LISOLO YA BOYEKOLI 8
Mpo na nini komonisa botɔndi?
“Bózala na botɔndi.”—KOL. 3:15.
LOYEMBO 46 Totɔndi yo, Yehova
NA MOKUSE *
1. Ndenge nini Mosamaria oyo Yesu abikisaki amonisaki botɔndi?
EZALAKI na mibali zomi ya maba oyo bazalaki mpenza konyokwama mpe elikya ya kobika ezalaki te. Kasi mokolo moko, na mosika, bamonaki Yesu, Moteyi Monene. Bayoká nsango ete Yesu azalaki kobikisa maladi ya ndenge nyonso, mpe bandimaki ete akoki mpe kobikisa bango. Na yango, bagangaki ete: “Yesu, Molakisi, yokelá biso mawa!” Yesu abikisaki mibali yango nyonso zomi. Na ntembe te, bango nyonso bazalaki na botɔndi mpo na boboto ya Yesu. Kasi, moko na bango, asukaki kaka te na kozala na botɔndi, * amonisaki yango na maloba. Mobali yango, oyo azalaki Mosamaria, amonaki ete asengeli kokumisa Nzambe “na mongongo makasi.”—Luka 17:12-19.
2-3. (a) Mpo na nini tokoki kobosana komonisa botɔndi? (b) Tokotalela nini na lisolo oyo?
2 Ndenge moko na Mosamaria wana, tolingaka kopesa matɔndi ntango basaleli biso likambo ya boboto. Kasi mbala mosusu, tokoki kobosana komonisa botɔndi na biso na maloba to na misala.
3 Na lisolo oyo, tokotalela ntina ya komonisa botɔndi na maloba mpe na misala. Tokozwa mpe mateya na bandakisa ya bato mosusu oyo Biblia elobeli, baoyo bazalaki na botɔndi mpe baoyo bazangaki yango. Na nsima, tokolobela na bosikisiki ndenge oyo tokoki komonisa botɔndi.
MPO NA NINI TOSENGELI KOMONISA BOTƆNDI?
4-5. Mpo na nini tosengeli komonisa botɔndi?
4 Yehova apesi biso ndakisa na likambo etali komonisa botɔndi. Lolenge moko oyo amonisaka botɔndi ezali ete apambolaka bato oyo basepelisaka ye. (2 Sa. 22:21; Nz. 13:6; Mat. 10:40, 41) Biblia elendisi biso ‘tókóma bamekoli ya Nzambe, lokola bana ya bolingo.’ (Ef. 5:1) Na yango, ntina ya libosoliboso oyo tosengeli komonisa botɔndi ezali ete tolingi kolanda ndakisa ya Yehova.
5 Tótalela ntina mosusu oyo tosengeli komonisa botɔndi epai ya basusu. Botɔndi ezali lokola bilei ya kitoko; esepelisaka mingi koleka soki tokaboli yango na baninga. Soki toyebi ete bato mosusu bazali na botɔndi mpo na makambo oyo tosaleli bango, toyokaka esengo. Ntango biso mpe tomonisi botɔndi, basusu bakoyoka esengo. Moto oyo tomoniseli botɔndi akoyeba ete ebongaki mpenza asala milende mpo na kosalisa biso, to mpo na kopesa biso eloko oyo tosengelaki na yango. Yango ekosala ete boninga na biso ekóma lisusu makasi.
6. Bokokani nini ezali kati na maloba ya botɔndi mpe bapɔme oyo esalemi na wolo?
6 Komomisa botɔndi ezali na motuya mingi. Biblia elobi ete: “Liloba oyo elobami na ntango na yango ezali lokola bapɔme ya wolo na kati ya eloko ya mayemi ya palata.” (Mas. 25:11) Pɔme oyo basali na wolo mpe batye yango na eloko moko ya liyemi oyo esalemi na palata emonanaka kitoko! Mpe na ntembe te ezalaka na motuya! Okomiyoka ndenge nini soki bapesi yo likabo ya ndenge wana? Yebá ete maloba ya botɔndi oyo okoki koyebisa basusu ekoki kozala na motuya ndenge wana. Mpe kanisá naino: pɔme oyo basali na wolo ekoki koumela ntango molai mpenza. Ndenge moko mpe, soki omoniseli moto botɔndi ekoki kofanda na motema na ye mpe akoki kokanisaka yango bomoi na ye mobimba.
