango mpo na biloko ya mokili ekómaka makasi mpenza mpe bolingo na bango mpo na Nzambe esilaka.​—Matai 13:22; 1 Yoane 2:15, 16.

8, 9. (a) Mateya nini mibale tokoki kozwa na lisolo ya Adama ná Eva mpe baanzelu oyo batombokaki? (b) Mpo na nini ezali malamu tóyeba ete Satana nde azali koyangela mokili?

8 Tokoki kozwa mateya mibale ya ntina mingi na makambo Adama ná Eva basalaki mpe na botomboki ya baanzelu. Ya liboso, ezali kaka na ngámbo mibale mpe tosengeli kopona moko: Kotikala sembo epai ya Yehova to komitya na ngámbo ya Satana. (Matai 7:13) Ya mibale, baoyo baponaka ngámbo ya Satana matomba oyo bazwaka ezalaka mpo na ntango mokuse. Adama ná Eva bazwaki libaku ya kopona bango moko nini ezali malamu mpe nini ezali mabe. Mpe bademo bazwá mwa bokonzi likoló ya baguvɛrnema nyonso ya bato. (Ebandeli 3:22) Kasi, kopona ngámbo ya Satana ebimisaka ntango nyonso mikakatano. Ememaka bolamu ya solosolo te!​—Yobo 21:7-17; Bagalatia 6:7, 8.

9 Mpo na nini ezali malamu tóyeba ete Satana nde azali koyangela mokili? Mpo yango ekosalisa biso tózala na makanisi ebongi mpo na baguvɛrnema mpe ekotinda biso tókoba kosakola nsango malamu. Toyebi ete Yehova alingi ete tótosaka baguvɛrnema. (1 Petro 2:17) Alingi ete tótosaka mibeko oyo batye soki ebuki mitinda na ye te. (Baroma 13:1-4) Lisusu, toyebi ete tosengeli kokɔta te na makambo ya politiki mpe kopesa mabɔkɔ te na ebongiseli moko ya politiki to mokonzi moko. (Yoane 17:15, 16; 18:36) Lokola toyebi ete Satana azali koluka kozipa nkombo ya Yehova mpe kobebisa lokumu na ye, tosalaka nyonso oyo tokoki mpo na koteya bato solo etali Nzambe. Ezali mpenza lokumu monene kobengama na nkombo na ye mpe kosalela yango. Kolinga Nzambe ezali na motuya mingi koleka bolingo ya mbongo to ya biloko.​—Yisaya 43:10; 1 Timote 6:6-10.

 NDENGE NINI SATANA ALUKAKA KOKOSA BATO?

10-12. (a) Mbala mosusu Satana asalelaki mitambo nini mpo na kobenda baanzelu mosusu? (b) Liteya nini tozwi na likambo baanzelu wana basalaki?

10 Satana asalelaka mayele ndenge na ndenge mpo na kokosa bato. Mpo bato básala makambo alingi, mbala mosusu asalelaka motambo mpo ekanga bato mpe ntango mosusu alukaka konyokola bango.

11 Satana asalelaki motambo mpo na kobenda baanzelu ebele. Mbala mosusu azwaki ntango ya kotala bango malamu mpo na koyeba ndenge ya kobenda bango. Baanzelu mosusu bakangamaki na motambo na ye mpe basangisaki nzoto na basi. Bana oyo babotaki na basi yango bazalaki bilombe oyo bazalaki konyokola bato. (Ebandeli 6:1-4) Longola kokanga baanzelu na motambo ya pite, ekoki kozala ete Satana alakaki bango ete bakozala na nguya likoló ya bato nyonso. Na ndenge yango, Satana alukaki mbala mosusu kopekisa ete esakweli ya Yehova oyo elobeli ‘momboto mpe mwasi’ ekokisama. (Ebandeli 3:15) Kasi Yehova atikelaki ye nzela te. Ayeisaki Mpela mpe ebebisaki myango nyonso ya Satana mpe bademo.

Satana alukaka kobenda biso na motambo ya pite, lolendo, mpe makambo oyo eleki mayele ya bato (Talá paragrafe 12, 13)

12 Likambo yango eteyi biso nini? Eteyi biso ete pite mpe lolendo ezali mpenza mitambo ya makasi oyo Satana asalelaka. Baanzelu oyo balandaki Satana balekisaki bambula mingi elongo na Nzambe kuna na likoló! Atako bongo, mingi na bango bakolisaki bamposa mabe mpe bamposa yango ekómaki makasi mpenza. Tosengeli ntango nyonso koyeba ete ata soki tosali bambula boni na mosala ya Yehova, bamposa mabe ekoki kozwa esika na motema na biso. (1 Bakorinti 10:12) Na yango, tosengeli ntango nyonso koluka koyeba makambo oyo ezali na motema na biso mpe kolongola makanisi nyonso ya pite mpe ya lolendo!​—Bagalatia 5:26; tángá Bakolose 3:5.

13. Motambo nini mosusu Satana asalelaka, mpe ndenge nini tokoki kokima yango?

13 Motambo mosusu Satana asalelaka ezali mposa oyo bato bazalaka na yango ya koluka koyeba makambo oyo eleki mayele ya bato. Lelo oyo, asalelaka mangomba ya lokuta mpe kominanola mpo bato bákóma kosepela na misala ya bademo. Bafilme, masano ya video, mpe lolenge mosusu ya kominanola esalaka ete bato básepela na makambo oyo eleki mayele ya bato. Ndenge nini tokoki kokima motambo yango? Tókanisa te ete ebongiseli ya Nzambe ekosalela biso liste ya lolenge ya kominanola oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe. Tosengeli koteya lisosoli na biso mpo tózwa bikateli ya malamu oyo esimbami na mitinda ya Yehova. (Baebre 5:14) Lisusu, soki bolingo oyo tolingaka Nzambe ezali na “bokosi te,” tokozwa bikateli ya malamu. (Baroma 12:9)  Moto ya bokosi asalaka te makambo oyo alobaka. Na yango, ntango tolingi kopona kominanola moko, tokoki komituna boye: ‘Nasalelaka mitinda oyo nayebisaka basusu básalela? Bato oyo nayekolaka na bango Biblia mpe bato oyo nazongelaka na mosala ya kosakola bakoloba nini mpo na kominanola oyo naponi?’ Ntango tozali kosalela mitinda ya Biblia oyo toyebisaka basusu mpe básalela, ekozala mpasi te tókima mitambo ya Satana.​—1 Yoane 3:18.

