Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

 LISOLO YA BOYEKOLI 25

Kobɛtisa te “bana mike oyo” libaku

Kobɛtisa te “bana mike oyo” libaku

“Bótyola moko ya bana mike oyo te.”​—MAT. 18:10.

LOYEMBO 113 Tozali na kimya

NA MOKUSE *

1. Yehova asalá nini mpo na mokomoko na biso?

YEHOVA abendi mokomoko na biso epai na ye. (Yoa. 6:44) Yango elingi mpenza koloba nini? Ntango Yehova atalaki bamilio ya bato oyo bazali na mokili oyo, amonaki eloko moko ya motuya epai na yo. Amonaki ete ozali na motema sembo mpe ete okolinga ye. (1 Nt. 28:9) Yehova ayebi yo malamu mpe alingaka yo. Yango esengeli mpenza kokitisa motema!

2. Ndakisa nini Yesu apesaki mpo na komonisa ete Yehova atyelaka mokomoko na biso likebi?

2 Yehova atyelaka yo mpenza likebi, ata mpe bandeko na yo nyonso bakristo. Mpo na kosalisa biso tóyeba likambo yango malamu, Yesu akokanisaki Yehova na mobateli ya mpate. Mobateli ya mpate asalaka nini soki mpate moko kati na bampate 100 ya etonga na ye ebungi? ‘Akotika 99 na bangomba mpe akokende koluka oyo ebungi.’ Soki amoni mpate yango, akosilikela yango te, kasi akosepela nde. Yango eteyi biso ete mpate mokomoko ezali na motuya mingi na miso ya Yehova. Yesu alobaki: “Tata na ngai oyo azali na likoló alingaka te ete moko ya bato mike oyo abeba.”​—Mat. 18:12-14.

3. Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Na ntembe te, tokolinga soki moke te kozala bato oyo balɛmbisaka bandeko nzoto. Ndenge nini tokoki koboya kobɛtisa basusu libaku? Mpe tosengeli kosala nini soki ndeko moko asali likambo oyo epesi biso mpasi na motema? Lisolo oyo ekoyanola na mituna yango. Kasi liboso, tólobela naino “bana mike” oyo Matai mokapo 18 elobeli.

 “BANA MIKE OYO” EZALI BANANI?

4. “Bana mike oyo” ezali banani?

4 “Bana mike oyo” ezali bayekoli nyonso ya Yesu ata soki bazali na mbula nini. Bango nyonso bazali “lokola bana mike” mpo balingaka Yesu ateya bango. (Mat. 18:3) Ata soki bautá wapi, bazali na mimeseno nini mpe bazali na makanisi mpe bomoto ekeseni, bango nyonso bamonisaka kondima epai ya Kristo. Kristo mpe alingaka bango mingi.​—Mat. 18:6; Yoa. 1:12.

5. Yehova ayokaka ndenge nini soki moto moko azali konyokola moko ya basaleli na ye?

5 “Bana mike oyo” bazali na motuya mingi na miso ya Yehova. Mpo na koyeba ndenge oyo atalelaka bango, kanisá ndenge oyo totalelaka bana mike. Bazalaka na motuya mingi mpo na biso, yango wana tolingaka kobatela bango mpo bazalaka na makasi te, bayebaka makambo mingi te, mpe bazalaka na bwanya te lokola mikóló. Tolingaka te komona moto moko azali konyokola moto mosusu. Kutu, tosilikaka makasi soki moto moko azali konyokola mwana moke. Yehova mpe abatelaka biso bongo. Kutu, ayokaka nkanda mpe asilikaka makasi soki moto moko azali konyokola moko ya basaleli na ye.​—Yis. 63:9; Mrk. 9:42.

6. Na kotalela 1 Bakorinti 1:26-29, ndenge nini mokili etalelaka bayekoli ya Yesu?

6 Na lolenge nini mosusu bayekoli ya Yesu bazali lokola “bana mike”? Banani nde mokili emonaka ete bazali na ntina mingi? Ezali bato ya mbongo, bato ya lokumu, mpe bato oyo bazalaka na nguya. Nzokande, bato bamonaka bayekoli ya Yesu lokola bazali na ntina te. Bazalaka lokola “bana mike.” (Tángá 1 Bakorinti 1:26-29.) Kasi, Yehova atalelaka bango ndenge wana te.

