Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Parc national ya Nairobi​—Esika nyama ezalaka na bonsomi

Parc national ya Nairobi​—Esika nyama ezalaka na bonsomi

 Parc national ya Nairobi​—Esika nyama ezalaka na bonsomi

EUTI NA MOKOMI NA BISO NA KENYA

TOZALI na ngonga ya 6:30 ya ntɔngɔ. Mwese, oyo ebimi na ɛsti, ezali komonana lokola eloko moko ya kitoko, ya monene mpe ya motane. Kongɛnga na yango, oyo ezali komonisa ete ntɔngɔ etani, ezali kobɛta na maninisa ya talatala ya bandako milaimilai oyo ezali na babiro mpe kongɛngisa yango na langi ya wolo. Soki otiki babiro wana, opusani moke, likambo moko ya kokamwa ezali kosalema kuna.

Nkosi, oyo emibombi na matiti ya milai, ezali kolanda mboloko oyo ezali kolya matiti. Mboloko yango, oyo ezali naino kokola, emoni likama, ebandi mbangu kasi nkosi elandi yango. Bokila ebandi mpenza. Soki kaka nkosi ekangi mboloko, elei yango.

Makambo ya ndenge wana ezali kosalema mingi na parc national ya Nairobi, oyo ezali kaka pembeni ya Nairobi, engumba-mokonzi ya Kenya. Lokola nyama ya parke yango efandaka pembeni na bato, emesaná na bato. Kutu na 1962, bamonaki nkosi moko ezali kotambola pembeni ya otɛlɛ moko ya monene, ntango mosusu ebimaki mpo na komonisa ete esiliki ndenge bato basilisi zamba esika wana. Ebandaki ndenge nini nyama ya zamba ekóma kofanda penepene mpenza na bato ndenge wana?

Ebandeli ezalaki mpasi

Ezalaki pɛtɛɛ te mpo na kosala parke wana. Mikakatano ezalaki mingi oyo esengelaki kosilisa yango mpo na kozwa likoki ya kobatela esika moko mpo na nyama. Tii na ebandeli ya ekeke ya 20, nyama ezalaki kotambola ndenge elingi na zamba minene na Ɛsti ya Afrika. Na bisika yango, bato bazalaki ntango nyonso kofanda esika moko na nyama ya zamba, mpo bazalaki mpe koleisa bitonga na bango pene na zamba yango. Bato mosusu kutu bazalaki koboma nyama yango mpe kolya yango soki basengeli na yango.

Kasi, babomi-nyama mosusu bakɔtaki ebele na mboka, na mindoki ya makasimakasi, mpe mingi na bango  bayaki na mokano ya koboma nyama mingi koleka. Moko na bango ezalaki Théodore Roosevelt, prezida ya kala ya États-Unis, ye ayaki na Kenya na 1909 koluka mitindo mosusu ya nyama mpo na komema yango na bisika oyo babombaka biloko ya kala. Lokola amemaki bato 600, bato oyo bamesani na bokila mpe bato ya komema, abomaki nyama koleka 500 mpe atindaki mposo na yango na mboka na ye. Kaka na bambula wana, Édward, prince de Galles, mobomi-nyama mosusu oyo ayebanaki mingi, ayaki mpe. Likambo oyo bango basalaki etindaki bato ebele bákóma mpe kosala mibembo ya bokila. Na ntembe te, masasi ezalaki kozangisa te mpe ezalaki koboma nyama mingi mbala moko koleka matimbo mpe makula ya bonkɔkɔ.

Ntango basilisaki kosala nzela ya engbunduka oyo ebandi na Kenya mpe ekei tii na Ouganda, nzela oyo ekendá nsango mpe bapesá yango nkombo Nzela ya Ligboma, yango epesaki bato mingi likoki ya koya kofanda zingazinga ya Nairobi, mpe nyama ekokaki lisusu te kotambola na bonsomi. Etikalaki moke nyama esila.

Na nsima, na bambula 1930, bato mosusu bakómaki koloba ete esengeli kobatela nyama. Moko na bango ezalaki Archie Ritchie, moko ya bato oyo bazalaki kokɛngɛla parke, mpe mosusu Mervyn Cowie, oyo azalaki kobatela mbongo. Basalisaki makita minene mpe bakomaki masolo na bazulunalo mpo na kosɛnga bakonzi ya mboka na ntango wana, básala parc national mpo bato bálɛmbisa to bátika koboma nyama na ndenge wana ya nsɔmɔ. Guvɛrnema ezalaki mpenza te kondima likanisi yango. Ezalaki kolinga te kotika mabelé monene bongo kaka mpo na kobatela zamba mpe nyama, na esika oyo bazalaki kotonga engumba moko monene na Ɛsti ya Afrika.

