Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge nini nakoki koyeba koloba liboso ya bato?

Ndenge nini nakoki koyeba koloba liboso ya bato?

Mituna oyo bilenge batunaka . . .

Ndenge nini nakoki koyeba koloba liboso ya bato?

“Nazalaki kokanisa ete soki nasali mwa foti to nabangi mwa moke, bato bazalaki koyeba yango. Nakokaki te kotya makanisi na ngai nyonso na lisolo na ngai. Nakanisaki ete bazalaki kosɛka ngai na nse ya mitema.”​—Sandy. *

NDAKO ya makita ya eteyelo etondi na bato. Oyoki nkombo na yo na mikro mpe mbala moko miso ya bato nyonso ebandi kotala yo. Mpo otɛlɛma na esika ofandi mpe omata na estrade, okómi komona lokola basɛngi yo otambola kilomɛtrɛ mobimba. Obandi kotɔka na mabɔkɔ, makolo ekómi kilo, mpe mbala moko monɔkɔ ekauki. Na nsima, liboso kutu oyeba ete obandi kotɔka, elongi ebandi kobimisa mitɔki ya mobesu. Nsɔni ekangi yo! Oyebi malamu ete olingi te kotɛlɛma liboso na basoda oyo bakobɛta yo masasi, kasi ozali komona lokola bongo.

Tóndima yango: mingi na biso tobangaka mwa moke liboso ya koloba na miso ya bato. (Yilimia 1:5, 6) Bato mosusu kutu balobaka ete malamu akufa na esika ya koloba liboso ya bato! Kasi, ezala obangaka koloba na miso ya bato to te, ezali na bantina mingi mpo na yango osengeli kosala makasi oyeba koloba liboso ya bato. Tiká tótalela mwa bantina yango mosusu mpe ndenge nini okoki koyeba koloba malamu.

Ntango bapesi yo maloba

Na piblisite moko oyo bazalaki kobenga bato bayekola ndenge koloba liboso ya bato, balobaki ete: “Moto nyonso asengeli koyeba koloba liboso ya bato.” Ɛɛ, ata ndɛlɛ, ekozala na mokɔlɔ oyo ekosɛnga oloba liboso ya bato. Na ndakisa, biteyelo mingi elendisaka likambo ya koyeba koloba liboso ya bato. Mwana mwasi moko nkombo na ye Tatiana, alobi ete: “Ntango nazalaki na kelasi, nasengelaki mbala na mbala koloba liboso ya baninga na ngai bana-kelasi.” Bana-kelasi basengeli komibongisaka mpo na koloba: ntango basɛngi bango bálimbola na mokuse buku moko to liteya moko, ntango basɛngi bákɔtisa maloba na kasɛti to na video, to ntango basɛngi bango bápesa makanisi na lisolo ya bato ebele.

Ntango osilisi kelasi mpe obandi mosala, bakoki kosɛnga yo otángisa baninga ya mosala to olakisa bango mosala, olimbolela kiliya moko mosala oyo azali na yango mposa na kompanyi na bino, to opesa lapolo ya makambo ya mbongo epai ya bakonzi na yo. Na ntembe te, koyeba koloba ezali na ntina mpo na misala ebele, na ndakisa mosala ya mopanzi-nsango, mosala ya kotambwisa kompanyi, mosala ya boyokani na bato ya libándá ya kompanyi mpe mosala ya koteka biloko.

Kasi, tokoloba boni soki oponi kosala mosala ya mabɔkɔ to mosala ya biro? Na ntembe te, koyeba koloba ntango bazali kotuna yo mituna mpo na kozwa yo na mosala ekoki kosalisa yo ozwa mosala. Na esika ya mosala, soki oyebi koloba malamu, yango ekoki kozala malamu mpo na yo. Ntango Corrine asilisaki kelasi, asalaki mbula misato na restora moko. Alobi boye: “Soki ozali koloba malamu, bakomona ete okɔmeli mpe ozali na makoki mpo bamatisa yo mpɛtɛ. Yango ekoki kutu kosalisa yo ozwa mosala ya malamu, lifuti ya malamu to mpe bato bápesa yo limemya mingi.”

Longola yango, bilenge baklisto balobaka mbala mingi liboso ya bato mpo na losambo na bango. (Baebele 10:23) Taneisha alobi ete: “Ezali mpenza na ntina koyeba koloba polele. Tozali na libaku malamu ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.” (Matai 24:14; 28:19, 20) Na lisangá mpe na mosala na bango ya kosakola, bilenge baklisto bakoki te ‘kotika kolobela makambo oyo bamoni mpe bayoki.’​—Misala 4:20; Baebele 13:⁠15.