7. Yehova alingi ete tómiyoka ndenge nini mpo na bandeko na biso?

7 Yehova alingaka basaleli na ye nyonso, ezala basalelaka ye banda bambula mingi to bazali bato ya sika na solo. Bandeko na biso nyonso bazali na ntina mingi na miso ya Yehova, yango wana basengeli mpe kozala na ntina na miso na biso. Na yango, tosengeli kolinga “lisangá mobimba ya bandeko” kasi te kaka bamosusu kati na bango. (1 Pe. 2:17) Tosengeli kosala oyo tokoki mpo na kobatela mpe kokokisa bamposa na bango. Soki toyebi ete toyokisaki ndeko moko mpasi, tosengeli kokangela yango miso te mpe kokanisa ete asengeli kaka kolimbisa mpe kobosana likambo yango. Mpo na nini likambo moko oyo tosali ekoki koyokisa bandeko mosusu mpasi? Na kotalela ndenge oyo babɔkwamá, bandeko mosusu bakanisaka ete bazali na ntina te. Basusu mpe bazali bato ya sika na solo mpe bayebi naino te ete basengeli kolimbisaka basusu soki basali likambo moko oyo epesi bango mpasi na motema. Ezala ndenge nini, tosengeli kosala oyo tokoki mpo na kozongisa kimya. Longola yango, ndeko oyo abɛtaka mabaku ntango nyonso mpo na mabunga ya basusu asengeli koyeba ete yango ezali bolɛmbu oyo asengeli kosala makasi abundisa. Soki asali bongo, yango ekosalisa ye azala na esengo, mpe abatela boyokani ya malamu elongo na basusu.

TÓTALELAKA BASUSU ETE BALEKI BISO

8. Bizaleli nini bato mingi bazalaki na yango na ntango ya Yesu, mpe yango ezalaki na bopusi nini na bomoi ya bayekoli ya Yesu?

8 Mpo na nini Yesu alobelaki “bana mike oyo”? Mpo bayekoli na ye batunaki ye: “Nani mpenza aleki bato mosusu nyonso na Bokonzi ya likoló?” (Mat. 18:1) Na ntango wana, Bayuda mingi bazalaki kolinga ete bato mosusu bátalela bango ete bazali na ntina mingi. Moto moko ya mayele alobi boye: “Na ntango wana kozwa lokumu mpe kozala moto oyo ayebani mingi ezalaki likambo elekaki ntina na bomoi ya bato.”

9. Bayekoli ya Yesu basengelaki kosala nini?

 9 Yesu ayebaki malamu ete bayekoli na ye basengelaki kosala makasi mpo na kolongola na mitema na bango elimo ya kowelana oyo epikamaki makasi na mimeseno ya Bayuda. Ayebisaki bango boye: “Moto oyo aleki na kati na bino akóma lokola leki ya nsuka mpenza, mpe moto oyo azali kosala lokola mokonzi azala lokola mosali.” (Luka 22:26) Tomitambwisaka lokola bana mike soki tozali kotalela basusu ete “baleki biso.” (Flp. 2:3) Soki tozali na makanisi ya ndenge wana, na ntembe te tokobɛtisa basusu libaku te.

10. Toli nini ya Paulo tosengeli kobosanaka te?

10 Bandeko na biso nyonso balekaka biso na likambo moko to mosusu. Ezalaka mpasi te koyeba yango soki tozali kotya likebi mingimingi na bizaleli na bango ya malamu. Tosengeli kobosana te toli oyo ntoma Paulo apesaki bakristo ya Korinti. Alobaki boye: “Nani akesenisi yo na mosusu? Ɛɛ, eloko nini ozali na yango oyo bapesaki yo kopesa te? Nzokande, soki mpenza bapesaki yo yango kopesa, mpo na nini ozali komikumisa lokola nde bapesaki yo yango kopesa te?” (1 Ko. 4:7) Tosengeli kokeba ete tóbendaka te likebi epai na biso moko to mpe tókanisaka ete toleki basusu. Na ndakisa, soki ndeko mobali moko asalaka badiskur malamu na lisangá to ndeko mwasi moko ayebi mpenza ndenge ya kobanda koyekola na bato Biblia, basengeli ntango nyonso kozongisa lokumu epai ya Yehova mpo na makoki oyo bazali na yango.

