Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mwasi ya mayele atosaka lisosoli na ye

 BIBLIA ELOBI NINI?

kolongola zemi

kolongola zemi

Mbula nyonso bamilio ya babebe oyo babotami naino te bakufaka mpo bamama na bango balongolaka zemi, motángo yango eleki motángo ya bato ya bikólo ebele.

Ezali likambo moto ye moko asengeli kopona to etaleli nde bizaleli malamu?

OYO BATO BALOBAKA

 

Basi oyo balongolaka zemi basalaka yango mpo na bantina ndenge na ndenge, na ndakisa, kozanga mbongo, kozanga koyokana malamu, mposa ya kozala na bonsomi mpo na kotánga to mosala to mpo na koboya kobɔkɔla mwana azangá tata. Kasi bato mosusu bamonaka ete kolongola zemi ezali mpenza mabe, ebebisaka konfianse oyo bapesaka basi ya zemi.

OYO BIBLIA ELOBI

 

Na miso ya Nzambe, bomoi ezali eloko moko mosantu, mingimingi bomoi ya moto. (Ebandeli 9:6; Nzembo 36:9) Yango etaleli mpe bomoi ya bebe oyo azali kokola na libumu ya mama, esika oyo Nzambe abongisá mpo mwana asalema. Mokomi moko ya Biblia alobaki boye: “Ozipaki ngai na libumu ya mama na ngai.” Mpe abakisaki boye: “Miso na yo emonaki ndenge nazalaki naino liki, mpe biteni na yango nyonso ekomamaki na mokanda na yo: Mikolo oyo yango esalemaki.”Nzembo 139:13, 16.

Ndenge oyo Nzambe atalelaka bebe oyo azali na libumu emonisami mpe na Mibeko oyo apesaki ekólo Yisraele mpe na lisosoli oyo apesá biso. Mibeko ya Nzambe elobaki ete moto oyo atuti mwasi ya zemi mpe abomi mwana oyo azali na kati ya libumu, asengelaki kobomama, mpo na kofuta bomoi oyo abomi. (Kobima 21:22, 23) Kasi, basambisi basengelaki kotalela eloko oyo etindi moto yango asala bongo mpe kotalela makambo mosusu.Mitángo 35:22-24, 31.

Nzambe apesá bato lisosoli. Ntango mama ayokeli lisosoli na ye, mpe abateli bomoi ya mwana oyo azali na libumu, lisosoli na ye ekotungisa ye te. * Soki atosi lisosoli na ye te yango ekotungisa ye to kutu ekosambisa ye. (Baroma 2:14, 15) Lisusu, baankɛtɛ emonisi ete basi oyo balongolá zemi bazali na likama ya kotungisama mpe konyokwama mingi na makanisi.

Bongo, soki kobɔkɔla mwana ezali kobangisa yo, mingimingi soki zemi yango ekanamaki te? Talá oyo Nzambe alaki baoyo batosaka mibeko na ye: “Epai ya moto ya sembo okozala sembo; epai ya mobali makasi oyo azali na mbeba te, okosala na mbeba te.” (Nzembo 18:25) Elobi lisusu boye: “Yehova alingaka bosembo, mpe akotika te bato na ye ya sembo.”Nzembo 37:28.

“Lisosoli na bango ezali kotatola elongo na bango mpe, na makanisi na bango moko, ezali kofunda bango to mpe kolongisa bango.”Baroma 2:15.

 Bongo soki osí olongolá zemi?

OYO BATO BALOBAKA

 

Ruth, mwasi moko oyo abɔkɔlaka bana ye moko alobi boye: “Nazalaki na bana misato mpe namonaki ete nakokoka te kobɔkɔla mwana ya minei. Kasi nsima ya kolongola zemi, namonaki ete nasali likambo moko ya mabe mpenza.” * Kasi, yango elingi koloba ete Nzambe akoki kolimbisa ye te?

OYO BIBLIA ELOBI

 

Yesu Kristo amonisaki makanisi ya Nzambe na likambo yango ntango alobaki: “Nayei kobenga bayengebene te, kasi basumuki mpo bábongola motema.” (Luka 5:32) Ya solo, ntango toyoki mpenza mawa mpo na mabe oyo tosalaki mpe tobongoli motema, mpe tosɛngi Nzambe alimbisa biso, alimbisaka mpenza, ata masumu ya minene. (Yisaya 1:18) Nzembo 51:17, elobi boye: “Ee Nzambe, motema oyo ebukani mpe etutami, okotyola yango te.”

Nzambe apesaka moto lisosoli ya pɛto mpe kimya na makanisi soki moto yango abondeli ye na komikitisa nyonso. Bafilipi 4:6, 7 * elobi boye: “Na libondeli mpe na lilɔmbɔ ná matɔndi, kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino.” Nsima ya koyekola Biblia mpe kofungolela Nzambe motema, Ruth azwaki kimya wana ya motema. Ayekolaki ete Nzambe ‘alimbisaka mpenza.’Nzembo 130:4.

[Nzambe] asaleli biso makambo na kolanda masumu na biso te; Akweisi mpe biso te na makambo oyo esengelaki tókwea, na kolanda mabunga na biso.”Nzembo 103:10.

^ par. 10 Elingi koloba te ete soki bomoi ya mama to ya mwana ezali na likama nde ebongi kolongola zemi. Na ntango ya kobota, soki esɛngi kobikisa mama to mwana, yango ezali ekateli ya baboti. Kutu na mikili ya bozwi likambo ya bongo ezalaka mingi te mpo minganga bakolisi mayele.

^ par. 15 Topesi ye nkombo mosusu.

^ par. 18 Elikya ya lisekwa ekoki mpe kopesa moto kimya ya motema. Talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/04/2009, oyo elobeli mitinda ya Biblia etali lisekwa ya mwana oyo akufi na kati ya libumu.