MITUNA-LISOLO | ANTONIO DELLA GATTA
Ntina oyo sango moko alongwaki na lingomba na ye
NSIMA ya kolekisa mbula 9 na kelasi na Rome, Antonio Della Gatta akómaki sango na 1969. Na nsima, asalaki lokola mokambi ya seminɛrɛ oyo ezalaki pembeni ya Naples, na Italie. Ntango azalaki kuna, nsima ya koyekola mpe kokanisa na mozindo, amonaki ete mateya ya Lingomba ya Katolike eutaka na Biblia te. Alobaki na zulunalo Lamuká! ndenge oyo asalaki milende mpo ayeba Nzambe.
Bɛtelá biso lisolo ya bomwana na yo.
Nabotamá na Italie na 1943. Ngai ná bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi tokolá na mwa mboka moko epai tata azalaki kosala mosala ya bilanga mpe ya mabaya. Baboti na biso babɔkɔlá biso mpenza na mateya ya katolike.
Mpo na nini olingaki kokóma sango?
Ntango nazalaki mwana, nazalaki kosepela ntango basango bazalaki koteya na eglize. Nazalaki kosepela na mongongo na bango mpe milulu ya losambo oyo bazalaki kosala. Yango wana, nakómaki na mposa ya kokóma sango. Ntango nakómaki na mbula 13, mama akɔtisaki ngai internat oyo ezalaki kopesa bana mibali formasyo mpo na kokóma sango.
Formasyo na yo esɛngaki mpe koyekola Biblia?
Mpenza te. Ntango nakómaki na mbula 15, molakisi na ngai moko apesaki ngai kopi ya baevanzile oyo elobelaki bomoi mpe mosala ya Yesu; natángaki buku yango mbala na mbala. Ntango nakómaki na mbula 18, nakendeki kotánga na Iniversite ya baepiskɔpɔ na Rome oyo Pápa ye moko azalaki kokamba. Nayekolaki Latin, Grɛki, istware, filozofi, pisikoloji mpe teoloji. Atako tozalaki kozongela bavɛrsɛ ya Biblia oyo tokangá na motó mpe kolanda botángi ya Biblia na misa ya mokolo ya lomingo, tozalaki mpenza koyekola Biblia te.
Ntango okómaki sango-mokonzi, ozalaki mpe koteya?
Mosala na ngai ezalaki mingimingi ya kotambwisa makambo. Kasi, nazalaki koteya mibeko ya likita monene ya mibale ya Vatican.
Mpo na nini ozalaki kotyela lisusu lingomba motema te?
Makambo misato etungisaki ngai. Lingomba ezalaki kokɔta na makambo ya politiki, kotika basango mpe bandimi básala makambo mabe mpe mateya mosusu ya Katolike ezalaki solo te. Na ndakisa, ndenge nini Nzambe ya bolingo akoki kopesa bato etumbu libela na libela nsima ya liwa na bango? Lisusu, Nzambe alingaka mpenza tósalelaka sapɛlɛ mpe tózongelaka mabondeli mbala na mbala? *
Osalaki nini?
Na mai na miso, nazalaki kobondela Nzambe alakisa ngai nzela. Nasombaki mpe Biblia (Bible de Jérusalem) ya Katolike, oyo eutaki kobima kala mingi te na monɔkɔ ya Italien mpe nabandaki kotánga yango. Na nsima, mokolo moko ya lomingo, ntango nazalaki kotanda robɛ na ngai nsima ya misa, mibali mibale bayaki na seminɛrɛ. Bayebisaki ngai ete bazali Batatoli ya Yehova. Tosololaki na bango ngonga koleka moko makambo ya Biblia mpe oyo yango eteyaka na oyo etali ndenge ya koyeba lingomba ya solo.
Nini ebendaki likebi na yo epai ya bapaya yango?
Nasepelaki na kondima na bango
mpe ndenge oyo bazalaki kosalela Biblia na ngai ya Katolike mpo na kopesa bavɛrsɛ na pɛtɛɛ nyonso. Na nsima, Motatoli mosusu na nkombo Mario akómaki koya kotala ngai. Azalaki sembo mpe motema molai; mikolo nyonso ya pɔsɔ na ntɔngɔ, ezala mbula to moi, azalaki kobɛta porte ya seminɛrɛ na biso na ngonga ya libwa.Basango mosusu basalaki nini ndenge ozalaki koyamba bato yango?
Nazalaki koyebisa bango baya kolanda boyekoli na biso, kasi ata moko te azwaki yango na valɛrɛ. Ata bongo, ngai nazalaki kosepela na boyekoli yango. Nazalaki koyekola makambo ya kitoko, na ndakisa ntina oyo Nzambe atiki nzela na bampasi, likambo oyo ezalaki kotungisa ngai banda kala.
Bakonzi na yo balukaki kopekisa yo koyekola Biblia?
Na 1975, nakendeki mbala na mbala na Rome mpo na komonisa makanisi na ngai. Bakonzi balukaki kobongola makanisi na ngai, kasi ata moko te asalelaki Biblia. Nsukansuka, na mokolo ya 09/01/1976, nakomelaki Rome ete kobanda dati yango, nalongwe Lingomba ya Katolike. Mikolo mibale na nsima, nalongwaki na seminɛrɛ mpe nazwaki engbunduka mpo na koyangana mpo na mbala ya liboso na likita ya Batatoli ya Yehova, oyo ezalaki nde liyangani oyo esangisaka Batatoli ya Yehova ebele. Makambo nyonso oyo namonaki kuna ekesanaki na oyo namesanaki na yango. Moto nyonso azalaki na Biblia na ye mpe azalaki kolanda badiskur ndenge na ndenge oyo ezalaki kosalema.
Bato ya libota na yo basalaki nini na makambo wana nyonso?
Mingi na bango batɛmɛlaki ngai makasi. Kasi, nayaki koyeba ete leki na ngai moko ya mobali azalaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova na Lombardie, etúká moko na nɔrdi ya Italie. Nakendaki kotala ye mpe Batatoli ya Yehova oyo bazalaki kuna basalisaki ngai nazwa mosala mpe esika ya kofanda. Na nsima, kaka na mbula yango, nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova.
Kutu, namiyokaka mpenza penepene ya Nzambe
Oyokaka mawa mpo na yango?
Ata moke te! Kutu, namiyokaka mpenza penepene ya Nzambe mpo makambo oyo nayebi mpo na ye, euti nde na Biblia, kasi te na filozofi to na mimeseno ya lingomba. Mpe nakoki koteya basusu na kondimisama mpe na bosembo nyonso.
^ par. 13 Biblia epesi biyano ya polele na mituna yango mpe na mituna mingi mosusu. Fungolá esika bakomi MATEYA YA BIBLIA > BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA.