Lakisá makambo oyo ezali na kati

 Biblia elobi nini?

Ntina oyo osengeli koboya bikelakela

Ntina oyo osengeli koboya bikelakela

NA MBOKA moko ya Azia, etuluku moko ya bato bazali kosala fɛti mpo na kokumisa bilimo. Fɛti yango eyei ndɔngɔ ntango basi mibale baponami mpo bilimo ekɔtela bango. Miso na bango ebaluki mpe babandi kolɛnga lokola nde bakangami na kura.

Na Porto Rico, nganga-nkisi moko (santero) azali kosala molulu moko mpo na kosolola na elimo oyo babengaka Changó, to nzambe ya nkake. Ntango nganga-nkisi yango azali koloba makambo oyo azali komona, bato nyonso na esika yango babandi kolɛnga lokola nde elimo ekɔteli bango.

Na mikili mingi, bato bazalaka na momeseno ya koyokana na bilimo mabe. Bato mingi bakómi kondima ete ezali na nguya moko oyo eleki ya bato, mpe mingi bazali kobendama na yango. Babuku, masano, baemisyo ya televizyo, mpe bafilme oyo elobelaka bademo, bondɔki, mpe makambo mosusu ya molili epalangani mingi.

Nzokande, Biblia ezali koteya biso ete kolanda makambo ya molili ezali komitya na boyokani na bilimo mabe. Bikelakela ezali mpenza likama. Ezali kaka te koluka koyeba makambo oyo eyebani te. Ezali mpenza kokɔta na boyokani na bademo, baanzelu mabe oyo batombokelaki Nzambe.​—Emoniseli 12:9, 12.

Bademo basalelaka bikelakela ndenge mobomi-mbisi asalelaka mpambo. Mobomi-mbisi asalelaka mpambo ndenge na ndenge mpo na kokanga mbisi ndenge na ndenge. Ndenge moko mpe, bademo basalelaka mitindo ndenge na ndenge ya bikelakela mpo na kozwa bato ya lolenge nyonso. Mokambi ya bademo abengami “nzambe ya ebongiseli ya makambo [mabe] ya ntango oyo.” Azali kozipa makanisi ya bato oyo bazangi kondima mpo bámona te solo ya Liloba ya Nzambe mpe mokano na ye.​—2 Bakolinti 4:4.

Esika oyo bikelakela ememaka

Mokano ya bilimo mabe ezali ya koluka kolongola makanisi na biso epai ya Mozalisi mpe kopekisa biso tózala na boyokani malamu na Ye. Bapusaka bato báboya kotosa mitinda ya sembo ya Nzambe na nko to na kozanga koyeba. Na yango, bikelakela esalaka ete moto andimama lisusu te epai ya Nzambe, azanga elikya, mpe yango ekoki komema ye na liwa.​—Emoniseli 21:8.

Luis, moto moko ya Porto Rico, alobi boye: “Banda bomwana, libota na biso mobimba tozalaki komipesa na bikelakela. Tozalaki kosala  yango ata na losambo na biso mpe ekómaki mpenza bomoi na biso. Nazalaki kokanisa ete nabotamá na likoki ya komona makambo oyo ekoya mpe kotala bakarte mpo na koyebisa bato makambo oyo ekokómela bango. Nazalaki ata na likoki ya koponela bato nimero malamu mpo bálonga na tombolá. Makoki yango oyo nazalaki kokanisa ete nabotamá na yango ezalaki nde kopekisa ngai nazwa boyebi ya Biblia mpe nakóma moninga ya Nzambe.”​—Yoane 17:3.

Bato mingi bakanisaka ete kozala na boyokani na bademo ezali na likama te, ezali kutu malamu. Basusu balobaka ete ezali na bademo mosusu ya malamu to ete misala ya bademo ekoki kosalisa moto azala na mayele, na bozwi mpe na esengo. Yango ezali lokuta monene. Luis alobi boye: “Ezalaka kaka na eloko oyo osengeli kopesa mpo na kozwa makambo wana nyonso.”

Elenge mobali moko na nkombo ya Chad akómaki komona bimonamona mpe azalaki ntango nyonso kotungisama ntango alali. Alobi boye: “Bademo babandaki kotungisa mpe konyokola ngai butu nyonso.” Ndenge nini tokoki kobatelama na makambo yango?

Ndenge ya kozwa libateli

Mpo na kozwa libateli tosengeli kokima makambo nyonso oyo ekoki kotya biso na boyokani na bademo. (Bagalatia 5:19-21) Yango wana, Yehova Nzambe akebisi basaleli na ye na makambo oyo: “Moto akozwama kati na bino te . . . [oyo azali] moto ya zonga, to moto na kotala minzoto mpo na kosakola liboso, to moto na kosala nkisi mpo na kosakola liboso, to nganga ya nkisi, to molɛngoli, to moto na kobyanga milimo, to nganga ya soloka, to moto na kosolola na bakufi. Mpo ete bato nyonso na kosala makambo oyo bazali mbindo na miso ya [Yehova].”​—Deteronome 18:10-12.

Na boyokani na maloba yango, bato mingi basili kobwaka babuku to biloko nyonso oyo ezali na boyokani na bilimo mabe mpo na komibatela. Ken, ye oyo alongwaki na boombo ya bikelakela, alobi boye: “Nalukaki na kati ya biloko na ngai nyonso mpe natumbaki eloko nyonso oyo namonaki ete ezali mabe.”​—Talá Misala 19:19, 20.

Libateli oyo eleki nyonso ezali kokóma moninga ya Yehova, Nzambe ya solo. Talá likambo oyo elobami na Yakobo 4:7, 8: “Bótosaka Nzambe; kasi bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino. Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino. Bópɛtola mabɔkɔ na bino, bino basumuki, mpe bókómisa mitema na bino pɛto, bino bato ya mitema mibale.”

Yehova Nzambe ateyaka mpe abatelaka baoyo bapusanaka penepene na ye. Bato yango ‘bazangi te koyeba mayele mabe ya Satana’ mpe bakosamaka te na makambo oyo ezali komonana lokola pole. (2 Bakolinti 2:11; 11:14) Lisusu, Yehova azali Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Soki tobeleli ye na kondima nyonso, akosikola biso na mitungisi ya bademo. Chad, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Lokola nayebaki banani bazalaki kotungisa ngai, ntango nabelelaki Yehova Nzambe ete abatela ngai na bademo yango, mitungisi yango esilaki.”​—Nzembo 91:1, 2.

Na ntembe te, bato ya mitema sembo bakoki kosepela ete Nzambe azali kobatela bango lelo oyo mpe ete etikali moke bademo mpe bato nyonso oyo balandaka nzela na bango bakobomama. Kanisá naino esengo mpe kimya oyo ekozala na mabelé mobimba ntango bato bakosikolama na misala ya bademo!​—Yisaya 11:9; Emoniseli 22:15.