Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tóbwaka maloba ya kozokisa

Tóbwaka maloba ya kozokisa

 Engebene Biblia

Tóbwaka maloba ya kozokisa

“Kaka na monɔkɔ wana moko lipamboli mpe elakeli mabe ezali kobima. Ebongi te, bandeko na ngai, ete makambo wana ekoba kosalema bongo.”​—YAKOBO 3:10.

LIKOKI ya koloba ezali moko ya makambo oyo ekesenisi biso na banyama. Kasi na mawa nyonso, bato mosusu basalelaka likabo yango na ndenge ya mabe. Kofinga, maloba mabe, maloba ya mbindo, maloba ya kotuka mpe maloba ya nsɔni, nyonso wana ekoki kozokisa, mbala mosusu koleka ata mbɛli. Biblia elobi ete: “Moto azali oyo akoloba lokola koswama na mbɛli.”​—Masese 12:18.

Bato mingi bazali na momeseno ya kolapa ndai mpe kolakela mabe. Balakisi mingi bazali koloba ete bana-kelasi bakómi koloba maloba ya nsɔni mingi. Bato mosusu kutu balobaka ete maloba mabe ekoki kozala malamu soki moto alobi yango mpo na kosilisa nkanda. Moyekoli moko oyo atángaka kelasi ya makambo ya politiki akomaki boye: “Mpo na kobimisa mpenza nkanda to mpasi  oyo ozali na yango na motema, ezali mabe te kosalela maloba ya nsɔni.” Baklisto basengeli mpe kotalela maloba makasimakasi ndenge wana na lisɛki? Ndenge nini Nzambe atalelaka likambo yango?

Tóyina masɛki ya nsɔni

Maloba ya nsɔni ebandi lelo te. Okokamwa koyoka ete bato bazalaki kosalela maloba ya nsɔni ata na ntango ya bantoma, eleki sikoyo pene na mbula 2000? Na ndakisa, emonani lokola ete bandeko mosusu na lisangá ya Kolose bazalaki kosalela maloba ya nsɔni soki bazali na nkanda. Ekoki kozala ete bazalaki koloba maloba yango mpo na koswanisa basusu to koyokisa basusu mpasi, mpo na kozongisa mabe oyo basalaki bango. Ndenge moko mpe lelo oyo, bato mingi balobaka maloba ya nsɔni ntango bazali na nkanda. Yango wana, mokanda oyo Paulo akomelaki Bakolose etaleli mpe biso lelo. Paulo akomaki boye: “Bólongola yango nyonso epai na bino, nkɛlɛ, nkanda, mabe, maloba ya kofinga, mpe maloba ya nsɔni na monɔkɔ na bino.” (Bakolose 3:8) Tomoni ete bakebisi baklisto na kobwaka maloba ya nkanda mpe maloba ya nsɔni, oyo mbala mingi ekendaka nzela moko na nkanda.

Ezali solo ete bato mingi balobaka maloba ya nsɔni mpo na koswanisa to mpo na koyokisa basusu mpasi te. Mbala mingi, bato babimisaka maloba ya nsɔni mpo na masɛki. Yango wana, maloba yango ekɔtelaka bango makasi mpe ekómaka elobeli na bango ya mokolo na mokolo. Bato mosusu kutu bakokaka lisusu te kosolola na bato kozanga kokɔtisa maloba ya mbindo. Kutu mbala mingi basalelaka maloba ya nsɔni mpo na kosɛkisa bato. Kasi, tosengeli nde kokanisa ete masɛki ya nsɔni ezali mabe te mpe kotikela yango nzela? Tótalela naino makanisi oyo elandi.

