LITEYA 7
Esí ekómela yo obanga to ozala lokola mwana ya mawa?
Talá mwana wana na fɔtɔ. Azali lokola mwana ya mawa mpe azali kobanga. Yo mpe osí omiyoká ndenge wana?
Yezabele alukaki koboma Eliya
Eliya azalaki kofanda na Yisraele kala mpenza, liboso Yesu abotama. Ahaba, mokonzi ya Yisraele, azalaki kosambela Yehova te. Ahaba ná Yezabele mwasi na ye bazalaki kosambela Baala, nzambe ya lokuta. Na yango, Bayisraele mingi mpe bakómaki kosambela Baala. Yezabele azalaki makambo mabe mpe alukaki koboma bato nyonso oyo bazalaki kosambela Yehova, ata mpe Eliya! Oyebi soki Eliya asalaki nini?
Eliya akimaki! Akendaki mosika na esobe mpe abombanaki na libulu moko. Mpo
Ndenge nini Yehova asalisaki Eliya?
Ntango Eliya azalaki na libulu wana, Yehova atunaki ye: ‘Ozali kosala nini awa?’ Eliya alobaki: ‘Natikali kaka ngai moko na losambo na yo. Nazali mwana ya mawa, mpe nazali kobanga báboma ngai.’ Eliya akanisaki ete babomaki basambeli nyonso ya Yehova. Kasi Yehova alobaki na Eliya: ‘Te, ezali solo te. Ezali na bato mosusu 7 000 oyo bazali kosambela ngai. Zalá na mpiko. Nazali na mosala mingi ya kopesa yo!’ Okanisi ete Eliya asepelaki koyoka bongo?
Likambo oyo ekómelaki Eliya ekoki koteya yo nini?