BAMONISAKI BOTƆNDI
7. Ndenge nini Davidi, na kotalela Nzembo 27:4, mpe bakomi mosusu ya nzembo bamonisaki botɔndi na bango?
7 Basaleli mingi ya Nzambe na ntango ya kala bamonisaki botɔndi. Moko na bango ezali Davidi. (Tángá Nzembo 27:4.) Davidi azalaki kozwa losambo ya pɛto na motuya mingi mpe amonisaki yango polele na misala na ye. Apesaki biloko mingi ya motuya lokola likabo mpo na kotongama ya tempelo. Mpe mpo na komonisa botɔndi, bakitani ya Asafe bakomaki nzembo ya lisanzoli. Na moko ya nzembo yango, bapesaki Yehova Nzambe matɔndi mpe balobaki ete esengeli kosakola ‘misala na ye ya kokamwa.’ (Nz. 75:1) Emonani polele ete Davidi mpe bakitani ya Asafe balingaki komonisa Yehova ete bazali mpenza kosepela na mapamboli nyonso oyo apesaki bango. Okoki kokanisa ndenge oyo yo mpe okoki komekola bakomi wana ya nzembo?
8-9. Ndenge nini ntoma Paulo amonisaki botɔndi epai ya bandeko, mpe na ntembe te ebotaki mbuma nini?
8 Ntoma Paulo azalaki kozwa bandeko na motuya mpe amonisaki yango na maloba na ye. Azalaki ntango nyonso kotɔnda Nzambe mpo na bango na mabondeli na ye. Lisusu, amonisaki botɔndi na ye ntango akomelaki bango. Na Baroma mokapo 16, kobanda vɛrsɛ ya liboso tii ya 15, ntoma Paulo atángi nkombo ya bandeko 27. Alobaki polele ete Priska ná Akila “batyaki bomoi na bango na likama” mpo na ye, mpe ete Foebe “asungaki bato mingi,” ata mpe ye moko Paulo. Apesaki longonya na bandeko yango nyonso oyo bazalaki kosala mosala makasi.—Rom. 16:1-15.
9 Ntoma Paulo ayebaki malamu ete bandeko yango bazali bato ya kozanga kokoka, kasi na nsuka ya mokanda na ye epai ya Baroma, amonaki malamu alobela nde bizaleli na bango ya malamu. Kanisá ndenge balendisamaki ntango maloba ya Paulo etángamaki na mongongo makasi na lisangá! Na ntembe te, yango esalaki ete boninga na bango na Paulo ekóma lisusu makasi. Yo mpe omonisaka botɔndi mbala na mbala mpo na makambo ya malamu oyo bandeko ya lisangá na bino balobaka mpe basalaka?
10. Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Yesu amonisaki botɔndi epai ya bayekoli na ye?
10 Ntango Yesu atindelaki masangá mosusu ya Azia Moke bansango, amonisaki botɔndi mpo na mosala oyo bayekoli na ye basalaki. Na ndakisa, na lisangá ya Tyatire abandaki na maloba oyo: “Nayebi makambo oyo osalaka, mpe bolingo na yo mpe kondima na yo mpe mosala na yo mpe ezaleli na yo ya koyika mpiko, nayebi mpe ete makambo oyo ozali kosala sikoyo ezali mingi koleka oyo ya kala.” (Em. 2:19) Yesu alobelaki kaka te ndenge mosala na bango ezalaki kokola, kasi apesaki bango mpe longonya mpo na bizaleli oyo etindaki bango básala makambo ya malamu. Atako esɛngaki ete Yesu apesa mwa batoli na lisangá ya Tyatire, maloba na ye ya ebandeli mpe ya nsuka ezalaki ya kolendisa. (Em. 2:25-28) Yesu azali Mokonzi ya lisangá. Na yango, asɛngisami te kopesa biso matɔndi mpo na mosala oyo tosali mpo na ye. Atako bongo, azangaka te komonisa botɔndi na ye. Ezali mpenza ndakisa malamu mpo na bankulutu!
BAZANGAKI BOTƆNDI
11. Na kotalela Baebre 12:16, ndenge nini Esau atalelaki makambo mosantu?
11 Likambo ya mawa, bato mosusu oyo Biblia elobeli bazangaki botɔndi. Na ndakisa, atako Esau abɔkwamaki na baboti oyo bazalaki kolinga mpe komemya Yehova, azangaki botɔndi mpo na makambo mosantu. (Tángá Baebre 12:16.) Ndenge nini ezaleli na ye ya kozanga botɔndi emonanaki polele? Esau akakatanaki te kotɛka lotomo na ye ya mwana ya liboso epai ya leki na ye Yakobo, kaka mpo na saani ya supu ya lantiye. (Eba. 25:30-34) Na nsima, Esau ayokaki mawa mpo na ekateli oyo azwaki. Kasi, lokola azalaki na botɔndi te mpo na oyo azalaki na yango, asengelaki komilela te ntango azwaki te lipamboli ya lotomo ya mwana ya liboso.
12-13. Ndenge nini Bayisraele bazangaki botɔndi, mpe yango ememaki nini?