Tomoni ete koyekola koloba malamu ekoki kozala na litomba mpo na yo na makambo mingi. Atako bongo, ekoki kozala ete mwa kobanga ekoyela yo ntango oyebi ete okoleka liboso ya bato mpo na koloba. Ezali nde na eloko oyo okoki kosala mpo na kolongola mwa kobanga wana? Ɛɛ, ezali.

Longolá kobanga

Profesɛrɛ Morton Orman, oyo azali molobi monene mpe apesaka mateya mpo na ndenge ya koloba kozanga kobanga, alobi ete: “Mpo na koyeba koloba malamu, esɛngi te ozala kaka na mayele mingi to oloba kozanga foti. Sɛkɛlɛ ya koloba malamu na miso ya bato yango oyo: zalá na likambo moko ya ntina ya koyebisa bato oyo bazali koyoka yo.” Na maloba mosusu, moná nde nsango oyo olingi koyebisa bango, kasi komimona yo moko te to kotya makanisi te na kobanga na yo. Bato mosusu na ekeke ya liboso bakanisaki ete ntoma Paulo azalaki mpenza te molobi ya makoki, kasi lokola azalaki ntango nyonso na likambo moko ya ntina ya koyebisa bato, tokoki koloba ete azalaki molobi ya makoki. (2 Bakolinti 11:6) Ndenge moko mpe, soki ozali na likambo moko ya ntina ya koyebisa bato, oyo yo moko ondimi ete ezali mpenza bongo, kobanga na yo ekoumela te kosila.

Ron Sathoff, oyo mpe azali molobi monene mpe alakisaka bato ndenge ya koloba liboso ya bato, apesi toli oyo: Komona lisukulu na yo te lokola likambo moko ya monene. Moná yango nde lokola lisolo. Ɛɛ, taláká bato oyo bazali koyoka yo, kosuka te na kolekisa miso likoló na bango nyonso, kasi taláká moto mokomoko, kaka ndenge osalaka ntango ozali kosolola na moto. Monisá ete ozali mpenza ‘komibanzabanza’ mpo na bato oyo bazali koyoka yo, mpe lobá na bango ndenge olobaka mikolo nyonso. (Bafilipi 2:3, 4) Ntango obandi koloba lokola ozali kobɛtela bango lisolo, okomona mpe kobanga na yo esili.

Eloko mosusu oyo etungisaka bato mingi ezali kobanga ete bato oyo bazali koyoka yo bakoloba nini. Lenny Laskowski, oyo azali molobi monene mpe alakisaka bato ndenge ya koloba liboso ya bato, ayebisi biso ete bato oyo bazali koyoka yo bazelaka osalela bango lisolo ya kitoko. Laskowski alobi ete “balingaka oloba malamu, kasi obunga te.” Yango wana, zalá na makanisi ya kolonga. Soki ekoki, meká kopesa mbote na mwa ndambo ya bato oyo bakoyoka yo ntango bazali kokɔta. Meká komona bango lokola baninga, kasi lokola banguna te.

Kobosana mpe te ete kobanga mwa moke ezalaka mpenza mabe te. Moto moko ya mayele alobi boye: “Na kokesene na likanisi oyo bato mingi bazalaka na yango, soki ozali kobanga mwa moke, yango ezali malamu mpo na yo mpe mpo na lisolo oyo okosala.” Mpo na nini? Mpamba te soki ozali kobanga mwa moke, yango elakisi ete oyebi esika makoki na yo esuki, mpe ekosalisa yo omityela motema koleka ndelo te. (Masese 11:⁠2) Bato mingi oyo basalaka mimekano ya mbangu, babɛti ya miziki, mpe basani ya filme to ya teyatre bamonaka ete mwa kobanga moke etindaka bango bábongisa lisusu malamu koleka; ekoki mpe kozala bongo mpo na moto oyo asengeli koloba liboso ya bato.

Toli mpo na koloba malamu

Ntango basalelaki makanisi oyo elandi mpe toli mosusu, bilenge baklisto mosusu bazalaki lisusu na mokakatano te mpe bakómá balobi malamu na eteyelo, na bisika ya mosala, mpe na masangá na bango. Talá soki mwa ndambo ya batoli oyo bango bapesi ekoki mpe kosalisa yo.

Jade: “Lobá makambo yango na maloba na yo moko. Omindimisa ete makambo oyo okoloba ekoteya bato. Soki yo moko omoni ete lisolo na yo ezali na ntina, bato oyo bakoyoka yo bakomona mpe bongo.”

