LITEYA 10
Yesu azalaki mwana ya botosi
Ozalaka ntango nyonso na esengo ya kotosa baboti?
Ntango Yesu azalaki na likoló, azalaki na Tata na ye Yehova. Kasi awa na mabele mpe azalaki na baboti. Nkombo ya tata na ye ezalaki Yozefe, nkombo ya mama na ye Maria. Oyebi ndenge Yozefe ná Maria bakómaki baboti ya Yesu?
Yehova asalaki likamwisi moko: alongolaki bomoi ya Yesu na likoló mpe atyaki yango na libumu ya Maria mpo Yesu abotama moto mpe afanda awa na mabele! Yesu akolaki na libumu ya Maria lokola mwana nyonso. Sanza soki 9 na nsima, Yesu abotamaki. Ezali ndenge wana nde Maria ná mobali na ye Yozefe, bakómaki baboti ya Yesu awa na mabele.
Ntango Yesu akómaki na mbula 12, asalaki likambo moko oyo emonisaki ete alingaki mpenza Tata na ye Yehova. Likambo yango esalemaki ntango Yesu mpe bato ya libota na bango bakendaki mobembo mosika, na Yerusaleme mpo na fɛti ya Elekeli. Na nzela ya kozonga, Yozefe ná Maria bamonaki Yesu te. Oyebi esika azalaki?
Mpo na nini Yesu akendaki na tempelo?
Yozefe ná Maria bazongaki mbangu na Yerusaleme mpe balukaki Yesu bipai nyonso. Bazalaki komitungisa mingi mpo bazalaki komona ye te. Kasi, nsima ya mikolo misato, bakendaki kokuta ye na tempelo! Oyebi mpo na nini Yesu akendaki na tempelo?
Ndakisa ya Yesu ekoki koteya yo nini?