Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo minei oyo osengeli koyeba na likambo etali koboma libala

Makambo minei oyo osengeli koyeba na likambo etali koboma libala

Nsima ya kotala ndenge ndako yango ebebi, bankolo na yango bakoki kopona​—kobuka to kobongisa yango.

YO MPE ozali kokanisa bongo mpo na libala na yo? Ekoki kozala ete molongani na yo abebisi konfianse oyo opesaki ye to mpe matata mbala na mbala elongoli esengo na libala na bino. Soki ezali bongo, okoki koloba ete ‘bolingo ezali lisusu te’ to ‘tobongi lisusu te kozala mwasi ná mobali’ to ‘toyebaki te nini etindaki biso tóbalana.’ Okoki kutu kokanisa ete, ‘ntango mosusu bosengeli kaka koboma libala yango.’

Liboso ozwa ekateli nokinoki ya koboma libala, kanisá naino. Mbala mingi, koboma libala esilisaka te mitungisi ya bomoi. Kutu, mbala mingi elongolaka mokakatano moko mpe ebakisaka mosusu. Na buku na ye (The Good Enough Teen) Brad Sachs, moto moko ya mayele, akebisaki boye: “Babalani oyo bakabwanaka, bakanisaka ete koboma libala eleki malamu​—bamonaka ete matata makasi oyo bazalaki na yango ekosila mpe ekotika esika na kimya mpe esengo. Kasi, makanisi wana ezalaka ndɔtɔ mpamba ndenge kaka moto akoki kolɔta libala ya kokoka.” Na yango, ezali mpenza na ntina moto aluka koyeba malamumalamu likambo etali koboma libala mpe azala na bokatikati na likambo yango.

Biblia mpe koboma libala

Biblia emonisaka ete koboma libala ezali likambo ya kozwa na lisɛki te. Emonisi ete Yehova Nzambe atalelaka koboma libala lokola bokosi mpe ayinaka yango, mingimingi ntango moto asundoli molongani na ye kaka mpamba, ntango mosusu mpo na kokende kobala moto mosusu. (Malaki 2:13-16) Libala ezali ekanganeli ya libela. (Matai 19:6) Mabala mingi oyo ekufaka mpo na makambo ezangi ntina ekokaki kobatelama soki balongani bazalaki kolimbisana.​—Matai 18:21, 22.

Lisusu, Biblia epesi nzela na koboma libala mpe kobala lisusu mpo na likambo moko kaka​—soki molongani moko asali ekobo. (Matai 19:9) Na yango, soki oyebi ete molongani na yo asali ekobo, ozali na lotomo ya koboma libala. Bato mosusu basengeli te kondimisa yo makanisi na bango, mpe ntina ya lisolo oyo ezali te ya koyebisa yo oyo osengeli kosala. Na nsuka, kaka yo moko nde okomona mabe mpe malamu ya likambo yango; yango wana kaka yo moko nde osengeli kozwa ekateli.​—Bagalatia 6:5.

Atako bongo, Biblia elobi ete: “Moto ya ekɛngɛ atyaka likebi na matambe na ye.” (Masese 14:15) Na yango, ata soki Makomami epesi yo nzela ya koboma libala, ekozala malamu okanisa mpenza na makambo oyo ekateli oyo olingi kozwa ekomema. (1 Bakorinti 6:12) David, mobali moko na Angleterre, alobi boye: “Bato mosusu bakoki kokanisa ete basengeli kozwa ekateli nokinoki. Kasi, lokola ngai moko nabomá libala, nakoki koloba ete esɛngaka mpenza kozwa ntango mpo na kokanisa malamu.” *

Tótalela makambo minei ya ntina oyo osengeli kokanisa na yango. Ntango tozali kotalela makambo yango, simbá ete ata moto moko te na bato yango oyo babomá libala balobi ete bazwaki ekateli ya mabe. Kasi, makambo oyo balobi emonisi mikakatano mosusu oyo mbala mingi ebimaka basanza ata mpe bambula mingi nsima ya koboma libala.

1 Mokakatano ya mbongo

Daniella, mwasi moko na Italie, afandaki na libala mbula 12 mpe ayaki koyeba ete mobali na ye abimaka na moninga na ye moko ya mosala. Daniella, alobi boye: “Ntango nayebaki likambo yango, mwasi yango azalaki na zemi ya sanza motoba.”

Nsima ya kokabwana na mobali na ye mpo na mwa ntango, Daniella azwaki ekateli ya koboma libala. Alobi boye: “Namekaki kosala nyonso mpo na kobikisa libala na biso, kasi mobali na ngai akobaki kaka kokosa ngai.” Daniella amonaki ete azwi ekateli ya malamu. Kasi, alobi boye: “Ntango kaka tokabwanaki, nakómaki mpenza kozanga mbongo. Ntango mosusu nazalaki kozanga ata eloko ya kolya na mpokwa. Nazalaki kolala na kɔpɔ ya miliki mpamba.”