Rochelle: “Namonaka malamu komitala na video mpo na komona ndenge nalobaka. Esalaka mwa nsɔni kasi ezali na ntina. Lisusu, meká kopona lisolo oyo osepelaka na yango mingi. Maloba ekobanda koya yango moko ntango ozali koloba.”

Margrett: “Namonaka ete nalobaka ndenge nameseni koloba mpe mongongo na ngai ebimaka lokola nazali kosolola na moto ntango nasalelaka plan na esika ya kokoma na papye makambo nyonso oyo nakoloba. Longola yango, kopema makasi liboso ya koloba esalisaka ngai naloba na motema ya kokita.”

Corrine: “Kobanga te komisɛka yo moko. Moto nyonso asalaka mabunga. Salá nde makasi osala lisolo na yo malamu koleka.”

Ya solo, ndenge kaka ezalaka na misala nyonso oyo esɛngaka milende, na ndakisa masano, teyatre, to miziki, nkisi mosusu ezali te oyo eleki komesana na mosala mpe kosala likambo moko mbala na mbala. Tatiana apesi toli ete osengeli kobongisa lisolo na yo mikolo mingi liboso mpo ozwa ntango mingi ya komeka yango. Mpe kolɛmba te. Alobi boye: “Soki nazali koloba mbala na mbala liboso ya bato, kobanga ezalaka lisusu te.” Kasi, kobosana te ete ezali mpe na esika mosusu oyo okoki kozwa lisalisi, mingi mpenza soki esɛngi ete oloba mpo na losambo ya solo.

Lisalisi oyo euti epai ya molobi monene

Banda bolenge na ye, Davidi, oyo akómaki mokonzi ya Yisalaele, ayebanaki lokola “moto oyo ayebi koloba na mayele.” (1 Samuele 16:18, NW) Nini esalisaki ye? Ekoki kozala ete ntango Davidi azalaki elenge, mpe ntango azalaki koleisa bampate na libándá, akolisaki boyokani ya malamu elongo na Molobi Monene, Yehova Nzambe, na nzela ya libondeli. (Nzembo 65:⁠2) Boyokani wana nde esalisaki ye mpo ayeba koloba polele, na maloba ya nguya, mpe na mayele ya kondimisa, ata na ntango akutanaki na komekama.​—1 Samwele 17:34-37, 45-47.

Okoki kondima mpenza ete na losambo na yo, Nzambe akosalisa yo olobaka na mayele ya kondimisa, ndenge asalisaki Davidi; akopesa yo “lolemo ya baoyo balakisami.” (Yisaya 50:4; Matai 10:18-20) Ɛɛ, soki banda lelo ozali kosalela malamu mabaku ya kokolisa makoki na yo ya koloba, okoki kokóma molobi ya makoki!

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 3 Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa.

[Etanda na lokasa 18]

Bazwaka formasyo mpo na koloba malamu

Masangá ya Batatoli ya Yehova na mabelé mobimba ezalaka na programɛ moko ya pɔsɔ nyonso ya mateya ya Biblia, oyo babengaka Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi. Bana-kelasi bapesaka biyano na mituna oyo batunaka na kelasi yango, basalaka masolo liboso ya lisangá mobima, mpe mokomoko azwaka toli oyo esalisaka ye akola. Programɛ yango esalisaka mpenza bango? Tótika Chris, elenge moko ya mbula 19, ayebisa biso ndenge esalisaki ye.

Alobi boye: “Liboso nakomisa nkombo na eteyelo yango, nazalaki kokoka te koloba liboso ya bato. Nandimaki te ete mokolo mosusu nakokoka kotɛlɛma mpe koloba liboso ya bato. Kasi, bandeko mosusu ya lisangá balendisaki ngai, balobaki ete ata soki nazali kokoka koloba malamu te banda ebandeli tii nsuka ya lisolo na ngai mpo na likukuma, bakomona yango mabe te, mpo bayebi milende oyo nasali mpo nakóma wana. Na nsima, mbala nyonso soki nasali lisolo, bazalaki kopesa ngai longonya. Yango esalisaki ngai mingi.”

Lelo oyo, nsima ya kolekisa mbula mitano na eteyelo yango, Chris azali komilɛngɛla mpo na kosala lisukulu na ye ya liboso ya miniti 45. Yo mpe ozali kozwa litomba na ebongiseli yango?

[Bililingi na lokasa 17]

Koyeba koloba malamu ekoki kosalisa yo na makambo nyonso ya bomoi