12 Bayisraele bazalaki na bantina mingi ya komonisa botɔndi. Balongwaki na boombo nsima ya Malɔzi Zomi oyo Yehova atindaki na Ezipito. Na nsima, Nzambe abikisaki bango na likama na ndenge abebisaki mampinga nyonso ya Baezipito na Mbu Motane. Bayisraele bazalaki na botɔndi mingi mpe bayembaki loyembo ya bolongi mpo na kokumisa Yehova. Kasi bakobaki komonisa botɔndi te.
13 Ntango Bayisraele bakutanaki na mikakatano mosusu, babosanaki makambo nyonso ya malamu oyo Yehova asalelaki bango. Na nsima, kozanga botɔndi na bango emonanaki polele. (Nz. 106:7) Ndenge nini? Biblia elobi: “Liyangani mobimba ya bana ya Yisraele ebandaki koimaima mpo na Moize mpe Arona na esobe”; nzokande, baimaimaki nde mpo na Yehova. (Kob. 16:2, 8) Yehova ayokaki mawa mpo na kozanga botɔndi oyo bato na ye bamonisaki. Na nsima, alobaki ete Bayisraele yango nyonso bakokufa na esobe, longola kaka Yosua ná Kalebe. (Mit. 14:22-24; 26:65) Tótala sikoyo ndenge oyo tokoki koboya kolanda bandakisa wana ya mabe mpe komekola bandakisa ya malamu.
NDENGE YA KOMONISA BOTƆNDI LELO OYO
14-15. (a) Ndenge nini babalani bakoki komoniselana botɔndi? (b) Ndenge nini baboti bakoki koteya bana na bango bámonisaka botɔndi?
14 Na kati ya libota. Libota mobimba ezwaka matomba ntango moto mokomoko azali komonisa botɔndi. Soki babalani bazali komoniselana botɔndi, boyokani na bango ekokóma makasi. Mpe bakokakatana te kolimbisana. Mobali oyo asepelaka na mwasi na ye asukaka kaka te na komona makambo ya malamu oyo mwasi na ye alobaka mpe asalaka, kasi ‘atɛlɛmaka mpe akumisaka ye.’ (Mas. 31:10, 28) Mpe mwasi oyo azali na bwanya ayebisaka mobali na ye makambo ya sikisiki oyo asepelaka na yango epai na ye.
15 Baboti, ndenge nini bokoki koteya bana na bino bámonisaka botɔndi? Bóbosana te ete bana bakolanda makambo oyo bolobaka mpe oyo bosalaka. Na yango, bópesa ndakisa ya malamu; bópesaka bango matɔndi ntango basaleli bino makambo ya malamu. Lisusu,
bóteya bango bápesaka matɔndi ntango basusu basaleli bango makambo. Bósalisa bana bákanga ntina ete kopesa matɔndi eutaka na motema mpe ete maloba na bango ekoki kosala malamu mingi. Na ndakisa, mwasi moko na nkombo Clary alobi boye: “Ntango mama na biso azalaki na mbula 32, atikalaki ye moko ná bana misato ya kobɔkɔla. Ntango ngai mpe nakómaki na mbula 32, namityaki na esika ya mama mpe namonaki ete ezalaki mpasi kobɔkɔla bana ye moko na mbula wana. Na yango, nayebisaki ye ete nazali mpenza na botɔndi mpo na nyonso oyo amipimelaki mpo na kobɔkɔla ngai ná bandeko na ngai ya mibali. Mikolo oyo eleki, ayebisaki ngai ete abombá maloba na ngai na motema na ye, akanisaka yango mingi, mpe esalaka ete azala na esengo.”16. Pesá ndakisa oyo emonisi ete komonisa botɔndi ekoki kolendisa basusu.
16 Na kati ya lisangá. Ntango tozali komonisa botɔndi epai ya bandeko ya lisangá, yango elendisaka bango. Na ndakisa, Jorge, nkulutu moko oyo azali na mbula 28, abɛlaki makasi. Akokaki koya na makita te na boumeli ya sanza mobimba. Ata ntango azongelaki koya na makita, azalaki na likoki ya kosala masolo te. Jorge alobi boye: “Nazalaki komimona ntina te mpo nazalaki na makoki te ya kokokisa mikumba na ngai na lisangá. Kasi, mokolo moko nsima ya makita, ndeko mobali moko ayebisaki ngai ete: ‘Nalingi kopesa yo matɔndi mpo ozali ndakisa ya malamu mpo na libota na ngai. Tosepelaki mpenza na badiskur oyo osalaki na bambula oyo eleki. Esalisi biso tókóma na kondima makasi.’ Elekelaki ngai mpe mai ya miso ebimaki ngai. Nazalaki mpenza na mposa ya koyoka maloba ya ndenge wana.”
