Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Solo ya Biblia ekómi epai ya Batswa

Solo ya Biblia ekómi epai ya Batswa

 Solo ya Biblia ekómi epai ya Batswa

EUTI NA MOKOMI NA BISO NA CAMEROUN

Na bikólo koleka 230, na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova bazali kosala makasi mpo na koyebisa nsango ya Bokonzi ya Nzambe epai ya “bato ya ndenge nyonso.” (1 Timote 2:4; Matai 24:14) Kati na bato yango ezali mpe na Batswa (Pygmées) ya Afrika. Bato yango bazalaka mikuse, mpe molai na bango esukaka kaka mɛtrɛ 1,20 tii mɛtrɛ 1,40. Batswa bafandaka mpenza nde na zamba minene ya République centrafricaine, na Congo nyonso mibale mpe na sudi-ɛsti ya Cameroun.

Balobelaki Batswa mpo na mbala ya liboso ntango mokonzi ya Ezipito, Farao Neferirkarê, atindaki bato bákenda koluka esika ebale Nil ebandá. Bato oyo batindaki bango balobaki ete bakutanaki na bato moko ya mikuse na kati ya zamba ya Afrika. Nsima mpenza, Homère mokomi ya babuku mpe Aristote, moto ya filozofi, bato ya Grèce, bango nyonso mibale balobelaki Batswa. Bato ya Mpoto bakutanaki na Batswa na ekeke ya 16 mpe ya 17.

Na mikolo na biso, Batatoli ya Yehova bazali kosakola na bamboka ya zamba ya Afrika. Atako Batswa bayokaka malamu nsango ya Bokonzi, kasi milende nyonso oyo esalemaki mpo bákola na elimo ebimisaki mpenza matomba te. Mpamba te Batswa bafandaka esika moko te. Bafandaka kaka mwa basanza mpe bakendaka epai mosusu.

Batswa bazali bato ya kimya mpe bazalaka nsɔninsɔni. Na Afrika mobimba bakoki kozala 150 000 tii 300 000. Baguvernɛma, masangá oyo esalisaka bato mpe mangomba mosusu, batongaki biteyelo mpo na bango, bakisá mpe bandako ya mikemike oyo ebongi na bango. Atako bongo, makambo nyonso oyo bazali komeka mpo Batswa báfanda esika moko ezali kaka mosala mpamba.

Kasi na Cameroun, Janvier Mbaki, azali Motswa ya liboso oyo afandi esika moko mpe akómi Motatoli ya Yehova, oyo ayebani na ekólo wana. Janvier andimaki nsango ya Bokonzi nsima ya kotánga buku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis, buku oyo ezali na bililingi mingi, mpe mikanda mosusu. * Azwaki batisimo na mobu 2002 mpe lelo azali mobongisi-nzela, ndenge Batatoli ya Yehova babengaka basakoli na bango ya ntango nyonso. Azali mpe mosaleli na misala na lisangá ya Mbang, mwa engumba moke na sudi-ɛsti ya Cameroun. Toyebi te soki na mikolo ezali koya Batswa mosusu ya Cameroun bakolinga kosambela Yehova, Nzambe kaka moko ya solo, oyo alingaka “bato ya ndenge nyonso.”

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 7 Ebimisami na Batatoli ya Yehova, kasi ebimaka lisusu te.

[Elilingi na lokasa 18]

Janvier Mbaki, Motswa ya liboso oyo akómi Motatoli ya Yehova na Cameroun, azali na mosala ya kosakola