Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA ESENGO YA MBULA ELEKI

Biblia oyo esalemi mpo eumela

Biblia oyo esalemi mpo eumela

BATATOLI YA YEHOVA balingaka Biblia koleka mikanda mosusu nyonso. Bayekolaka yango mingi mpe basalelaka yango mpo na koteya bato nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Mat. 24:14) Na yango, bandeko basalaki milende mingi mpenza mpo Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika ebimeli ya 2013 na Lingelesi esalema na biloko oyo ekosala ete emonana kitoko mpe eumela.

Ntango bandeko ya imprimeri na biso na Wallkill, na New York, (États-Unis) basololaki na mokambi ya kompanyi moko oyo etyaka bizipeli na babuku mpo na koyebisa ye ndenge oyo balingi ete Biblia na biso ya sika ezala, moto yango alobaki: “Biblia oyo bozali koluka ezalaka te.” Abakisaki boye: “Ezali mawa mpo Babiblia mingi oyo tosalaka emonanaka kitoko soki efandi na mesa to na bibliotɛkɛ, kasi eumelaka te.”

Babiblia Libongoli ya Mokili ya Sika oyo tobimisaki liboso ezalaki koumela mpenza te. Na yango, bandeko ya imprimeri ya Wallkill bayekolaki na likebi ndenge ya kosalela kɔle, kosala bizipeli, mpe ndenge ya kokangisa babuku mpo na kosala Biblia oyo ekobeba te ata soki basaleli yango mingi, ezala na molunge to na malili makasi. Na nsima, babimisaki mwa Babiblia mpe bapesaki yango bandeko ya bikólo ndenge na ndenge ya molunge to ya malili makasi mpo bámeka yango.

Nsima ya sanza motoba, bazongisaki Babiblia yango; bandeko babongisaki bisika oyo esengeli mpe batindaki yango lisusu mpo na komeka yango. Bamekaki Babiblia koleka 1 690. Mwa Babiblia mosusu ebebaki mpo ezwaki likama. Na ndakisa, Biblia moko efinanaki mpo motuka enyataki yango, mosusu etikalaki na nse ya mbula butu mobimba, mpe mosusu ezindaki na mai ya mpela oyo mopɛpɛ moko ya makasi ememaki.

Na 2011, ntango bandeko bazalaki kosalela Babiblia oyo etindamaki mpo bámeka yango, bamasini ya sika ya kotya bizipeli ya makasi na babuku esombamaki mpe etyamaki na imprimeri na biso ya Wallkill mpe ya Ebina, na Japon. Ba imprimeri yango mibale esengelaki kobimisa Babiblia ebele na mbala moko, mpe oyo ekomonana ndenge moko mpenza.

Bizipeli oyo egumbamaka

Bizipeli ya liboso ezalaki kogumbama

Na ebandeli ya 2012, ba imprimeri wana mibale ekómaki kobimisa Libongoli ya Mokili ya Sika ebimeli ya 1984 mpe kosala ezipeli na yango na biloko ya sika. Kasi, bamasini wana ezalaki kotya kɔle moko mpe kotya mwa elamba moko ya pɛpɛlɛ na kati ya ezipeli, kasi bandeko bamekaki yango liboso te; ezipeli yango ezalaki kogumbama mpenza. Na yango, batikaki kobimisa Babiblia yango.

Bato oyo basalaka bizipeli balobaki ete likambo ya bizipeli ya pɛtɛɛ oyo egumbamaka eyebani malamu na bakompanyi oyo etyaka bizipeli na babuku, mpe bamonaki ete bakoki kosilisa mokakatano yango te. Bandeko bamonaki te ete esengeli kosala ezipeli ya makasi; bazwaki nde ekateli ya kobimisa Biblia oyo ezali na ezipeli ya pɛtɛɛ, kasi oyo ekoumela, mpe ekomonana kitoko. Nsima ya sanza soki minei ya komekameka kokangisa papye ndenge na ndenge na kɔle mpe kotya mwa elamba na ezipeli, bazwaki mayele moko mpe yango epesaki bandeko ya imprimeri nzela ya kozongela kobimisa Babiblia oyo ezali na ezipeli ya pɛtɛɛ kasi oyo ekogumbama te.

Esika batyaka bizipeli na babuku na imprimeri ya Wallkill

Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika oyo babongisi lisusu na Lingelesi esengelaki kobima na mokolo ya 05/10/2013 na likita ya nsuka ya mbula ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania. Makomi ya nsuka oyo basengelaki kobimisa ekómaki na ba imprimeri yango na nzela ya Internet na mokolo ya 09/08/2013, mpe babandaki mosala ya konyata na mokolo oyo elandaki. Basilisaki konyata Biblia ya liboso na mokolo ya 15/08/2013. Na pɔsɔ nsambo oyo elandaki, imprimeri ya Wallkill mpe ya Ebina esalaki butu moi mpo na kobimisa mpe kotinda Babiblia koleka milio moko na ndambo, mpo ekoka bato nyonso oyo bayanganaki na likita ya nsuka ya mbula.

Biblia yango ezali kitoko mpe esalemi mpo eumela; kasi nsango na yango oyo ebikisaka bomoi nde ezali kitoko koleka. Nsima ya kozwa Biblia ya sika, mokolo oyo elandaki, ndeko mwasi moko ya États-Unis akomaki ete: “Sikoyo, nakómi kokanga ntina ya Biblia malamu koleka.”