Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

 LISOLO YA BOYEKOLI 37

“Kopemisa lobɔkɔ na yo te”

“Kopemisa lobɔkɔ na yo te”

“Loná mboto na yo mpe tii na mpokwa kopemisa lobɔkɔ na yo te.”​—MOS. 11:6.

LOYEMBO 68 Tólona mboto ya Bokonzi

NA MOKUSE *

1-2. Boyokani nini ezali kati na Mosakoli 11:6 mpe mosala ya kosakola?

NA BIKÓLO mosusu, bato basepelaka mingi ntango bayoki nsango malamu. Ezalaka lokola nde bazalaki kozela yango banda kala! Kasi na bikólo mosusu, bato basepelaka mpenza te na makambo ya Nzambe to ya Biblia. Bongo na esika ofandi, ndenge nini bato batalelaka nsango malamu? Ezala bayokaka to te, Yehova alingi ete tókoba kosakola nsango malamu tii ntango ye moko akoloba ete esili.

2 Mosala ya kosakola ekosuka na ntango oyo Yehova atyá; na nsima “nsuka ekoya.” (Mat. 24:14, 36) Kasi liboso ete ntango yango ekoka, tosengeli kotosa maloba oyo ete “kopemisa lobɔkɔ na yo te.” * Na ndenge nini?​—Tángá Mosakoli 11:6.

3. Tokotalela nini na lisolo oyo?

3 Lisolo oyo eleki emonisaki makambo minei oyo tosengeli kosala mpo tókokisa malamu mokumba ya ‘koluka bato.’ (Mat. 4:19) Lisolo oyo ekolobela makambo misato oyo ekoki kosalisa biso tókómisa makasi ekateli na biso ya kosakola, ata soki tokutani na mikakatano nini. Tokoyekola mpo na nini ezali na ntina (1) tókoba kotya mosala ya kosakola na esika ya liboso, (2) tózala na motema molai, mpe (3) tóbatela kondima na biso makasi.

KOBÁ KOTYA MOSALA YA KOSAKOLA NA ESIKA YA LIBOSO

4. Mpo na nini tosengeli kokoba kotya makanisi na biso nyonso na mosala oyo Yehova apesá biso?

4 Yesu asakolaki ndenge bato bakozala mpe makambo oyo ekomonisa ete tozali na mikolo ya nsuka. Ayebaki ete yango ekoki kolongola likebi ya bayekoli na ye na mosala ya kosakola. Ayebisaki bango, “bósɛnzɛlaka.” (Mat. 24:42) Na mikolo ya Noa, ezalaki na makambo mingi oyo ezalaki kolongola likebi ya  bato na likebisi oyo Noa azalaki kopesa. Yango mpe ekoki kokómela biso lelo oyo. (Mat. 24:37-39; 2 Pe. 2:5) Na yango, tosengeli kokoba kotya makanisi na biso nyonso na mosala oyo Yehova apesá biso.

5. Na kotalela Misala 1:6-8, mosala ya kosakola esengeli kosalema tii wapi?

5 Lelo oyo, tosengeli kotyela mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi likebi mingi. Yesu asakolaki ete bayekoli na ye bakokoba kosakola nsango malamu nsima ya liwa na ye mpe bakosala mosala yango mingi koleka ye. (Yoa. 14:12) Nsima ya liwa ya Yesu, bayekoli na ye mosusu bazongelaki mosala na bango ya koluka mbisi. Nsima ya lisekwa na ye, Yesu asalaki likamwisi oyo esalisaki bayekoli na ye bákanga mbisi ebele. Asalelaki libaku yango mpo na komonisa bayekoli na ye ete mosala ya koluka bato ezalaki na ntina mingi koleka mosala mosusu nyonso. (Yoa. 21:15-17) Liboso amata na likoló, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete mosala ya kosakola oyo ye abandisaki ekosuka kaka na Yisraele te kasi ekosalema mpe tii na bamboka ya mosika mpenza. (Tángá Misala 1:6-8.) Bambula mingi na nsima, Yesu asalisaki ntoma Yoane na nzela ya emonaneli amona makambo oyo ekosalema “na mokolo ya Nkolo.” * Yoane amonaki makambo mingi. Kati na yango, amonaki likambo moko ya kokamwa mpenza: Anzelu moko azalaki na “nsango malamu ya seko” ya kosakwela “bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe mikili nyonso.” (Em. 1:10; 14:6) Ezali polele ete mokano ya Yehova lelo oyo ezali ete tópesa mabɔkɔ na mosala yango ya kosakola tii ntango akoloba ete esili.