Satana alukaka kobangisa biso na nzela ya bipekiseli ya baguvɛrnema, mitungisi ya baninga ya kelasi, mpe botɛmɛli ya bandeko ya libota (Talá paragrafe 14)

14. Ndenge nini Satana alukaka konyokola biso, mpe ndenge nini tokoki kotɛmɛla ye?

14 Satana asalelaka minyoko mpe alukaka kobangisa biso mpo tótikala sembo te epai ya Yehova. Na ndakisa, akoki kosalela baguvɛrnema mpo na kopekisa mosala ya kosakola. Akoki mpe kosalela baninga na biso ya mosala to ya kelasi mpo na kosɛka biso mpo totosaka mitinda ya Biblia. (1 Petro 4:4) Akoki kosalela bandeko na biso ya libota oyo bazali bandimi te, oyo bakoki kozala na makanisi malamu, kasi bakoki kopekisa biso kokende makita. (Matai 10:36) Tosengeli kosala nini mpo na kotɛmɛla minyoko ya Satana? Makaneli ya Satana ekamwisaka biso te, mpo toyebi ete abundisaka biso. (Emoniseli 2:10; 12:17) Likambo eleki ntina oyo tosengeli mpe kobosana te ezali ete Satana alobaki ete tosalelaka Yehova kaka soki makambo ezali malamu mpe tokotika Nzambe soki makambo ekómi mabe. (Yobo 1:9-11; 2:4, 5) Na yango, tosengeli ntango nyonso kosɛnga Yehova apesa biso makasi. Kobosana te ete Yehova akosundola biso ata mokolo moko te.​—Baebre 13:5.

LIKAMBO OYO SATANA AKOKI KOSALA TE

15. Satana akoki kotinda biso na makasi tósala likambo oyo tolingi te? Limbolá.

15 Satana akoki te kotinda bato na makasi básala likambo oyo balingi te. (Yakobo 1:14) Bato ebele na mokili bayebi kutu te ete bazali na ngámbo ya Satana. Kasi ntango moto ayekoli solo, asengeli kopona soki akozala na ngámbo ya Yehova to ya Satana. (Misala 3:17; 17:30) Soki tozali na ekateli ya kotosa Nzambe, Satana akoki te kobebisa bosembo na biso.​—Yobo 2:3; 27:5.

16, 17. (a) Makambo nini mosusu Satana ná bademo bakoki kosala te? (b) Mpo na nini tosengeli te kobanga kobondela Yehova na mongongo makasi?

16 Ezali na makambo mosusu oyo Satana ná bademo bakoki kosala te. Na ndakisa, Biblia elobi ata esika moko te ete bakoki koyeba makanisi to makambo oyo ezali na motema na biso. Kaka Yehova ná Yesu nde bakoki koyeba yango. (1 Samwele 16:7; Marko 2:8) Na yango, tosengeli nde kobanga ete soki tolobi to tosali libondeli na mongongo makasi, Zabolo ná bademo bakoyoka makambo na biso mpe bakosalela yango mpo na kosala biso mabe? Te! Mpo na nini? Atako Zabolo akoki komona biso, kasi yango ebangisaka biso te kosala makambo ya malamu na mosala ya Yehova. Ndenge moko mpe, tosengeli te kobanga kobondela na mongongo makasi mpo kaka Zabolo akoki koyoka biso. Lisusu, Biblia elobeli bandakisa mingi ya basaleli ya Nzambe oyo babondelaki na mongongo makasi, mpe ata mokolo moko te babangaki ete Zabolo ayoka bango. (1 Bakonzi 8:22, 23; Yoane 11:41, 42; Misala 4:23, 24) Soki tosali oyo tokoki mpo na koloba mpe kosala makambo oyo Nzambe alingi, tokoki kondimisama ete Yehova akotika te ete Zabolo asala biso mabe mpo na libela.​—Tángá Nzembo 34:7.

17 Tosengeli koyeba monguna na biso, kasi tosengeli kolɛnga te na nsɔmɔ liboso ye. Atako tozali bato ya kozanga kokoka, na lisalisi ya Yehova tokoki kolonga Satana! (1 Yoane 2:14) Soki totɛmɛli ye, akokima biso. (Yakobo 4:7; 1 Petro 5:9) Lelo oyo, emonani ete Satana azali kobundisa mingimingi bilenge. Ndenge nini bakoki kotɛmɛla Zabolo? Tokolobela yango na lisolo elandi.

^ par. 2 Biblia etángi bankombo ya baanzelu mosusu. (Basambisi 13:18; Danyele 8:16; Luka 1:19; Emoniseli 12:7) Elobi mpe ete Yehova apesá monzoto mokomoko nkombo. (Nzembo 147:4) Na yango, ebongi mpenza tóndima ete Yehova apesá anzelu nyonso nkombo ata mpe anzelu oyo na nsima akómaki Satana.

^ par. 3 Liloba “Satana” ezali mbala 18 na Makomami ya Ebre, kasi ezali komonana mbala 30 to koleka na Makomami ya Grɛki.