Buku oyo okoki kotyela motema—Eteni 7
Nguya ya nsambo ya mokili mobimba
Oyo ezali lisolo ya nsuka na masolo nsambo oyo ebimi na banimero ya “Lamuká!” oyo elobeli banguya nsambo ya mokili mobimba oyo Biblia elobeli. Ntina na yango ezali ya komonisa ete Biblia ebongi kotyelama motema mpe ete ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe ete nsango na yango ezali nsango ya elikya, oyo elobeli nsuka ya mpasi oyo euti na boyangeli mabe ya bato likoló ya baninga na bango bato.
TOZALI sikoyo na eleko moko ya ntina mingi, mpamba te nguya ya nsambo ya mokili mobimba oyo Biblia elobeli ebimi na ntango na biso. Lisusu, ezali nguya kaka moko oyo Biblia elobeli na ndenge ya esakweli, mpo banguya motoba mosusu eyangelaki ntango Biblia ezalaki kokomama. Mpo na banguya yango nyonso nsambo, to “bakonzi,” Biblia esakolaki boye: “Mpe ezali na bakonzi nsambo: mitano bakweá, moko azali, mpe mosusu ayei naino te, kasi ntango akoya akoumela mwa ntango moke.” *—Emoniseli 17:10.
Eleki sikoyo mbula pene na 2000, ntango bakomaki maloba wana, “bakonzi” mitano, to banguya minene ya politiki, ‘esilaki kokwea.’ Ezalaki: Ezipito, Asiri, Babilone, Bamede ná Baperse, mpe Grɛsi. Maloba “moko azali” emonisaki Roma. Kasi Roma esengelaki koumela seko te. Nguya monene mosusu esengelaki kobima, kasi esakweli elobaki ete: ‘[Nguya yango] eyei naino te.’ Kaka ndenge Biblia esakolaki, ‘mokonzi’ ya nsambo abimaki na mokili! Esengelaki kozala nani? Esengelaki koyangela mokili mpo na libela? Soki te, ndenge nini esengelaki kosuka? Biblia etiki biso na molili te.
Esakweli oyo okoki kotyela motema
Nguya ya nsambo ebandaki koyebana ntango Grande-Bretagne, oyo ezalaki na nɔrdi-ɛsti ya ampire ya Roma, ebandaki kokóma na nguya makasi. Na bambula ya 1760, ekoló yango oyo ezali esanga, ekómaki nguya monene. Grande-Bretagne ekobaki kozwa bozwi mpe nguya mingi, mpe na ekeke ya 19 elekaki bikólo nyonso na bozwi mpe na nguya. Buku moko elobi ete: “Bokonzi ya Grande-Bretagne ezalaki nguya ya monene koleka oyo ebimá na mokili. Ezalaki na bato milio 372, mpe boyangeli na yango ezalaki na etando ya kilomɛtrɛ-karé koleka milio 28.”
Nzokande, Etumba ya Liboso ya mokili mobimba (1914-1918) etindaki Grande-Bretagne esala boyokani moko ya ntina mingi ná États-Unis, oyo kala ezalaki na nse boyangeli ya Grande-Bretagne. Boyokani yango ebimisaki bokonzi ya Anglo-américain, oyo na makambo mingi, ezali boyangeli ya bikólo mibale oyo elobaka Lingelesi mpe ezali koyangela tii sikoyo.—Talá etanda “Boyokani moko ya ntina mingi.”
Esakweli oyo ezali na Emoniseli 17:10 eyokani na esakweli mosusu ya mokanda ya Danyele. Danyele alobelaki “ebakata ya ekeko moko” oyo Nzambe amonisaki Nebukadenezare mokonzi ya Babilone na ndɔtɔ. (Danyele 2:28, 31-43) Danyele alimbwelaki mokonzi yango ete biteni ya ekeko yango emonisaki banguya minene ya politiki oyo ekolandana kobanda na Babilone, nguya oyo ezalaki koyangela na ntango wana. (Ezipito mpe Asiri esilaki koyangela mpe kokwea.) Masolo ya kala endimisi makambo oyo elandi:
Motó ya wolo elakisi ampire ya Babilone.
Ntolo mpe mabɔkɔ ya palata emonisi Bamede ná Baperse.
Libumu mpe bibɛlɔ ya motako elakisi Grɛsi.
Makolo ya ebende elakisi ampire ya Roma.