6. Nini ekoki kosalisa biso tókoba kotya mosala ya kosakola na esika ya liboso?

6 Mpo tókoba kotya mosala ya kosakola na esika ya liboso, tosengeli kokanisa makambo nyonso oyo Yehova azali kosala mpo na kosalisa biso. Na ndakisa, azali kopesa biso ebele ya bilei ya elimo na nzela ya mikanda oyo ebimaka  na papye to na Internet, biloko ya koyoka, bavideo, mpe TV JW. Kanisá naino: Site Internet na biso ezali na minɔkɔ koleka 1 000! (Mat. 24:45-47) Lelo oyo na mokili, bato bakabwani mpo na makambo ya politiki, ya mangomba, mpe mpo basusu bazali bazwi mpe basusu babola. Kasi basaleli ya Yehova koleka milio 8 na mokili mobimba bazali mpenza na bomoko. Na ndakisa, na mokolo ya mitano 19/04/2019, Batatoli ya Yehova na mokili mobimba balandaki video oyo elobelaki mokapo ya mokolo yango. Kaka na mpokwa ya mokolo yango, bato 20 919 041 bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Yesu. Ntango tokanisaka lokumu oyo Yehova apesá biso ya komona makambo yango ya kokamwa mpe ya kopesa mabɔkɔ mpo esalema, yango etindaka biso tókoba kosakola Bokonzi.

Yesu atikaki te ete eloko moko elongola likebi na ye na mosala ya kosakola (Talá paragrafe 7)

7. Ndenge nini ndakisa ya Yesu esalisaka biso tótya mosala ya kosakola na esika ya liboso?

7 Lolenge mosusu oyo tokoki kotya mosala ya kosakola na esika ya liboso ezali ya kolanda ndakisa ya Yesu. Atikaki ata eloko moko te elongola likebi na ye na mosala yango. (Yoa. 18:37) Yesu akweaki te ntango Satana alobaki ete akopesa ye “makonzi nyonso ya mokili ná nkembo na yango.” Akosamaki mpe te ata ntango bato mosusu balukaki kokómisa ye mokonzi. (Mat. 4:8, 9; Yoa. 6:15) Lisusu, Yesu alandaki te mposa ya kokóma na bozwi. Mpe atikaki te ete botɛmɛli makasi oyo akutanaki na yango ebangisa ye. (Luka 9:58; Yoa. 8:59) Ntango kondima na biso emekami, tokotya mosala ya kosakola na esika ya liboso soki tokanisi toli oyo ntoma Paulo apesaki. Alendisaki bakristo bálanda ndakisa ya Yesu mpo ‘básila makasi te mpe bálɛmba te’!​—Ebr. 12:3.

ZALÁ NA MOTEMA MOLAI

8. Motema molai ezali nini, mpe mpo na nini ezali na ntina mingi lelo oyo?

8 Motema molai ezali likoki ya kozela na motema mobimba ete likambo moko ebongwana. Ata soki tozelaka na mposa makasi ete likambo moko ya mpasi esila, to mpe tozelaka banda kala ete mposa na biso moko boye ekokisama, tosengeli komonisa motema molai. Mosakoli Habakuku azalaki na mposa ete makambo ya mobulu oyo ezalaki kosalema na Yuda esila. (Hab. 1:2) Bayekoli ya Yesu bazalaki kolikya ete Bokonzi “ekomonana kaka na ntango wana” mpe ekolongola bango na boyangeli mabe ya Baroma. (Luka 19:11) Biso mpe tozelaka na mposa makasi mokolo oyo Bokonzi ya Nzambe ekolongola makambo nyonso ya mabe mpe ekotya mokili ya sika oyo ekotonda na bato ya boyengebene. (2 Pe. 3:13) Kasi, tosengeli kozala na motema molai mpe kozela ntango oyo Yehova atyá ekoka. Tótalela ndenge mosusu oyo Yehova ateyaka biso ezaleli ya motema molai.