Milende mpo na kobatela nyama ekutanaki mpe na mokakatano mosusu na etumba ya mibale ya mokili mobimba, ntango basoda babebisaki zamba oyo parke ezali lelo. Na etumba yango, basoda babomaki mpe nyama mingi. Lokola basoda bazalaki ntango nyonso wana na zamba yango, nyama ezalaki lisusu kobanga bato te, mpe nyama mosusu ekómaki koluka kolya bato. Mpo na yango, nyama mosusu, na ndakisa nkosi oyo bapesaki nkombo Lulu, oyo eyebanaki mingi, mpe baninga na ye mosusu, babomaki yango.

Kasi, ntango bakonzi ya mboka babongolaki makanisi na bango na likambo yango, mikakatano mingi esilaki, mpe bato oyo balingaka kobatela zamba mpe nyama balongaki. Nsukansuka, nsima ya ntango molai ya mikakatano ndenge na ndenge, parc national ya Nairobi​—parke ya liboso na Ɛsti ya Afrika​—esalemaki na mokolo ya 16 Desɛmbɛ 1946, ntango Sir Philip Mitchell, guvɛrnɛrɛ ya Kenya na ntango wana atyaki mabɔkɔ na mokanda oyo epesaki nzela básala parke yango.

Esika kitoko mpo na bato oyo bakendaka kotala yango

Parc National ya Nairobi ezali monene mingi te soki tokokanisi yango na baparke mosusu oyo ezali na Afrika ya Ɛsti. Balobaka ete ezali na bonene ya kilomɛtrɛ-kare 117, mpe mpo na kokóma na esika monene ya kokɔta na parke yango okotambola ata kilomɛtrɛ 10 te soki otiki engumba Nairobi. Kasi, soki parke yango eyebani mingi, ezali mpo ezali moke. Ezali na bisika mingi te na mokili oyo moto akoki komona na mosika ndenge nyama ezali kosakana na kati ya zamba: esika okomona polele bokeseni monene kati na engumba ya Nairobi oyo ezali se kokóma monene mpe zamba ya Afrika.

Lokola parke yango ezali moke, bato oyo bakendaka kotala yango bamonaka nyama minene, longola kaka nzoku, mingi etondani mpenza esika moko koleka na baparke mosusu ya minene. Parke yango ezali na mitindo 100 ya nyama mpe mitindo ya ndɛkɛ koleka 400. Parke yango ezali pembeni ya nzela oyo ekendaka na libanda ya mpɛpɔ ya Nairobi.

Moto oyo akei kotala Nairobi, akoki kolongwa na otɛlɛ ya kitoko na engumba, koleka bandako milaimilai esika babiro ezali, mpe nsima ya mwa miniti moke akokóma na esobe mpe na zamba. Kuna, akomona nkosi mpe  nyama mosusu oyo elyaka nyama ezali kosala mpenza bokila. Akobosana noki te ndenge amoni nyama oyo elyaka misuni ezali kolanda nyama mosusu mpe na mosika azali komona bandako milaimilai ya engumba.

Parke yango etondi na nyama minene lokola nzale, nkoi, dikala (girafe), makako, mboloko ya minene mpe ya mike, mpe nkánga (rhinocéros noirs), nyama mosusu oyo emonanaka mingi te. Mingi kati na nyama yango efandaka kaka wana na parke. Na ntango ya elanga na sanza ya Febwali/Marsi mpe Augusto/Sɛtɛmbɛ, okoki mpe komona ebele ya nyama mosusu oyo efandaka esika moko te, na ndakisa nyama babengi gnou, pembeni ya maziba oyo ezalaka na kati ya parke yango.

Na maziba mosusu, oyo babengaka yango maziba ya ngubu, okokuta ebele ya ngubu, balalilali na mai lokola batono, mokolo mobimba, mpe na butu bakobima na mokili mpo na kolya matiti. Pembenipembeni ya maziba yango, ezali na banzela ya mikemike oyo batyá bilembo, epai moto akoki kotika motuka mpe kotambola na makolo. Kasi esengeli kokeba: Kotambola na bisika yango ekoki mpe kozala likama, mpamba te maziba mosusu etondi na ngandó, oyo ekoki komibomba pembeni ya mai, mpe moto oyo ayebi te akoki komona yango te! Soki olingi ngandó elya yo te, ekozala malamu otambola elongo na bato oyo bakɛngɛlaka parke, mpo bango bamesaná.

