Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISALISI MPO NA LIBOTA | BILENGE

Oyo osengeli kosala soki basemboli yo

Oyo osengeli kosala soki basemboli yo

MOKAKATANO

“Ntango moto asemboli yo, ezali lokola nde azali koyebisa yo ete osali likambo moko ya mabe. Nayebi te moto oyo alingaka báyebisa ye ete azali kosala likambo moko ya mabe.”​—Amy, mbula 17. *

Moto oyo aboyi básembola ye azali lokola pilote oyo aboyi kolanda litambwisi ya tour de contrôle. Akoki kokutana na likama.

Omonaka ete ezalaka mpasi ondima ntango baboti, balakisi, to mikóló mosusu basemboli yo? Soki ezali bongo, lisolo oyo ekosalisa yo mpenza.

OYO OSENGELI KOYEBA

Moto nyonso azalaka na mposa básembola ye.

“Biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi.”​—Yakobo 3:2.

“Soki esɛngi básembola yo ntango osali likambo moko ya mabe, yango ezali likambo ya koyokela nsɔni te.”​Jessica.

Soki basemboli yo, yango elingi koloba te ete ozali moto mabe.

“Yehova * apamelaka moto oyo ye alingaka, kaka ndenge tata apamelaka mwana oyo ye asepelaka na ye.”​—Masese 3:12.

“Soki basemboli ngai, nasalaka makasi namona nde milende oyo moto yango asalaki mpo na kosembola ngai mpe nayebaka ete bolingo nde etindaki ye apesa ngai toli yango.”​Tamara.

Okoki kokóma moto malamu koleka soki ondimi básembola yo.

“Bóyoka disiplini mpe bókóma na bwanya.”​—Masese 8:33.

“Kosembolama esalisaka moto akola. Ekosalisa yo oyeba malamu ndenge oyo basusu batalelaka yo mpe ekosalisa yo otika mimeseno ya mabe oyo mbala mosusu oyebaki te ete ozali na yango.”​Deanne.

OKOKI KOSALA BOYE

Talelá makambo na ndenge oyo ebongi. Ekoki kozala ete olukaka kosilika ntango basemboli yo. Kasi, kotikela nkanda nzela te. Mpo na kosalisa yo, meká komitya na esika ya moto oyo azali kosembola yo mpe moná lokola yo nde ozali kosembola moto mosusu, na ndakisa leki na yo, kaka mpo na likambo wana. Omoni ete toli yango ezali na mwa makambo mosusu ya malamu? Sikoyo, kanisá lisusu ndenge oyo bazalaki kosembola yo mpe talelá yango na ndenge ebongi.​—Toli ya Biblia: Mosakoli 7:9.

“Ntango mosusu, okoki kosilika soki basemboli yo mpe kobosana ete moto yango azalaki nde koluka kosalisa yo okóma moto malamu koleka, kasi te koyokisa yo mpasi na motema.”​Theresa.

Zalá na komikitisa. Kotika te ete lolendo etinda yo oboya básembola yo. Lisusu, kolɛmba nzoto te kaka mpo bapesi toli na likambo moko oyo osengeli kobongisa. Komikitisa ekosalisa yo ondima kosembolama mpe olɛmba nzoto te. Kobosana likambo oyo te: Toli oyo ezokisaka mingi, yango nde ekoki mbala mosusu kosalisa yo mingi. Soki, mpo na ntina moko boye, oboyi kondima yango, yebá ete olekisi libaku moko ya kokóma moto oyo akɔmɛli.​—Toli ya Biblia: Masese 16:18.

Toli oyo ezokisaka mingi, yango nde ekoki mbala mosusu kosalisa yo mingi

“Kondima ntango basemboli yo ezali moko ya makambo oyo esalaka ete moto akɔmɛla. Soki totiki te ete yango eteya biso mpe esalisa biso tókɔmɛla, tokomisala mabe koleka.”​Lena.

Zalá na botɔndi. Ata soki ezali mpasi ondima toli oyo bapesi yo mpo na kosembola yo, okoki kopesa moto oyo apesi yo yango matɔndi. Kozanga ntembe, moto yango azali nde koluka bolamu na yo mpe alingi olonga na likambo oyo ozali kosala.​—Toli ya Biblia: Nzembo 141:5.

Okobungisa eloko moko te soki olobi na moto ‘Matɔndi,’ mingimingi soki apesi yo toli oyo osengelaki na yango. Ata soki toli yango etaleli yo te, okoki kopesa ye matɔndi mpo na milende oyo asalaki mpo na kopesa yo yango.”​Carla.

^ par. 4 Na lisolo oyo bankombo mosusu ezali ya bango te.

^ par. 11 Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.