Makaka, oyo ezali ndambo ebende mpe ndambo mabele ya lima, elakisi ndenge oyo makambo ya politiki mpe ya bato ekoyokana te na ntango ya boyangeli ya nguya ya mokili mobima ya Anglo-américain.
Emoniseli 17:10, emonisi ete nguya ya nsambo ya mokili mobimba esengeli ‘koumela mwa ntango moke.’ Yango esengeli koumela ntango boni? Ndenge nini nguya yango ya nsambo ekosuka? Mpe nini ekosalema na nsima? Esakweli ya Danyele epesi biyano na mituna wana.
Elikya oyo okoki kotyela motema
Nsima ya kotánga eteni mokomoko ya ekeko monene, Danyele akomaki boye: “Libanga moko elongolamaki [na ngomba], na mabɔkɔ te, mpe ebɛtaki ekeko yango na makaka na yango ya ebende mpe ya mabele ya lima oyo bayemi mpe ebukaki yango.” (Danyele 2:34) Likambo yango ya nsɔmɔ oyo amonaki emonisi nini?
Danyele abakisaki ete: “Na mikolo ya bakonzi yango [ya nsuka], Nzambe ya likoló akotya bokonzi moko oyo ekobebisama te. Mpe bokonzi yango ekoleka na ekólo mosusu te. Ekotuta mpe ekosukisa makonzi oyo nyonso [ya mabele], mpe ekotikala seko. * (Danyele 2:44, 45) Talá makambo ya ntina oyo elandi:
-
Bokonzi yango oyo ekolonga, oyo emonisami na libanga monene, ‘etyami na Nzambe ye moko’ kasi na “mabɔkɔ” ya bato te. Yango wana ebongi mpenza kobengama Bokonzi ya Nzambe.
-
Bokonzi ya Nzambe “ekobuka” makonzi nyonso ya bato, ezala mpe nguya ya nsambo ya mokili mobimba. Mpo na nini? Mpo bango nyonso bakoboya kotika bokonzi mpe bakotɛmɛla Nzambe na etumba monene ya nsuka, oyo ekosalema na esika ya elilingi oyo ebengami Har-Magedone, to Armagedone. Biblia emonisi polele ete “bakonzi ya mabele mobimba esika bato bafandi” bakokɔta na etumba yango.—Emoniseli 16:13, 14, 16.
- Na bokeseni na baguvɛrnema ya bato, ezala mpe nguya ya nsambo ya mokili mobimba, oyo eyangelaka kaka ntango mokuse, Bokonzi ya Nzambe “ekobebisama te.” Lisusu, ekoyangela mabele mobimba.—
Kobomama ya banguna ya Nzambe ekokokisa na ndenge ya nsɔmɔ esakweli oyo ezali na Ebandeli 3:15, oyo eteni ya liboso ya masolo oyo elobelaki. Yesu Kristo, momboto ya mwasi akopanza Satana, nyoka ya elilingi, mpe momboto na ye. (Bagalatia 3:16) Momboto ya Satana ezali bato nyonso oyo balandaka banzela na ye ya mabe mpe balukaka komiyangela bango moko mpe kotɛmɛla boyangeli ya Nzambe mpe ya Kristo.—Nzembo 2:7-12.
Yango ebimisi motuna oyo ya ntina mingi: Ntango nini kobomama yango ekosalema, elingi koloba ntango nini “libanga” to Bokonzi ya Nzambe ekolongola biyangeli nyonso ya bato? Biblia epesi eyano na nzela ya “elembo” oyo ekosalisa bato báyeba mikolo ya nsuka.—Matai 24:3.
Yebá “elembo”!
Elembo ya ntango ya nsuka esangisi bitumba, ‘koningana makasi ya mabele,’ “bamaladi mabe,” mpe “nzala.” (Luka 21:10, 11; Matai 24:7, 8; Marko 13:8) Lisusu, na “mikolo ya nsuka” bato bakotosa te mitinda ya Nzambe na oyo etali bizaleli mpe losambo. (2 Timote 3:1-5) “Makambo nyonso wana” ezali nde kosalema? (Matai 24:8) Ezali kosalema mpenza, kutu ezali kotinda bato mingi bábanga mpo na mikolo oyo ezali koya. Zulunalo moko (The Globe and Mail) elobaki ete: “Bato mosusu ya mayele na makambo ya siansi mpe ya bomoi ya bato, oyo bato bamemyaka bango mingi, bazali koloba ete etikali moke bato nyonso bakosila na mokili.”