Parke yango etondi mpe na ndɛkɛ ndenge na ndenge. Maligbanga, ndɛkɛ oyo ezali molai mɛtrɛ mibale mpe eleki ndɛkɛ nyonso ya mokili na monene, ezalaka mpe na parke yango. Ezali mpe na ndɛkɛ oyo babengaka vautour oyo bato balingaka te mpo elyaka nyama ya kopola, epumbwaka likoló mosika. Atako ezalaka mpenza kitoko te, ndɛkɛ yango ezali na ntina mpo na parke, mpamba te elyaka bibembe ya nyama, oyo soki epoli ekoki kobota mikrobe oyo ekoki kopesa nyama mosusu maladi.

Mbala mosusu, okoki mpe komona ndɛkɛ babengi sekrɛtɛrɛ. Nsima ya matoi na yango, ezali na nsala oyo ezali lokola ekomeli (plume) oyo bakomeli bazalaki kosalela kala mpo na kokoma. Ezalaka kaka mbangumbangu; okokanisa bazali kozela yango na esika mosusu. Ndɛkɛ ezali mingi, lokola oyo babengi ombrette, grue royale, jabiru, mpe mokɛngɛli-ngɔmbɛ.

Atako parke yango ezali monene mingi te, ezali na zamba mpe mai ya kitoko, mpe ezali na mitindo ya nyama ndenge na ndenge. Na epai ya wɛsti, ezali na mwa zamba ya moke (6%) mpe kuna mbula ebɛtaka mingi (milimɛtrɛ 700 tii 1 100). Mwa nzete lokola oyo babengi châtaigne du Cap mpe croton ezalaka mingi na zamba yango. Na epai ya sudi mpe ya ɛsti, mbula ebɛtaka mpe mwa mingi (milimɛtrɛ 500 tii 700), zamba ezali te, okomona mosika ndenge mabelé etandani, bisika ya patatalu, mabwaku, mpe bangomba. Matiti kitoko ya esobe, mbila babengi palmier dattier, mpe mitindo ndenge na ndenge ya nzete babengi akazia epesaka mopɛpɛ kitoko ya esobe na esika yango.

Tokobosana mpe te bansɔngɛ ya bangomba milaimilai ya kitoko oyo ekoki kokóma mɛtrɛ 100 na likoló ya mabwaku. Bato oyo bamataka bangomba, bakolɛmbana komata yango, mingi mpenza baoyo balingaka komeka!

Parke yango ezali na likama

Mikakatano mingi oyo etali kobatela nyama eutaka kaka epai ya moto. Milende oyo moto azali kosala mpo na kobongisa mboka ezali kotya parc national ya Nairobi na likama. Engumba ya Nairobi, oyo bafandi na yango bapanzá nsango ya parke wana na mokili mobimba, ezali se kokóma monene, mpe zamba ezali se kokóma moke mpo na nyama. Lokola bato mingi bazali koluka kofanda na engumba yango, mingi bazali ntango nyonso koluka mapango ya kosomba, mpe nyama ekoki te kopekisa bato básilisa zamba yango. Mai ya salite oyo ezali kouta na baizini ya pembeni wana ezali mpe likama mpo na lolenge nyonso ya bomoi na parke yango.

Mokakatano mosusu oyo ekoki kotya parke yango na likama ezali bongo kozanga ya banzela oyo nyama etambolaka. Eteni monene ya parke yango ezali na lopango mpo na kopekisa nyama ebima na engumba. Bato oyo basalaka bilanga na bamasini mpe baoyo babɔkɔlaka nyama bazali kobebisa mwa esika oyo ezali na lopango te na epai ya sudi. Soki nzela nyonso ekangami, ekozala mpe likama: nyama oyo ebimaka na parke mpo na kokende koluka matiti ya kolya, ekoki kokende libela. Mpo na kobatela banzela oyo nyama etambolaka na libanda ya parke, ebongiseli moko ya monene mpo na kobatela nyama (Kenya Wild Service) ezwi mokumba ya kobatela mwa eteni ya mabelé oyo ezali pembeni ya parke yango. Atako mikakatano wana nyonso ezali, mbula na mbula parc national ya Nairobi ezali kaka koyamba bankoto ya bato, oyo bayaka kotala makambo kitoko oyo ezali kuna.

[Elilingi na lokasa 24]

Dikala

[Elilingi na lokasa 25]

Nkoi

 [Elilingi na lokasa 26]

Marabu

[Elilingi na lokasa 26]

Ngando

[Elilingi na lokasa 26]

Nkosi

[Elilingi na lokasa 26]

Grue royale

[Elilingi na lokasa 26]

Kánga

[Elilingi na lokasa 26]

Maligbanga