LITEYA 9
Yirimia atikaki te kolobela makambo ya Yehova
Mpo na nini bato bazali kosilikela Yirimia?
Yehova abikisaki Yirimia
Bato mosusu basɛkaka biso mpe bamosusu basilikelaka biso ntango tozali koyebisa bango makambo ya Yehova. Yango ekoki kolongola biso mposa ya kolobela makambo ya Nzambe. Yo mpe osí oyoká ndenge wana?
Ntango Yirimia azalaki elenge, Yehova atindaki ye ayebisa bato bátika kosala makambo ya mabe. Mokumba yango ezalaki mpasi mingi mpo na Yirimia, mpe azalaki kobanga. Ayebisaki Yehova ete: ‘Nayebi makambo nakoloba te. Nazali naino mwana moke.’ Kasi Yehova
alobaki na ye: ‘Kobanga te. Nakosalisa yo.’Na yango, Yirimia abandaki koyebisa bato ete soki batiki makambo ya mabe te, bakozwa etumbu. Okanisi ete bato basalaki ndenge Yirimia alobaki?
Na ndakisa, mokolo moko bato mabe babwakaki Yirimia na libulu ya pɔtɔpɔtɔ. Azalaki na mai ya komɛla te, biloko ya kolya mpe te. Bato yango bakanaki kotika Yirimia kuna mpo akufa. Kasi, Yehova abikisaki ye!
Ndakisa ya Yirimia ekoki koteya yo nini?