Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA ESENGO YA MBULA ELEKI

Bansango oyo euti na mikili ndenge na ndenge

Bansango oyo euti na mikili ndenge na ndenge

Bakabolaka biloko oyo bazwi na Internet

Internet ekɔti naino mingi te na ekólo Cuba; kasi sikoyo, moto akoki kokɔta na Internet soki akei na bandako oyo kompanyi moko ya telefone efungoli. Kasi, esɛngaka kofuta mbongo mingi. Na yango, mpo na kosalisa bandeko bázwaka biloko oyo ezali na site jw.org, Betele elendisaki masangá ezwa bibongiseli mpo mosakoli moko azwaka na site na biso mikanda, biloko ya koyoka, mpe bavideo, bongo akabolela yango bandeko mosusu na masangá. Ebongiseli yango ezali kosalisa mingi.

Ndako ya Bokonzi ezwi esika ya telefone

Teona, oyo azali na mbula 10 ná Tamuna, leki na ye ya mbula 8 bafandaka na Géorgie. Bana yango ya basi bazalaki na mposa ya telefone. Mpo na kosalisa bango, nkɔkɔ na bango ya mwasi alakaki bango ete akobanda kopesa bango mwa mbongo na mbongo na ye ya pansiɔ sanza nyonso. Kasi, nkɔkɔ yango akufaki na mbalakaka. Atako bongo, bato ya libota bazwaki mbongo na ye ya pansiɔ ya nsuka oyo ebimaki mpe bapesaki yango bankɔkɔ na ye mpo básomba telefone na bango. Ntango bakanisaki, Teona ná Tamuna bakomelaki lisangá na bango boye: “Toyebi ete nsima ya pɔsɔ mibale, bokobanda kotonga Ndako ya Bokonzi na mboka na biso T’erjola. Nkɔkɔ na biso azalaki mpenza na mposa ya kopesa mabɔkɔ na mosala yango; yango wana tomoni malamu tópesa mbongo nyonso ya nkɔkɔ oyo ebimaki na pansiɔ na ye ya nsuka mpo na lisangá na esika tósomba telefone. Bótongela biso Ndako ya Bokonzi ya kitoko!”

Makomami ya Grɛki na monɔkɔ ya Tetum

Na mokolo ya 17/01/2014, na engumba Dili, na Timor oriental, ndeko Geoffrey Jackson ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi abimisaki Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya bokristo na Tetum, monɔkɔ oyo elobamaka mingi koleka na ekólo. Liboso, kaka Lingomba ya Katolike nde ezalaki kobimisa mpe kokabola Makomami ya Grɛki na monɔkɔ ya Tetum. Bazalaki koboya kotɛkɛla yango Batatoli ya Yehova to bato oyo bango bamoni ete bayekolaka na Batatoli. Kasi, Biblia yango ya Katolike ezalaki sikisiki te, balongolá makambo mosusu, basalelá maloba ya kala, mpe bambeba ezali mingi. Kasi, mpo na Libongoli ya Mokili ya Sika, ndeko moko ya misionɛrɛ na Timor oriental alobaki boye: “Bato mingi soki batángi Libongoli ya Mokili ya Sika bakamwaka ndenge ezali sikisiki, mpe basɛngaka mbala moko Biblia yango. Bamonaka ete ezali mpasi te mpo na kotánga, mpe basepelaka ndenge ezali na makomi ya minene, mpamba te na bandako mingi miinda ezalaka mpenza te. Bato mingi oyo bazwaki Biblia yango bazali sikoyo koyekola.”

“Yehova amoni ete nabongi”

Macédoine: Bazali kosakola na mikanda ya monɔkɔ ya Romani

Na sanza ya yambo na 2014, mosala ya kobongola mikanda na monɔkɔ ya Romani, oyo elobamaka na Macédoine, efandaki mpenza. Basalaki ekipi moko ya babongoli mpe bapesaki bango nzela ya kobimisa mikanda oyo basaleli alfabɛ Romain mpe alfabɛ Cyrillique. Yango ezali kosalisa mpenza bato oyo balobaka monɔkɔ ya Romani, mpo bamesaná na alfabɛ Cyrillique, oyo Leta ya Macédoine endimá.

Bato mingi oyo balobaka monɔkɔ ya Romani bazali kokamwa na komona ete lisangá ya Yehova ezali kobimisa mikanda na monɔkɔ na bango. Ndeko mwasi moko alobaki ete: “Lokola nalobaka monɔkɔ ya Romani, mbala mingi bato ya bikólo mosusu batyolaka ngai; na yango, nazali na esengo mingi ndenge Yehova amoni ete nabongi kozwa mikanda na monɔkɔ na ngai. Yango etindi ngai nakangama na ye lisusu mingi.”

“Nazali na esengo mingi ndenge Yehova amoni ete nabongi kozwa mikanda na monɔkɔ na ngai”

Teritware mosusu ebakisami

Na mokolo ya 01/02/2014, biro ya filiale ya États-Unis ekómaki kotambwisa mosala ya teritware mpe masangá ya Jamaïque mpe Bisanga Caïmans. Bomoko ezali makasi kati na basakoli koleka milio moko oyo bazali na teritware oyo filiale ya États-Unis etambwisaka! Teritware yango ezali bitúka 50 ya États-Unis, Bahamas, Bermudes, Bisanga Vierges ya Grande-Bretagne mpe ya États-Unis, Porto Rico, mpe Bisanga Turks-ná-Caïcos.

Babongisi-nzela na Japon

Bandeko ya Japon bazali kaka kokoba komonisa elimo ya babongisi-nzela, mpe motángo ya babongisi-nzela ya sanza na sanza na ekólo yango ezali na esika ya minei na mokili mobimba. Na ebandeli ya mobu ya mosala 2014, bandeko mosusu 2 646 bakómaki babongisi-nzela; na yango babongisi-nzela bakómaki 65 668. Na sanza ya misato na 2014, koleka katikati ya basakoli ya ekólo yango basalaki mosala ya mobongisi-nzela.