Maria, mwasi moko na Espagne, akutanaki mpe na likambo ya ndenge wana. Alobi boye: “Mobali na ngai ya liboso azalaki kopesa biso mbongo te, mpe nasengelaki kosala mosala makasi mpo nafuta banyongo oyo azalaki na yango. Nasengelaki mpe kolongwa na ndako ya kitoko mpo nakende kofanda na ndako ya moke na kartye moko ya mobulu.”

Ndenge bandakisa oyo emonisi, mbala mingi, koboma libala ememelaka basi mikakatano ya mbongo. Kutu, ankɛti moko oyo esalemaki na Mpoto, oyo eumelaki mbula nsambo, emonisi ete soki mbongo ya mobali emataka mingi (11 %) nsima ya koboma libala, oyo ya mwasi ekitaka makasi (17 %). Mieke Jansen, oyo atambwisaki ankɛti yango, alobi boye: “Ezalaka mpasi mpo na basi mosusu, mpo esɛngaka kobatela bana, koluka mosala, mpe kobundana na mpasi ya motema ya koboma libala.” Zulunalo moko ya Londres (Daily Telegraph) elobi ete na makanisi ya baavoka mosusu, makambo ya ndenge wana “etindaka bato bákanisa malamu mpenza liboso ya koboma libala.”

Oyo ekoki koya na nsima: Soki obomi libala, mbongo oyo ozalaki kosimba ekoki kokita. Ntango mosusu ekoki kosɛnga okende kofanda epai mosusu. Soki ozwi mokumba ya kobatela bana, okoki kozala na mokakatano ya kokokisa malamu bamposa na yo moko mpe oyo ya bana na yo.​—1 Timote 5:8.

2 Kobɔkɔla bana

Jane, mwasi moko na Angleterre, alobi ete: “Ntango mobali na ngai azwaki mwasi mosusu, likambo yango esalaki ngai mpasi makasi na motema. Nayokaki mpe mpasi makasi ntango atikaki biso.” Jane abomaki libala. Tii lelo, amonaka ete azwaki ekateli ya malamu, kasi andimaka likambo oyo: “Mokakatano oyo nakutani na yango ezalaki ya kozala mama mpe tata ya bana na ngai. Nasengelaki kozwaka bikateli nyonso kaka ngai moko.”

Ezalaki mpe bongo mpo na Graciela, mama moko na Espagne oyo abomá mpe libala. Alobi boye: “Bazuzi bapesaki ngai ndingisa ya kobɔkɔla mwana na ngai ya mbula 16, ngai moko. Kasi, bolenge ezalaka eleko moko ya mpasi mpo na bana, mpe namibongisaki malamu te mpo na kobɔkɔla mwana na ngai, ngai moko. Nazalaki kolela butu mpe moi. Nazalaki komona ete nabongi te kozala mama.”

Baoyo bazwaka ndingisa ya kobɔkɔla bana, bakoki kokutana na mikakatano mosusu​—koyokana na balongani na bango ya kala na makambo lokola kotalaka bana, kopesa mbongo ya bana, mpe disiplini. Christine, mama moko na États-Unis, oyo abomá mpe libala, alobi boye: “Koluka kosala makambo ná molongani na yo ya kala, ezali pɛtɛɛ te. Ebimisaka makambo mingi, mpe soki okebi te okoki kobanda kosalela mwana mpo na koluka kozwa eloko oyo olingi.”

Likambo oyo ekoki kosalema: Ntango mosusu okoki kosepela te na ekateli ya bazuzi na likambo etali nani akobatela bana. Soki bazuzi bapesi bino mibale ndingisa yango, molongani na yo ya kala akoki kolinga te kosala oyo yo olingi na makambo oyo tolobelaki liboso na ndakisa kotala bana, kopesa mbongo, mpe bongo na bongo.

3 Makambo oyo koboma libala ekoki kobimisela yo

Mark, mobali moko na Angleterre, mwasi na ye asalaki ekobo mbala ebele. Alobi boye: “Na mbala ya mibale, nalobaki ete mbala ya misato nakokoka te.” Mark abomaki libala, kasi amonaki ete bolingo mpo na mwasi na ye esilaki te. Alobi boye: “Ntango bato bazalaki koloba mabe mpo na ye, bazalaki kokanisa ete bazali kosalisa ngai; nzokande, bazalaki nde kopesa ngai mpasi. Bolingo na ngai mpo na ye ezalaki kaka.”