LIMBISÁKÁ “NA MOTEMA MOBIMBA”

11. Yesu alingaki koteya biso nini na ndakisa ya mokonzi ná moombo na ye?

11 Nsima ya kokebisa bayekoli na ye ete bábɛtisaka bato libaku te, Yesu apesaki ndakisa ya mokonzi moko ná moombo na ye. Mokonzi ayebisaki moombo yango afuta te nyongo ya mbongo ebele oyo azalaki na likoki ya kofuta soki moke te. Na nsima, moombo yango atingamaki ete moninga na ye moombo afuta nyongo na ye ya mbongo moke mpenza. Na nsuka, mokonzi akɔtisaki na bolɔkɔ moombo yango oyo aboyaki kolimbisa moninga. Yango eteyi biso nini? Yesu alobaki: “Tata na ngai ya likoló akosala bino mpe bongo soki mokomoko na bino azali kolimbisa ndeko na ye na motema mobimba te.”​—Mat. 18:21-35.

12. Ndenge nini tokoki kopesa bato mosusu mpasi soki toboyi kolimbisa?

12 Makambo oyo moombo yango asalaki epesaki kaka ye moko mpasi te kasi mpe basusu. Ya liboso, aboyaki koyokela moninga na ye moombo mawa, na ndenge asɛngaki bábwaka ye na “bolɔkɔ tii ntango akofuta nyongo oyo azalaki na yango.” Ya mibale, makambo oyo asalaki epesaki baombo mosusu oyo bazalaki kotala mpasi mpenza. Ntango “baninga na ye baombo bamonaki makambo oyo esalemaki, bayokaki mawa mingi mpenza.” Ndenge moko mpe, makambo oyo tosalaka ekoki kopesa bato mosusu esengo to mawa. Soki moto asali likambo moko oyo epesi biso mpasi kasi toboyi kolimbisa ye, nini ekoki kosalema? Ya liboso, tokopesa ye mpasi na ndenge toboyi kolimbisa ye, kotyela ye likebi mpe komonisela ye bolingo. Ya mibale, tokopesa bandeko mosusu ya lisangá mpasi ntango bakoyeba ete biso ná ndeko yango tozali koyokana te.

Okobombela ndeko nkanda to okolimbisa ye na motema moko? (Talá paragrafe 13-14) *

13. Likambo oyo ekómelaki ndeko mwasi moko ya mobongisi-nzela eteyi yo nini?

13 Soki tolimbisi bandeko na biso, biso moko tokozwa matomba, bato mosusu mpe bakozwa matomba. Yango nde likambo oyo mobongisi-nzela moko oyo topesi nkombo Crystal akutanaki na yango. Ndeko moko ya lisangá asalaki likambo oyo epesaki ye mpasi. Crystal alobi boye: “Na bantango mosusu maloba na ye ya kozanga boboto ezalaki kotuba ngai lokola  mbɛli. Nazalaki kutu ata kolinga te kobima na ye na mosala ya kosakola. Nakómaki kobungisa molende mpe esengo na ngai mpo na mosala ya kosakola. Crystal akanisaki ete azalaki na ntina ya kosilika ndenge wana. Kasi akangelaki ndeko mwasi yango nkanda te, mpe akobaki te kotalela kaka makambo to mayoki na ye moko. Na komikitisa nyonso, asalelaki toli oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/10/1999 oyo ezalaki na motó ya likambo: “Limbisá na motema moko.” Na nsima, alimbisaki ndeko mwasi yango. Crystal alobi boye: “Namoni ete biso nyonso tozali kosala makasi mpo na kolata bomoto ya sika mpe Yehova andimaka kolimbisa biso mokolo na mokolo. Sikoyo, nayokaka lokola kilo moko ya monene elongwe na mapeka na ngai. Nazongeli esengo na ngai.”

14. Na kotalela Matai 18:21, 22, ekoki kozala ete ntoma Petro akutanaki na mokakatano nini, mpe liteya nini ozwi na eyano oyo Yesu apesaki ye?

14 Toyebi ete tosengeli kolimbisaka, mpe yango nde likambo oyo tosengeli kosala. Kasi kosala bongo ekoki kozala pɛtɛɛ te. Ekoki kozala ete na ntango moko boye ntoma Petro mpe amiyokaki bongo. (Tángá Matai 18:21, 22.) Nini ekoki kosalisa biso? Ya liboso, kanisá ndenge oyo Yehova alimbisaka yo. (Mat. 18:32, 33) Tobongi te ete alimbisaka biso, kasi asalaka yango na motema moko. (Nz. 103:8-10) Lisusu, biso mpe “tosengeli kolingana.” Kolimbisa ezali te likambo oyo tokoki kosala soki tolingi. Tozali na mokumba ya kolimbisaka bandeko na biso bakristo. (1 Yoa. 4:11) Ya mibale, kanisá matomba oyo okozwa soki olimbisi. Tokoki kosalisa moto oyo asalaki likambo oyo epesaki biso mpasi, kobatela bomoko ya lisangá, boyokani na biso ná Yehova, mpe kolongola kilo na mapeka na biso. (2 Ko. 2:7; Kol. 3:14) Likambo ya nsuka, bondeláká Yehova oyo asɛngi biso tólimbisaka. Kotika te Satana abebisa boyokani malamu oyo ozalaka na yango ná bandeko ya lisangá. (Ef. 4:26, 27) Tosengeli na lisalisi ya Yehova mpo tókwea te na motambo ya Satana.