9. Bandakisa nini emonisi ete Yehova azali na motema molai?

9 Yehova azali ndakisa malamu mpenza na likambo etali komonisa motema molai. Atikelaki Noa ntango oyo ebongi mpo na kotonga masuwa mpe ya kozala “mosakoli ya boyengebene.” (2 Pe. 2:5; 1 Pe. 3:20) Yehova ayokaki na likebi ntango Abrahama azalaki kotuna ye motuna moko nsima ya mosusu mpo na ekateli oyo azwaki ya koboma bato mabe ya engumba Sodoma ná Gomora. (Eba. 18:20-33) Na boumeli ya bambula mingi, Yehova amoniselaki mpenza ekólo Yisraele oyo ezalaki sembo te motema molai. (Neh. 9:30, 31) Lelo oyo mpe, tomonaka motema molai ya Yehova na ndenge atiki ntango mpo baoyo nyonso balingi kokóma baninga na ye “bábongola motema.” (2 Pe. 3:9; Yoa. 6:44; 1 Tim. 2:3, 4) Ndakisa ya Yehova esalisi biso tómonisaka motema molai wana tozali kokoba kosakola mpe koteya. Ateyaka biso mpe ezaleli ya motema molai na ndakisa moko oyo ezali na Biblia.

Ndenge moko na moloni-bilanga oyo asalaka mosala makasi mpe azalaka na motema molai, biso mpe tozelaka mbuma ya misala na biso (Talá paragrafe 10-11)

10. Ndakisa ya moloni-bilanga oyo Yakobo 5:7, 8 elobeli, eteyi biso nini?

 10 Tángá Yakobo 5:7, 8Ndakisa ya moloni-bilanga eteyaka biso ndenge ya komonisa motema molai. Ezali solo ete milona mosusu ekolaka nokinoki, kasi esɛngaka ntango mpo milona mosusu ekola, mingimingi oyo ebotaka mbuma. Na Yisraele, mpo milona ekola, ezalaki kosɛnga sanza soki motoba. Moloni-bilanga azalaki kolona mboto kaka soki mbula ya liboso ya eleko ya otɔnɛ euti kobɛta mpe kobuka mbuma yango soki mbula ya nsuka ya eleko ya prɛnta ebɛti. (Mrk. 4:28) Tokomonisa bwanya soki tomekoli motema molai ya moloni-bilanga yango. Kasi, yango ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te.

11. Ndenge nini motema molai ekosalisa biso na mosala ya kosakola?

11 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tolingaka komona mbala moko mbuma ya misala na biso. Kasi, soki tolingi ete milona na biso ekola malamu mpe ebota mbuma, tosengeli ntango nyonso kotyela yango likebi. Tosengeli kobalola mabele, kolona, kolongolaka matiti mabe, mpe komwangiselaka milona yango mai. Soki tolingi kokómisa bato bayekoli, tosengeli mpe kosala milende mingi. Esɛngaka ntango mpo na kosalisa bayekoli ya Biblia bátika kokanisela basusu mabe, mpe bátyelaka bato likebi. Motema molai ekosalisa biso tólɛmba nzoto te ntango bato mosusu baboyi koyoka biso. Tosengeli mpe komonisa motema molai ata ntango bato mosusu basepeli koyoka biso mpe bandimi koyekola. Tokoki te kotinda moyekoli ya Biblia na makasi ete akóma na kondima makasi. Na bantango mosusu, ata bayekoli ya Yesu bazalaki na mokakatano ya kokanga ntina ya makambo oyo azalaki koteya. (Yoa. 14:9) Tóbosana te ete tokoki kolona mpe komwangisa mai, kasi Nzambe nde akolisaka.​—1 Ko. 3:6.