David, oyo tolobelaki liboso, atungisamaki mpe ntango ayokaki ete mwasi na ye abimaka na mobali mosusu. Alobi boye: “Elekelaki ngai. Nazalaki mpenza na mposa nalekisa bomoi na ngai mobimba elongo na ye ná bana na biso.” David azwaki ekateli ya koboma libala, kasi likambo yango etiká ye na kobanga na motema. Alobi boye: “Namitunaka soki mwasi mosusu akoki mpenza kolinga ngai to soki likambo ya boye ekoki kokómela ngai soki nabali lisusu. Konfianse oyo nazalaki na yango esilá.”

Soki obomá libala, na ntembe te okozala kaka na ebele ya mitungisi na motema. Epai mosusu, okoki komona ete bolingo oyo ozalaki na yango mpo na moto yango oyo bozalaki na ye mosuni moko, esilá naino te. (Ebandeli 2:24) Epai mosusu, okoki komona lokola nde ozali mpe na ngambo na likambo oyo esalemaki. Graciela, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Ata nsima ya bambula mingi, okozala kaka na makanisi oyo ekobanda kotungisa yo, komimona ete ozali lisusu na ntina te, mpe ozangi moto ya kosunga yo. Okobanda kokanisa ntango ya malamu oyo bolekisaki na libala, mpe okoki kokanisa: ‘Azalaki koloba na ngai ete akokoka kozala na bomoi te kozanga ngai. Azalaki ntango nyonso kokosa ngai? Mpo na nini likambo ya boye esalemi?’”

Likambo oyo ekoki kosalema: Okoki mbala mosusu kosilika mpe kobomba nkanda mpo na makambo mabe oyo molongani na yo asali yo. Ntango mosusu, mpasi ya kozala yo moko ekoki kolata yo.​—Masese 14:29; 18:1.

4 Oyo koboma libala esalaka epai ya bana

José, tata moko na Espagne, oyo abomá mpe libala alobi boye: “Nasilaki mpenza mayele. Likambo ya mpasi koleka ezalaki ntango nayebaki ete mobali oyo azalaki kobima na mwasi na ngai ezalaki nde mobali ya leki na ngai. Nayokaki mposa ya kokufa.” José amonaki mpe ete bana na ye mibale ya mibali​—ya mbula mibale mpe minei—​batungisamaki mpe na likambo oyo mama na bango asalaki. Alobi boye: “Likambo yango elekelaki bango. Bazalaki koyeba te mpo na nini mama na bango akómaki kofanda na mobali ya tata–mwasi na bango mpe mpo na nini nazwaki bango mpe tokendaki kofanda na leki na ngai ya mwasi ná mama na ngai. Soki nalingi kobima, bazalaki kotuna ngai ‘Okozonga ntango nini?’ to bazalaki koloba ete, ‘Tata kosundola biso te!’”

Mbala mingi bana nde banyokwamaka mingi ntango baboti babomi libala. Kasi, ezali boni soki baboti bazali koyokana te? Na ntango wana, koboma libala “ezali malamu mpenza mpo na bana”? Na bambula oyo euti koleka, bato mingi basalaki bongo​—mingimingi ata ntango mikakatano ya libala ezalaki mpenza makasi te. Buku moko (The Unexpected Legacy of Divorce) elobi boye: “Mikóló mingi oyo bazalaka na mikakatano na libala na bango bakokamwa koyeba ete bana na bango bazalaka mpenza na esengo te. Ntango bazali komona libota ezali esika moko, bakipaka te ata soki tata na mama bazali kolala lisusu mbeto moko te.”

Ya solo, bana bayebaka ntango baboti bazali na matata, mpe matata yango ekoki kobebisa makanisi mpe motema ya bana. Kasi, koloba ete koboma libala ekozala mpo na bolamu na bango ezali libunga mpenza. Na buku na bango (The Case for Marriage), Linda Waite mpe Maggie Gallagher balobi ete “libala esalisaka baboti bázala na likoki ya kosala bango mibale mpo na kopesa bana disiplini oyo ebongi, oyo ekosalisa bana, ata soki libala yango ezali mpenza malonga te.”

Likambo oyo ekoki kosalema: Koboma libala ekoki mpenza kosala bana mabe mingimingi soki olendisi bango te bázala na boyokani ya malamu na tata to mama na bango.​—Talá etanda  “Nakɔtela nani?”

Lisolo oyo elobeli makambo minei oyo ekozala malamu otalela soki ozali kokanisa koboma libala. Ndenge tomonaki yango liboso, soki molongani na yo asali ekobo, yo moko nde okoki kozwa ekateli. Ata ozwi ekateli nini, osengeli koyeba makambo oyo yango ekoki kobimisa. Yebá mikakatano oyo okokutana na yango mpe omibongisa mpo na kolonga yango.

Nsima ya kotalela likambo yango, okoki komona ete likambo ya malamu oyo osengeli kosala ezali ya kobongisa libala na yo. Kasi, ekoki mpenza kosalema bongo?

^ par. 8 Bankombo mosusu ezali ya bango te.