LITEYA 5
Samwele akobaki kosala makambo ya malamu
Banda ntango Samwele azalaki mwana moke, akómaki kofanda mpe kosala na tabernakle, esika bato bazalaki koya kosambela Yehova. Oyebi nini esalaki ete Samwele akóma kofanda na tabernakle? Tólobela naino Hana, mama ya Samwele.
Banda kala Hana azalaki na mposa ya mwana, kasi azalaki kobota te. Na yango abondelaki Yehova asalisa ye. Alakaki ete soki aboti mwana mobali, akotinda ye akende kofanda mpe kosala na tabernakle. Yehova ayokelaki Hana, mpe Hana abotaki mwana mobali. Apesaki ye nkombo Samwele. Mpe kaka ndenge Hana alakaki, ntango Samwele akokisaki mbula misato to minei, Hana akendaki kotika ye na tabernakle mpo asalela Nzambe kuna.
Eli nde azalaki nganga-nzambe monene na tabernakle. Bana na ye mibale ya mibali mpe bazalaki kosala kuna. Kobosana te ete tabernakle ezalaki esika ya kosambela Nzambe, mpe bato basengelaki kosala makambo ya malamu kuna. Kasi bana ya Eli bazalaki kosala makambo ya mabe mpenza. Samwele azalaki komona makambo oyo bazalaki kosala. Samwele mpe akómaki kosala makambo ya mabe lokola bana ya Eli?
Na makanisi na yo, Eli asengelaki kosala bana na ye nini?
Samwele ayebisaki Eli nsango ya Yehova
Mokolo moko na butu ntango Samwele alalaki, ayokaki moto abengi ye: ‘Samwele!’ Akendaki mbangu epai ya Eli, kasi Eli alobaki na ye ete: ‘Nabengi yo te.’ Esalemaki bongo mbala mibale lisusu. Ntango Samwele akendaki epai ya
Samwele azali ndakisa malamu mpo na biso. Asalaki makambo ya malamu atako azalaki komona bato mosusu bazali kosala makambo ya mabe. Bongo yo? Okozala lokola Samwele, mpe okokoba kosala makambo ya malamu? Soki osali bongo, okosepelisa Yehova mpe baboti na yo.