Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

 NINI EPESAKA ESENGO?

Elikya

Elikya

‘Ngai nazali na makanisi ya kimya, kasi ya mpasi te, mpo na kopesa bino bomoi malamu na mikolo ezali koya mpe elikya.’​Yirimia 29:11.

 “ELIKYA EZALI . . . ELOKO YA NTINA MINGI MPO TÓZALA BANINGA YA NZAMBE.” Maloba wana euti na buku moko (Hope in the Age of Anxiety). Ebakisi: “Elikya nde ebenganaka makanisi ya komona ete ozangi lisalisi, ozangi moto ya kokipe yo, mpe kobanga.”

Biblia emonisi ete biso bato tozalaka na mposa ya elikya; ekebisi biso mpe ete tólanda te bilikya ya lokuta. Nzembo 146:3 elobi: “Bótyela bankumu motema te, to mwana ya moto ya mabele te, mpo akoki kobikisa te.” Na esika ya kotya motema na milende oyo bato bazali kosala mpo na kobikisa biso, ebongi nde kotyela Mozalisi na biso motema, mpo ye azali na nguya ya kokokisa bilaka na ye nyonso. Makambo nini alaki biso? Tótalela makambo oyo elandi.

MAKAMBO YA MABE EKOSILA; NA NSIMA BATO YA SEMBO BAKOZALA NA KIMYA YA SOLOSOLO: Nzembo 37:10, 11 elobi: “Etikali kaka mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te . . . Kasi bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.” Mpe vɛrsɛ 29 ebakisi: ‘bayengebene bakofanda seko awa na mabele.’

BITUMBA EKOSILA: “Yehova . . . azali kosilisa bitumba tii na nsuka ya mabele. Azali kobukabuka litimbo mpe kokatakata likɔnga; azali kotumba makalo na mɔtɔ.”​—Nzembo 46:8, 9.

MALADI, BAMPASI, MPE LIWA EKOZALA LISUSU TE: “Hema ya Nzambe ezali esika moko na bato . . . Akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.”​—Emoniseli 21:3, 4.

BILEI EBELE MPO NA BATO NYONSO: “Mbuma ekozala beboo na mabele; na nsɔngɛ ya bangomba biloko ekotondana.”​—Nzembo 72:16.

BOKONZI YA SEMBO YA KRISTO EKOYANGELA MOKILI MOBIMBA: “Bapesaki [Yesu Kristo] boyangeli, lokumu ná bokonzi, mpo bato ya bikólo, bituluku ya bato ya bikólo mpe minɔkɔ nyonso básalela ye. Boyangeli na ye ezali boyangeli oyo ekoumela seko, oyo ekoleka te, mpe bokonzi na ye ezali bokonzi oyo ekobebisama te.”​—Danyele 7:14.

Nini etindaka biso tóndima bilaka wana? Ntango Yesu azalaki awa na mabele, amonisaki polele ete abongi mpenza kozala Mokonzi. Abikisaki bato ya maladi, aleisaki babola, mpe asekwisaki bakufi. Oyo eleki ntina ezalaki mateya na ye, mpo ezali na batoli oyo ekosalisa bato báfanda na kimya mpe na bomoko libela na libela. Yesu ayebisaki mpe makambo oyo esengelaki kokóma, ezala mpe makambo oyo ekomonisa ete mokili ekómi na mikolo ya nsuka.

ATA SOKI BUTU EUMELI NTANGO BONI, NSUKANSUKA, NTƆNGƆ EKOTANA

Yesu alobaki ete mikolo ya nsuka ekozala ntango ya mobulu, kasi te ntango ya kimya mpe ya libateli. Ntango apesaki elembo ya “bosukisi ya makambo ya ntango oyo,” atángaki bitumba na mokili mobimba, kozanga bilei, maladi mabe, mpe koningana ya mabele. (Matai 24:3, 7; Luka 21:10, 11; Emoniseli 6:3-8) Yesu alobaki mpe ete: “Lokola makambo ya kobuka mibeko ekokóma mingi, bolingo ya bato mingi ekokita.”​—Matai 24:12.

Kozanga bolingo ezali komonana na ndenge mingi, ndenge mokomi mosusu ya Biblia alobelaki yango. Mokanda ya 2 Timote 3:1-5 elobi ete na “mikolo ya nsuka,” bato mingi bakomipesa na koluka matomba na bango moko, na koluka mbongo mpe bisengo. Bakozala bato ya lolendo mpe bato ya nko. Bolingo ekomonana lisusu te na mabota, mpe bana bakotosa lisusu baboti te. Basambeli ya lokuta bakokóma mingi.

Makambo wana nyonso, oyo ezali lokola butu, emonisi ete mokili oyo ekómi mpenza na nsuka na yango. Endimisi mpe biso ete etikali moke ntɔngɔ etana, elingi koloba Bokonzi ya Nzambe eya. Na esakweli oyo Yesu apesaki mpo na mikolo ya nsuka, abakisaki mpe boye: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.”​—Matai 24:14.

Nsango malamu yango ezali kokebisa bato mabe, kopesa bato ya sembo elikya, mpe kosalisa bango báyeba ete etikali moke tómona mapamboli oyo Nzambe alaki. Okolinga koyeba makambo mosusu oyo etali mapamboli yango? Soki ezali bongo, talá lokasa ya nsuka ya zulunalo oyo.