Nzokande, ezali na likambo moko ya ntina oyo bango bayebi te: bato nyonso te nde bakosila na mokili. Kutu, Bokonzi ya Nzambe ekoya nde mpo na kobikisa bato mosusu! Ntango Yesu apesaki elembo ya mikolo ya nsuka, alobaki boye: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Ndenge nini esakweli yango ezali kokokisama?
Batatoli ya Yehova bazali kosakola Bokonzi ya Nzambe na bikólo koleka 230. Kutu, nkombo ya zulunalo na bango ya libosoliboso ezali Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova. (Yehova ezali nkombo mpenza ya Nzambe.) (Nzembo 83:18) Mosala ya Batatoli ya koteya bato Biblia ezali kosalisa bato mpe mabota mingi bátika bomoi ya mabe mpe bákóma na bizaleli ya malamu mpe na bomoi ya kimya oyo eyokani na mitinda ya Nzambe. (1 Bakorinti 6:9-11) Yango esali ete bamilio ya bato na mokili mobimba bátya motema ete Nzambe akobatela bango ntango Bokonzi na ye ekokɔta na makambo ya bato.
Ya solo, bakomona mpenza na miso kokokisama ya maloba ya libondeli oyo Yesu apesaki lokola ndakisa, oyo ebengamaka ntango mosusu libondeli ya Nkolo to Tata wa biso, oyo elobaka ete: “Bokonzi na yo éya; nyonso yo olingi ésalema awa na se ndenge esalemaka na Matai 6:10, Biblia na lingala ya lelo oyo) Osilá komituna ndenge oyo bomoi ekozala na mabele ntango bato nyonso bakolinga Nzambe mpe bakotosa ye? Bavɛrsɛ oyo elandi ekosalisa yo omona mpenza ete elobeli “nsango malamu” ebongi mpenza.
Likolo.” (Ntango mokano ya Nzambe ekosalema awa na mabele . . .
-
Kimya ya solosolo ekozala, kasi kaka te kozanga ya bitumba. “Yehova . . . azali kosilisa bitumba tii na nsuka ya mabele. Azali kobukabuka litimbo mpe kokatakata likɔnga; azali kotumba makalo na mɔtɔ.” (Nzembo 46:8, 9) “Bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.”—Nzembo 37:11.
-
Moto nyonso akozala na bilei ebele mpenza. “Mbuma ekozala beboo na mabele; na nsɔngɛ ya bangomba biloko ekotondana.”—Nzembo 72:16.
-
Moto nyonso akozala na nzoto kolɔngɔnɔ. “Moto moko te oyo afandi kuna akoloba: ‘Nazali na maladi.’”—Yisaya 33:24.
-
Moto nyonso akozala na ndako ya kitoko. “Ya solo, bakotonga bandako mpe bakofanda kuna; mpe ya solo, bakolona bilanga ya vinyo mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga mpo moto mosusu afandaka kuna te; bakolona mpo moto mosusu alya te.”—Yisaya 65:21, 22.
-
Mpasi ya ndenge nyonso ekosila. “Hema ya Nzambe ezali esika moko na bato, . . . mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.”—Emoniseli 21:3, 4.
Bilaka wana esepelisi yo? Soki bongo, Batatoli ya Yehova bazali kolendisa yo oluka koyeba makambo mosusu na Biblia. Mpe soki osali yango, okomona bilembeteli mosusu ebele oyo emonisi mpenza ete etikali moke boyangeli mabe ya bato likoló na baninga na bango bato esuka. Okomona mpe ete ebongi mpenza otyela Biblia motema na yo mobimba, mpe ete ekomamaki mpenza na litambwisi ya elimo ya Nzambe.—2 Timote 3:16. *
^ par. 4 Lokola banguya minene oyo Biblia elobeli ezalaki mingimingi koyangelama na mokonzi moko, Biblia esaleli maloba “bakonzi,” “makonzi,” to nyonso mibale mpo na kolobela yango.—Danyele 8:20-22.
^ par. 18 Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali Bokonzi ya Nzambe oyo ekoyangela na likoló, talá mokapo 8 mpe 9 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.
^ par. 35 Soki olingi koyeba makambo mosusu na ntina ya Biblia, kokakatana te kotuna Batatoli ya Yehova na esika oyo ofandi, to kokomela bango na adrɛsi oyo ebongi na yo kati na baadrɛsi oyo ezali na lokasa 5, to okoki kokɔta na Internet na adrɛsi na biso oyo: www.jw.org.