12. Ndenge nini tokoki komonisa motema molai ntango tozali kosakwela bandeko na biso ya libota oyo bazali Batatoli te?

12 Ekoki kozala mpasi tómonisa motema molai ntango tozali kopesa litatoli epai ya bandeko  na biso ya libota oyo bazali Batatoli te. Toli oyo ezali na Mosakoli 3:1, 7 ekoki kosalisa biso. Elobi: “Ezali na ntango . . . ya kofanda nyɛɛ mpe ntango ya koloba.” Etamboli na biso ya malamu ekoki kosala ete bandeko na biso ya libota básepela koyoka nsango na biso. Atako bongo, tosengeli ntango nyonso koluka mabaku ya koyebisa bango makambo etali Yehova. (1 Pe. 3:1, 2) Ntango tozali kosakola mpe koteya na molende, tosengeli komonisela bato nyonso motema molai, ata mpe bandeko na biso ya libota.

13-14. Wapi mwa bandakisa ya basaleli ya Yehova oyo bamonisaki motema molai, oyo tokoki komekola?

13 Tokoki kokóma na motema molai soki toyekoli bandakisa ya basaleli ya Yehova ya sembo ya ntango ya kala mpe ya mikolo na biso. Na ndakisa, atako Habakuku azalaki na mposa ete makambo mabe oyo ezalaki kosalema na mikolo na ye esila, amonisaki motema molai mpe alobaki ete: “Nakotɛlɛma na esika na ngai ya kokɛngɛla.” (Hab. 2:1) Ntoma Paulo azalaki na mposa makasi ya ‘kosilisa’ mosala na ye. Atako bongo, azalaki na motema molai mpe akobaki “kopesa litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu.”​—Mis. 20:24.

14 Tótalela ndakisa ya ndeko mobali moko ná mwasi na ye oyo, nsima ya kozwa diplome na eteyelo ya Gileade, batindaki bango na ekólo moko oyo ezali na Batatoli mingi te mpe oyo bato na yango mingi bazalaka bakristo te. Kaka bato moke nde bazalaki kosepela koyekola Biblia. Nzokande, bana-kelasi na bango ya Gileade oyo batindamaki na bikólo mosusu, bazalaki kotindela bango nsango ete mosala na bango ya kosakola ezalaki kobota mbuma mingi. Atako bato mingi bazalaki kosepela koyoka bango te, ndeko yango ná mwasi na ye bamonisaki motema molai mpe bakobaki kaka kosakola. Nsukansuka, nsima ya kosakola mbula 8 na teritware na bango oyo ezalaki komonana ete ekobota mbuma te, bayokaki esengo ntango moyekoli na bango moko ya Biblia azwaki batisimo. Bandakisa yango ya ntango ya kala mpe ya mikolo na biso ezali koteya biso nini? Basaleli yango ya sembo ya Yehova batikaki te kosakola na molende, balɛmbisaki mabɔkɔ na bango te mpe Yehova apambolaki bango mpo na ezaleli na bango ya motema molai. Tiká ete tózala “bamekoli ya baoyo bazali kozwa libula ya bilaka na nzela ya kondima mpe motema molai.”​—Ebr. 6:10-12.

BATELÁ KONDIMA NA YO MAKASI

15. Ndenge nini kondima ekómisaka makasi ekateli na biso ya kosakola?

15 Tondimaka ete nsango oyo tosakolaka ezali solo, yango wana tosepelaka koyebisa yango bato ebele. Tondimaka mpe bilaka oyo ezali na Liloba ya Nzambe. (Nz. 119:42; Yis. 40:8) Tozali komona ndenge bisakweli ya Biblia ezali kokokisama na mikolo na biso. Tomonaka mpe ndenge bato babongolaka bomoi na bango ntango babandi kosalela toli oyo ezali na Biblia. Yango endimisaka biso ete nsango malamu ya Bokonzi nde nsango oyo moto nyonso asengeli koyoka.

16. Na kotalela Nzembo 46:1-3, ndenge nini kondima na biso epai ya Yehova mpe epai ya Yesu ekómisaka makasi ekateli na biso ya kosakola?

16 Tozalaka mpe na kondima epai ya Yehova mpo nsango oyo toteyaka eutaka nde epai na ye. Tondimelaka mpe Yesu, Moto oyo Yehova atyá mpo azala Mokonzi ya Bokonzi na ye. (Yoa. 14:1) Ata soki tokutani na mikakatano nini, Yehova akozala ntango nyonso ekimelo na biso mpe makasi na biso. (Tángá Nzembo 46:1-3.) Longola yango, toyebi ete Yesu nde azali kotambwisa mosala ya kosakola mpe azali kosalela nguya mpe bokonzi oyo Yehova apesá ye.​—Mat. 28:18-20.

