Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi
Bandeko ya bolingo:
“Topesaka ntango nyonso Nzambe matɔndi ntango totángaka bino nyonso na mabondeli na biso, mpo totikaka te kokanisa mosala na bino ya sembo mpe mosala makasi na bino ya bolingo mpe koyika mpiko na bino mpo na elikya na bino epai ya Nkolo na biso Yesu Kristo liboso ya Nzambe mpe Tata na biso.” (1 Tes. 1:2, 3) Maloba yango emonisi mpenza ndenge toyokaka mpo na bino! Topesaka Yehova matɔndi mpo na bino mpe mosala malamu oyo bozali kosala. Mpo na nini?
Na mbula oyo eleki, bomipesaki na ‘mosala ya sembo’ mpe ‘mosala makasi ya bolingo’ mpo na matomba ya Bokonzi. Mingi kati na bino bolukaki ndenge ya komipesa mingi na mosala ya kosakola. Bamosusu bakendaki kosala na bingumba mosusu, ata mpe na bikólo mosusu, epai mposa ya basakoli ezali makasi. Bamosusu babakisaki molende na kosakola na bisika ya bato ebele. Mingi bazalaki babongisi-nzela basungi na eleko ya Ekaniseli, na vizite ya mokɛngɛli ya zongazonga, to mpe na kampanye monene oyo esalemaki na sanza ya mwambe ya mobu 2014. Atako makambo ya bomoi na bino ezali ndenge moko te, tomoni ete bozali kosalela Yehova na molimo na bino mobimba, mpe topesi bino longonya. (Kol. 3:23, 24) “Mosala na bino ya sembo” etindaka biso mpenza tópesa Yehova matɔndi!
Tosepelaki mpe mingi na ‘mosala makasi ya bolingo’ oyo bosalaki na mokili mobimba mpo na kotonga bandako Yis. 60:22) Kanisá naino: na mbula eleki, tozalaki basakoli 8 201 545, mpe toyekolaki Biblia na bato soki 9 499 933 sanza na sanza. Na yango, esengeli koyeisa Babetele mingi minene to mpe kobongisa yango lisusu. Esengeli mpe kobakisa Bandako ya Bokonzi! Lisusu, esengeli kotongela bandeko oyo babongolaka mikanda babiro mpe bandako na bamboka ndenge na ndenge mpo báfanda mpe básala esika monɔkɔ na bango elobamaka.
ndenge na ndenge mpo na mosala ya teokrasi. Tozali mpenza na mposa ya bandako yango, mpo motángo ya basaleli ya Yehova ezali se kobakisama. (Na yango, mokomoko akoki komituna boye: ‘Ndenge nini nakoki kopesa mabɔkɔ na mosala yango ya kotonga?’ Bandeko mosusu bakoki kokende kosala mosala ya kotonga. Mpe ata soki toyebi kotonga to te, biso nyonso tokoki kopesa makabo ya biloko na biso ya motuya mpo na mosala yango monene. (Mas. 3:9, 10) Ntango tabernakle ezalaki kotongama, Bayisraele bazalaki kopesa makabo ebele tii bayebisaki bato bátika koya na biloko. (Kob. 36:5-7) Na ntembe te, bandakisa ya ndenge wana esimbaka motema na biso mpe elendisaka biso. ‘Mosala makasi ya bolingo’ oyo bosalaka na makambo wana oyo etali losambo na biso etindaka biso mpe tópesa Yehova matɔndi!
Tosepelaka mpe mingi na ezaleli ya koyika mpiko oyo bandeko na biso bazali komonisa. Na ndakisa, tólobela bandeko na biso ya Corée du Sud. Banda 1950, bandeko mibali oyo bazali bilenge bakɔtaka bolɔkɔ bambula ebele mpamba te baboyaka mosala ya soda mpo bábebisa bosembo na bango te. Na boumeli ya bambula, bandeko na biso bamoni mpasi na likambo yango, kasi bazali kaka koyika mpiko. Ndakisa na bango ya koyika mpiko elendisaka kondima na biso!
Na Érythrée, bandeko mibali misato bazali na bolɔkɔ esali mbula koleka 20. Bamosusu, ata mpe bandeko basi ná bana na bango, bakɔtá bolɔkɔ mpo na mwa bambula. Tosali nyonso mpo na kobimisa bango, kasi tii sikoyo, tolongi naino te. Bandeko na biso bazali kaka koyika mpiko. Bazali kobatela bosembo na bango na kati ya minyoko ya makasi. Tóbosanaka te kolobela bandeko yango ya sembo na mabondeli na biso.—Ya solo, bino nyonso te nde bokɔti bolɔkɔ mpo na kondima na bino. Atako bongo, mingi kati na bino bozali koyika mpiko mpo bambula ezali kopusana, bozali na maladi oyo eumeli mingi, bozali kokutana na botɛmɛli oyo ezali kouta epai ya molongani to bandeko ya libota oyo bazali Batatoli te, to mpe bozali kobunda na mikakatano oyo kaka bino moko boyebi. Atako bongo, bozali kokoba kosalela Yehova na bosembo! (Yak. 1:12) Topesi bino longonya. Ezaleli na bino ya koyika mpiko ezali likambo mosusu oyo etindaka biso tópesa Yehova matɔndi.
Ya solo, mosala na bino ya sembo, mosala makasi na bino ya bolingo, mpe ezaleli na bino ya koyika mpiko etindaka biso mpenza ‘tópesa Yehova matɔndi, mpo azali malamu.’ (Nz. 106:1) Tolingaka bino mingi mpenza, mpe tozali kobondela ete Yehova apesa bino makasi, asunga bino, mpe apambola bino mpo bósalela ye libela na libela.
Bandeko na bino,
Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova