Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

RÉPUBLIQUE DOMINICAINE

Yehova afungoli mitema ya bato ebele mpenza

Leonardo Amor

Yehova afungoli mitema ya bato ebele mpenza
  • ABOTAMAKI NA 1943

  • BATISIMO 1961

  • NA MOKUSE Ayebaki solo na bolenge mpe asaleli Yehova na mosala ya ntango nyonso mbula koleka 50.

SANZA soki moko nsima ya kobomama ya Trujillo na 1961, nazwaki batisimo ntango nazalaki kotánga na iniversite mpo na koyekola mibeko. Tata na ngai alingaki nakóma avoka, kasi namonaki ete mateya ya Nzambe eleki nyonso. Na yango, atako tata atyaki ngai mbamba, nalongwaki iniversite. Mwa moke na nsima, nakómaki mobongisi-nzela monene.

Teritware moko oyo nasalaki ezalaki La Vega, oyo etondaki na bato ya Katolike banda kala. Na boumeli ya ntango nyonso oyo nazalaki kuna, moto moko te andimaki solo. Soki nazali kosala diskur mpo na bato nyonso, moto azalaki kaka moko, moninga na ngai mobongisi-nzela. Kasi, Yehova apesaki ngai makasi na nzela ya boyekoli na ngai moko, ya mayangani ya minene, mpe ya mabondeli oyo euti na motema. Na mabondeli na ngai, nasɛngaki Yehova ete ata ndele lisangá esalema na La Vega. Nazali na esengo ya koyebisa ete lelo, Bandako ya Bokonzi ezali 6, masangá 14, mpe basakoli koleka 800.

Nabalaki Ángela na 1965, mpe na 1981, babengaki biso na Betele. Ntango nazwaki batisimo, basakoli bazalaki kaka 681 na ekólo mobimba. Lelo, basakoli baleki 36 000, mpe bato ebele bayaka na mayangani na biso. Soki nazongisi makanisi nsima, nakamwaka komona ndenge Yehova afungoli mitema ya bato ebele mpenza mpo bándima solo.

Komite ya filiale, kobanda na lobɔkɔ ya mwasi: Reiner Thompson, Juan Crispín, Thomas Dean, Leonel Peguero, Leonardo Amor, mpe Richard Stoddard