LITEYA 3
Rahaba andimelaki Yehova
Kanisá ete tozali na engumba Yeriko. Engumba yango ezali na mokili ya Kanana, epai bato bandimelaka Yehova te. Mwasi moko na nkombo Rahaba afandaka kuna.
Ntango Rahaba azalaki elenge, ayokaki na masolo ndenge Moize akabolaki Mbu Motane mpe abimisaki Bayisraele na Ezipito. Ayokaki lisusu ndenge Yehova asalisaki bango bálonga banguna na bango. Sikoyo, Rahaba ayoki ete Bayisraele bakómi pene ya kozwa Yeriko.
Rahaba abombaki banɔngi mpo andimelaki Yehova
Mokolo moko na mpokwa, Bayisraele mibale bakɔti na mayele mpo na kotala mokili ya Yeriko. Bakómi na ndako ya Rahaba. Asɛngi bango bákɔta na ndako mpe báfanda. Na butu, bayebisaki mokonzi ya Yeriko ete banɔngi moko bakɔti na mboka mpe ete bakei na ndako ya Rahaba. Mokonzi atindaki bato epai ya Rahaba mpo na kokanga mibali yango. Kasi Rahaba abombaki banɔngi yango mibale na plafɔ ya ndako na ye mpe alobaki na basali ya mokonzi ete: ‘Banɔngi bazalaki awa kasi babimi. Soki bolandi bango sikoyo, bokoki kozwa bango!’ Oyebi mpo na nini Rahaba abombaki banɔngi yango?
Liboso ete banɔngi yango bábima na ndako ya Rahaba, balakaki Rahaba ete bakobatela ye ná bandeko na ye ntango Yeriko ekobomama. Oyebi nini bayebisaki ye asala?
Yehova abikisaki Rahaba ná bandeko na ye
Nsima ya mwa mikolo, Bayisraele batambolaki zingazinga ya engumba yango na kimya. Basalaki bongo mikolo motoba; bazalaki kobaluka mbala moko na mokolo. Kasi na mokolo ya nsambo, babalukaki engumba yango mbala nsambo. Mpe na nsima, bango nyonso bagangaki
Lisolo ya Rahaba ekoki koteya yo nini?