17. Pesá ndakisa oyo emonisi ntina oyo tosengeli kokoba kosakola.

17 Kondima esalisaka biso tótya motema ete Yehova akopambola milende na biso, mbala  mosusu na ndenge oyo tozali kokanisa te. (Mos. 11:6) Na ndakisa, mokolo na mokolo ebele ya bato bamonaka mikanda na biso na bamesa mpe na bashario na biso. Lolenge wana ya kosakola ezali kobota mbuma? Ɛɛ! Na ndakisa, Mosala na biso ya Bokonzi ya 11/2014 elobelaki elenge mwasi moko ya iniversite oyo alingaki kokoma makambo etali Batatoli ya Yehova. Ayebaki te esika oyo Ndako ya Bokonzi ezalaki, kasi na iniversite amonaki bamesa epai batandaki mikanda na biso. Amonaki mpe makambo oyo azalaki na mposa na yango mpo na Batatoli ya Yehova. Nsukansuka, azwaki batisimo mpe lelo oyo azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Masolo ya boye elendisaka biso tókoba kosakola mpo emonisaka ete ezali naino na bato oyo bazali na mposa ya koyoka nsango ya Bokonzi.

ZALÁ NA EKATELI YA KOPEMISA LOBƆKƆ NA YO TE

18. Nini endimisi biso ete mosala ya kosakola Bokonzi ekosuka na ntango oyo Yehova atyá?

18 Toyebi ete mosala ya kosakola Bokonzi ekosuka mpenza na ntango oyo Yehova atyá. Tótalela makambo oyo esalemaki na mikolo ya Noa. Yehova amonisaki ete asalaka ntango nyonso makambo na ntango oyo ebongi. Bambula soki 120 liboso, Yehova atyaki ntango oyo Mpela esengelaki kobanda. Bambula mingi na nsima, apesaki Noa mokumba ya kotonga masuwa. Bambula soki 40 to 50 liboso Mpela ebanda, Noa akobaki kosala mosala makasi. Ata soki bato bazalaki koyoka ye te, Noa akobaki kosakola nsango ya likebisi tii ntango Yehova ayebisaki ye ete ngonga ekoki mpo akɔtisa banyama na masuwa. Mpe na nsima, na ntango oyo ebongi, “Yehova akangaki porte.”​—Eba. 6:3; 7:1, 2, 16.

19. Lipamboli nini tokoki kozwa soki topemisi lobɔkɔ na biso te?

19 Mosika te, Yehova akosukisa mosala ya kosakola Bokonzi. Na nsima, akobebisa ebongiseli mabe oyo ya Satana mpe akotya mokili ya sika oyo ekotonda na bato oyo batosaka Nzambe. Liboso ntango yango ekoka, tiká ete tózwa ekateli ya komekola Noa, Habakuku, mpe bato mosusu oyo bapemisaki lobɔkɔ na bango te. Tókoba kotya mosala ya kosakola na esika ya liboso, komonisa motema molai mpe kobatela kondima makasi epai ya Yehova, mpe na bilaka na ye.

LOYEMBO 75 “Ngai oyo! Tindá ngai!”

^ par. 5 Lisolo oyo eleki elendisaki bayekoli ya Biblia oyo bazali kokola na elimo bándima libyangi ya Yesu ya kokóma baluki-bato. Lisolo oyo ekomonisa makambo misato oyo ekosalisa basakoli nyonso bákoba kokómisa makasi ekateli na bango ya kosakola Bokonzi tii ntango Yehova akoloba ete esili.

^ par. 2 NDIMBOLA YA MALOBA: Na lisolo oyo, maloba “kopemisa lobɔkɔ na yo te” elimboli ete tosengeli kozala na ekateli ya kokoba kosakola nsango malamu tii mokolo oyo Yehova akoloba ete esili.

^ par. 5 “Mokolo ya Nkolo” ebandaki ntango Yesu atyamaki Mokonzi na 1914 mpe ekokoba tii na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto.