Buku ya mobu 2015 ya Batatoli ya Yehova

“Tomoni makambo ya kokamwa”

Lingala
“Tomoni makambo ya kokamwa”
https://cms-imgp.jw-cdn.org/img/p/302015059/univ/art/302015059_univ_sqr_xl.jpg
yb15 nk. 42-43

MAKAMBO YA ESENGO YA MBULA ELEKI

“Tomoni makambo ya kokamwa”

“Tomoni makambo ya kokamwa”

Ndeko moko oyo miso ekufá azwi batisimo

MOKOLO moko ntango Yesu abikisaki mokatatali moko (paralysé), bato “nyonso bakamwaki mingi mpenza, mpe babandaki kopesa Nzambe nkembo, mpe babangaki mingi mpenza, balobi: ‘Tomoni makambo ya kokamwa lelo!’ “ (Luka 5:25, 26) Makambo oyo Yehova Nzambe azali kosala lelo na nzela ya Mwana na ye, ya moombo ya sembo mpe ya mayele, mpe ya basaleli na ye ya sembo na mabele mobimba ezali mpenza kotinda biso tóloba ete: “Tomoni makambo ya kokamwa.”