Masɛki ya nsɔni ezali maloba ya mabe oyo bato mosusu basalelaka mpo na kosɛkisa basusu. Lelo oyo, masɛki ya nsɔni elobelaka mingi makambo ya kosangisa nzoto. Ata bato oyo bapesaka bango kilo bamonaka yango kaka lokola maloba ya kosɛkisa. (Baloma 1:28-32) Yango wana, ezali likambo ya kokamwa te soki bato oyo basɛkisaka na radio to na televizyo bakómi lelo kolobela mingi makambo ya kosangisa nzoto, ezala na ndenge ya malamu to ya mbindo. Masɛki ya nsɔni elekaka na bafilme, na televizyo mpe na radio.

Biblia ezali komonisa polele likanisi na yango mpo na masɛki ya nsɔni. Ntoma Paulo akomelaki baklisto ya Efese boye: “Tiká ete pite mpe bosɔtɔ ya ndenge nyonso to lokoso etángama ata kotángama te na kati na bino, ndenge mpenza ebongi na basantu; etamboli ya nsɔni mpe te, masolo ya bozoba te, masɛki ya nsɔni te, makambo wana ebongi te.” (Baefese 5:3, 4) Tomoni polele ete maloba ya nsɔni, ezala moto abimisi yango na nko to te, esepelisaka Nzambe te. Ezali mabe. Ezali maloba oyo ezokisaka.

Maloba makasimakasi oyo esepelisaka Nzambe te

Na ntembe te, maloba ya kozokisa eleki kutu maloba ya nsɔni. Kofinga moto, kotyola ye, kosɛka ye, kokatela ye mangala, nyonso wana ekoki kozokisa ye makasi. Toboyi te; biso nyonso tosalaka masumu na lolemo na biso, mingi mpenza lokola tofandi na mokili oyo bato mingi bazali na momeseno ya kotyola mpe kotɔnga basusu. (Yakobo 3:2) Atako bongo, baklisto ya solo basengeli soki moke te kozwa na lisɛki maloba ya kofinga. Biblia emonisi polele ete Yehova Nzambe asepelaka ata moke te na maloba nyonso oyo ezokisaka.

Na ndakisa, na mokanda ya Mikonzi ya mibale, tozali kokuta lisolo moko ya bana mike oyo batungisaki mosakoli Elisa na maloba na bango. Lisolo yango elobi ete bana yango ‘babandaki kosɛka ye’ mpe “balobaki na ye ete, ‘Butá, yo moto na libandi! Butá, yo moto na libandi!’” Yehova, oyo akokaki kotánga na mitema ya bana yango mpe komona makanisi mabe oyo bazalaki na yango, amonaki maloba na bango ya kofinga ete ezali lisɛki te. Lisolo elobi ete Nzambe abomaki bana 42 mpo na maloba na bango ya kofinga.​—2 Mikonzi 2:23, 24.

 Bana ya Yisalaele “bazalaki kosɛka bantoma na Nzambe mpe kotyola maloba na ye mpe kotuka basakoli na ye; nkanda na [Yehova] epelisami liboso na bato na ye, kino akokaki kotika lisusu te.” (2 Ntango 36:16) Atako eloko epesaki Nzambe nkanda ezalaki mpenzampenza losambo ya bikeko mpe kozanga botosi ya bato ya ekólo na ye, tosengeli koyeba ete Biblia ezali kolobela mingi ndenge bazalaki kosɛka basakoli na ye. Yango emonisi ete Nzambe asepelaka ata moke te na maloba ya ndenge wana.

Kutu Biblia ekebisi baklisto ete: “Kopamela mokóló makasi te.” (1 Timote 5:1) Tokoki mpe kosalela etinda yango ntango tozali koloba na moto nyonso. Biblia elendisi biso ‘tóloba mabe mpo na moto te, tózala te bato balingá-bitumba, tózala te bato ya makambo makasimakasi, tómonisa boboto mpenza epai ya bato nyonso.’​—Tito 3:2.