 KOTIKA TE ETE ELOKO MOKO EBƐTISA YO LIBAKU

15. Na kotalela Bakolose 3:13, tosengeli kosala nini soki ndeko moko asali likambo oyo epesi biso mpasi na motema?

15 Kasi osengeli kosala nini soki ndeko moko asali likambo oyo epesi yo mpasi mpenza? Salá nyonso oyo okoki mpo na kobatela kimya. Yebisá Yehova ndenge ozali mpenza komiyoka. Sɛngá ye apambola ndeko yango mpe asalisa yo omona bizaleli ya malamu ya ndeko yango oyo esalaka ete Yehova alinga ye. (Luka 6:28) Soki ozali kokoka te kobosana makambo oyo ndeko yango asalaki, kanisá lolenge malamu ya kosolola na ye likambo yango. Ezali ntango nyonso malamu okanisa ete ndeko yango asalaki likambo yango na nko te. (Mat. 5:23, 24; 1 Ko. 13:7) Ntango ozali kosolola na ye, ndimá ete azalaki na makanisi ya mabe te. Kasi osengeli kosala nini soki azali koboya ete bózongisa kimya? ‘Kobá kokanga motema na likambo yango.’ Kobá komonisela ye motema molai. (Tángá Bakolose 3:13.) Oyo eleki ntina, kobombela ye nkanda na motema te mpo yango ekoki kobebisa boninga na yo ná Yehova. Kotika te eloko moko ebɛtisa yo libaku. Soki osali bongo, okomonisa ete olingaka Yehova koleka eloko mosusu nyonso.​—Nz. 119:165.

16. Mokumba nini mokomoko na biso azali na yango?

16 Tozalaka na botɔndi ndenge tosalelaka Yehova elongo na bandeko na biso bakristo lokola “etonga kaka moko” na nse ya “mobateli kaka moko”! (Yoa. 10:16) Buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, na lokasa 165 elobi boye: “Lokola ozali kosepela na bomoko yango ozali na mokumba ya kobatela yango.” Na yango tosengeli “kosala makasi mpo na kotalela bandeko na biso bakristo ndenge Yehova atalelaka bango.” Na miso ya Yehova, biso nyonso tozali “bana mike” mpe tozali na motuya mingi. Tosengeli mpe kotalelaka bandeko na biso ndenge wana. Yehova amonaka mpe azwaka na motuya mingi eloko nyonso oyo osalaka mpo na kosalisa mpe kotyela bango likebi.​—Mat. 10:42.

17. Ekateli nini tozali na yango?

17 Tolingaka bandeko na biso bakristo. Na yango, tozali na ekateli ya “kotya te liboso ya ndeko eloko oyo ebɛtisaka libaku to eloko oyo epɛngwisaka.” (Rom. 14:13) Totalelaka bandeko na biso ete baleki biso, mpe tolingaka kolimbisa bango na motema moko. Na yango, tótika te ete basusu bábɛtisa biso libaku. Kasi, “tólanda makambo oyo etyaka kimya mpe makambo oyo elendisaka biso.”​—Rom. 14:19.

LOYEMBO 130 Tólimbisaka

^ par. 5 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki kosala to koloba likambo oyo ekoki kopesa bandeko na biso mpasi. Tosengeli kosala nini soki likambo ya bongo esalemi? Tosalaka nyonso mpo tózongisa kimya ná bandeko na biso? Tosɛngaka mbala moko bolimbisi, to tolobaka ete soki esali bango mpasi wana etali bango moko? Toumelaka te kosilika mpo na makambo oyo basusu balobi to basali? Tolukaka komilongisa mpe koloba ete tozalaka kaka bongo mpe tokoki kobongwana te? To tomonaka yango bolɛmbu oyo tosengeli kosala makasi mpo na kolonga yango?

^ par. 53 NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndeko mwasi moko abɛtisi ndeko mwasi mosusu libaku. Na nsima, basololi kaka na esika ya bango mibale mpo na kosilisa likambo yango, babosani yango mpe bazali kosalela Yehova na esengo.