Buku ya mobu 2015 ya Batatoli ya Yehova

Mosala monene na Warwick

Lingala
Mosala monene na Warwick
https://cms-imgp.jw-cdn.org/img/p/302015052/univ/art/302015052_univ_sqr_xl.jpg
yb15 nk. 10-15

MAKAMBO YA ESENGO YA MBULA ELEKI

Mosala monene na Warwick

Mosala monene na Warwick

BANDEKO bazali kosepela mingi mpe bazali kosala mosala makasi ya kotonga na Warwick, na etúká ya New York, esika oyo biro monene ya Batatoli ya Yehova ekotyama na mikolo ezali koya. Bandeko mibali mpe bandeko basi ebele mpenza batiki makambo mosusu ya bomoi na bango mpo na komipesa na mosala yango. Atako bongo, mingi kati na bango balobaka ete eloko moko te ekoki kozwa esika ya mosala oyo bazali kosala kuna. Tólobela mosala oyo ezali kosalelama na Warwick.