17. Na kotalela Bakolose 3:15, ndenge nini tokoki komonisa botɔndi epai ya Yehova mpo na biloko oyo apesaka biso?
17 Epai ya Nzambe na biso oyo akabaka. Yehova apesaka biso ebele ya bilei ya elimo. Na ndakisa, ateyaka biso makambo oyo ebongi na nzela ya makita, bazulunalo mpe basite Internet na biso. Esilá kokómela yo oyoka diskur moko, otánga lisolo moko, to otala eloko moko na TV JW mpe oloba na nse ya motema ete, ‘Nazalaki mpenza na mposa na yango’? Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi epai ya Yehova? (Tángá Bakolose 3:15.) Lolenge moko ya kosala yango ezali ya kobondela ye mbala na mbala mpo na kopesa ye matɔndi mpo na makabo yango ya kitoko.—Yak. 1:17.
18. Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na Ndako ya Bokonzi na biso?
18 Lisusu, tokomonisa botɔndi epai ya Yehova
soki tozali kobatela pɛto esika na biso ya losambo mpe kotika yango na molɔngɔ. Tosengeli mpe kopesa mabɔkɔ mbala na mbala na kopɛtola mpe kobongisa Ndako ya Bokonzi, mpe bandeko oyo basalelaka masini ya sono basengeli kosalela yango malamu mpenza. Soki tozali kobatela Ndako ya Bokonzi na biso malamu, ekoumela ntango molai mpe soki esɛngi kobongisa yango, ekozala na makambo mingi te ya minene. Na ndenge yango, tokosalisa na kobatela mbongo mpo na kotonga mpe kobongisa Bandako ya Bokonzi mosusu na mokili.19. Liteya nini ozwi na ndakisa ya mokɛngɛli ya zongazonga moko ná mwasi na ye?
19 Epai ya baoyo basalaka mosala makasi mpo na biso. Ntango topesi moto matɔndi, maloba na biso ekoki kobongola ndenge na ye ya kotalela mikakatano oyo azali na yango. Tótalela ndakisa ya mokɛngɛli ya zongazonga moko ná mwasi na ye. Nsima ya kosakola mokolo mobimba na malili makasi, bazongaki na ndako, nzoto ya kolɛmba mpenza. Lokola malili ezalaki makasi, ndeko mwasi alalaki na kazaka na ye ya malili. Na ntɔngɔ, ayebisaki mobali na ye ete amoni ete akokoka lisusu te kokoba na mosala ya zongazonga. Mwa moke na nsima, kaka na ntɔngɔ yango, bazwaki mokanda moko oyo eutaki na Betele, mpe ekomamaki mpo na ndeko mwasi. Na mokanda yango, bapesaki ndeko mwasi longonya mingi mpo na mosala na ye mpe ezaleli na ye ya koyika mpiko. Bamonisaki ye ete bayebi mpasi ya kokende kofanda bisika ekeseni pɔsɔ nyonso. Mobali na ye alobi boye: “Maloba yango esimbaki motema ya mwasi na ngai mpe ata mokolo moko te alobelaki lisusu likambo ya kotika mosala ya zongazonga. Kutu, soki makanisi ya kotika mosala eyeli ngai, mbala mingi ye nde azalaki kolendisa ngai nakoba.” Ndeko yango ná mwasi na ye basalaki mosala ya zongazonga mbula pene na 40.
20. Tosengeli kosala nini mokolo na mokolo, mpe mpo na nini?
20 Tiká ete mokolo na mokolo tómonisaka botɔndi na maloba mpe na misala na biso. Maloba na biso oyo euti na motema to likambo oyo tosali ekoki mpenza kosalisa moninga alonga mitungisi ya mokili oyo ezangi botɔndi. Mpe komonisa botɔndi ekosalisa biso tósala boninga oyo ekoki koumela libela. Likambo oyo eleki ntina, tokomekola Tata na biso Yehova, oyo amonisaka botɔndi mpe akabaka.
LOYEMBO 20 Opesá Mwana na yo ya bolingo
^ par. 5 Na likambo etali komonisa botɔndi, mateya nini tokoki kozwa epai ya Yehova, Yesu, mpe Mosamaria oyo azalaki na maladi ya maba? Na lisolo oyo, tokotalela bandakisa na bango mpe makambo mosusu. Tokolobela mpe ntina ya komonisa botɔndi mpe ndenge ya kosala yango.
^ par. 1 NDIMBOLA YA MALOBA: Kozala na botɔndi elimboli kosepela to koyeba motuya ya eloko to ya moto moko boye. Ekoki mpe kosalelama mpo na kolobela matɔndi oyo euti na motema.