Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Disiplini etambwisaka bana ndenge nkai etambwisaka bwato

MPO NA BABOTI

6: Kopesa disiplini

6: Kopesa disiplini

YANGO ELIMBOLI NINI?

Liloba disiplini ekoki kolimbola kotambwisa to koteya. Ntango mosusu, liloba yango elimbolaka mpe kosembola mwana soki asali mabe. Kasi, mbala mingi, disiplini elimbolaka kopesa mwana formasyo oyo ekosalisa ye ayekola kozwa libosoliboso bikateli ya malamu.

MPO NA NINI EZALI NA NTINA?

Esali sikoyo bambula mingi, disiplini epesamaka lisusu te na mabota mingi, mpo baboti mingi bakanisaka ete kosembola mwana ekoki kokitisa lokumu na ye. Kasi, baboti ya bwanya batyelaka bana na bango mibeko ya makasimakasi te mpe bateyaka bango bátosa yango.

“Esengeli kotyela bana mibeko mpo na kosalisa bango bákola malamu. Soki bozali kopesa bana disiplini te, bakozala lokola masuwa oyo ezangi yenda, oyo ekoki kosuka na likama.”​—Pamela.

OYO OKOKI KOSALA

Tosáká maloba na yo. Soki mwana na yo atosi te mibeko oyo otyelaki ye, pesá ye etumbu. Kasi soki atosi, pesá ye longonya.

“Mbala na mbala napesaka bana na ngai longonya mpo bazali komonisa botosi na mokili oyo bato mingi bamonisaka lisusu botosi te. Kopesa bango longonya esalaka ete bákakatana te mpo na kondima disiplini oyo bapesi bango.”​—Christine.

TOLI YA BIBLIA: “Nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.”​—Bagalatia 6:7.

Kozala makambo makasimakasi te. Ntango ozali kopesa mwana disiplini, esengeli kotalela mbula na ye, makoki na ye, mpe bonene ya mabe oyo asali. Disiplini ya malamu ezali oyo epesami na kolanda mabe oyo moto asali; na ndakisa, soki mwana azali kosalela telefone na ndenge ya mabe, okoki kobɔtɔla ye telefone yango mpo na mwa ntango to kotyela ye bangonga ya kosalela yango. Kasi, kosilika te mpo na mwa likambo moko oyo ezangá ntina, kaka mpo epesi yo nkanda.

“Nalukaka koyeba soki mwana na ngai aboyi kotosa na nko to asali kaka libunga. Kosala likambo ya mabe na nko mbala na mbala ekeseni na kosala libunga oyo esengeli kaka kobongisa.”​—Wendell.

TOLI YA BIBLIA: “Bósilikisaka bana na bino te, mpo bálɛmba nzoto te.”​—Bakolose 3:21.

Monisá ete olingaka bana na yo. Bana bandimaka disiplini mpe basalelaka makambo oyo baboti bayebisi bango soki bayebi ete moboti yango asali bongo mpo alingaka bango.

“Ntango mwana na biso abandaki kosala mabunga, tobandaki koyebisa ye ete tosepelaka na ye mingi mpo na bikateli ya malamu oyo azwaki. Tobandaki koyebisa ye ete libunga oyo asali ekobebisa lokumu na ye te soki aluki kobongisa yango mpe tokosalisa ye abongisa makambo.”​—Daniel.

TOLI YA BIBLIA: “Bolingo ezali na motema molai mpe na boboto.”​—1 Bakorinti 13:4.