Batelá monɔkɔ na yo

Ntango mosusu, ezalaka pɛtɛɛ te komipekisa na kokatela bato mangala. Ntango basaleli moto mabe, akoki kokanisa ete asengeli kaka kozongisa mabe na moto oyo asali ye mabe na maloba ya makasimakasi, ezala na miso na ye to ntango apesi mokɔngɔ. Kasi, moklisto asalaka bongo te. Masese 10:19 elobi ete: “Na mingi na maloba, masumu mazangi tɛ; nde ye oyo akangi monɔkɔ na ye azali na mayele.”

Baanzelu bazali ndakisa malamu na likambo yango. Bayebi malamu mabe nyonso oyo bato basalaka. Atako baanzelu baleki bato na makasi mpe na nguya, bafundaka bango te na maloba ya kofinga, “mpo na limemya epai ya Yehova.” (2 Petelo 2:11) Lokola bayebi ete Nzambe ayebi malamu mabe oyo moto mokomoko asalaka mpe azali na makoki nyonso ya kosembola makambo, baanzelu babatelaka minɔkɔ na bango. Mikaele, mokonzi ya baanzelu, apekisaki monɔkɔ na ye ebimisa maloba ya kofinga, ata mpo na Zabolo.​—Yuda 9.

Baklisto basalaka makasi mpo na kolanda ndakisa ya baanzelu. Batosaka likebisi oyo ya Biblia: “Bózongisa mabe na mabe na moto te. Bókanisaka nde kozongisa makambo ya malamu mingi na miso ya bato nyonso. Soki likoki ezali, na meko oyo yango etaleli bino, bózala na kimya elongo na bato nyonso. Bózongisa bino moko te mabe na oyo asali bino mabe, balingami, kasi bótikela nde nkanda esika; mpo ekomamá ete: ‘Kozongisa mabe ezali likambo na ngai; ngai nakozongisa, Yehova alobi bongo.’”​—Baloma 12:17-19.

Likambo oyo esengeli kosimba likebi na biso ezali ete, ata mongongo to ndenge ya koloba ekoki kozokisa. Mbala mingi basi na mibali na bango bagangelanaka ntango baswanaka. Baboti mingi bazalaka na momeseno ya kogangela bana na bango. Nzokande, ntina ya koganga ezali te mpo na komonisa ete tosiliki. Biblia elendisi biso ete: “Tiká makambo nyonso ya bololo ya koyokisa mpasi mpe nkanda mpe nkɛlɛ mpe koganga mpe maloba ya kofinga elongolama epai na bino elongo na mabe nyonso.” (Baefese 4:31) Biblia elobi mpe ete “moombo ya Nkolo asengeli te kobunda, asengeli nde kozala na boboto epai ya bato nyonso.”​—2 Timote 2:24.

Maloba oyo ekitisaka motema

Lokola lelo oyo maloba ya kofinga mpe ya nsɔni ekómi mingi, baklisto basengeli koyeba ndenge ya kotɛmela elimo wana ya mabe. Biblia epesi biso nkisi ya malamu mpo na likambo yango; nkisi yango ezali nde bolingo ya mozalani. (Matai 7:12; Luka 10:27) Soki tomitye mpenza na esika ya basusu mpe tozali na bolingo mpo na bazalani na biso, yango ekotinda biso tólobelaka bango ntango nyonso maloba oyo ekitisaka motema. Biblia elobi: “Tiká ete liloba moko te ya kopɔla ebima na monɔkɔ na bino, kasi liloba nyonso oyo ezali malamu mpo na kotonga na ntango mposa ezali, mpo epesa bayoki oyo ezali malamu.”​—Baefese 4:29.

Lisusu, soki tozali kotondisa bɔɔngɔ na biso na Liloba ya Nzambe, yango ekosalisa biso tóboya kobimisa maloba oyo ezokisaka. Kotánga mpe komanyola Makomami Mosantu ekoki kosalisa biso ‘tóbwaka mbindo nyonso.’ (Yakobo 1:21) Ya solo, Liloba ya Nzambe ekoki kopɛtola makanisi na biso.