RÉPUBLIQUE DOMINICAINE
Mposa ya basakoli mingi
Nsango malamu ekómi na bamboka ya mosika
Na nsima, bamisionɛrɛ mosusu bayaki, kati na bango Pete Paschal, Amos Parker ná mwasi na ye Barbara, Richard Stoddard ná mwasi na ye Belva, oyo bazalaki liboso na Bolivie, mpe Jesse Cantwell ná mwasi na ye Lynn oyo bautaki Colombie. Bamisionɛrɛ yango basalisaki mingi mpo mosala ya kosakola ekoba kokende liboso. Na 1973, bamipesaki mingi na koteya bato na bingumba minene ya République dominicaine, kasi nsango malamu ekómaki naino te na bamboka ya mosika. Yango wana, bazwaki bibongiseli mpo na koteya mpe bato ya bingumba mikemike. Ntango basɛngaki bandeko oyo balingi komipesa sanza mibale mpo na kosakola na bamboka ya mikemike, babongisi-nzela ya sanza na sanza 19 bamipesaki. Kobanda sanza ya zomi na mibale na 1973 tii sanza ya yambo na 1977, batindaki babongisi-nzela na bisika oyo nsango malamu esakolamaka mingi te to mpe ekɔti naino te.
“Soki topesi bango mikanda bazalaki kopesa biso nsoso, maki, mpe bambuma”
Mobongisi-nzela moko oyo akendaki na bisika yango alobaki boye: “Soki lelo toyebisi bato nsango ya Biblia mpe totikeli bango mikanda, lobi tokozongela baoyo basepelaki. Lokola bato bazalaka na mbongo mingi te, soki topesi bango mikanda bazalaki kopesa biso nsoso, maki, mpe bambuma. Na lisalisi ya Yehova, tokufaki nzala ata mokolo moko te.” Mpo na bato mingi, ezalaki mbala ya liboso bámona moto azali kotángela bango Biblia. Na bisika mosusu, bakonzi ya mangomba bayebisaki bato ete Yehova nde Zabolo. Bazalaki kokamwa mpenza soki batángi bavɛrsɛ lokola Nzembo 83:18: “Yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova, yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba”! Na bisika mosusu, lokola bato ebele basepelaki, bandeko bakómaki kosala makita.
Bamisionɛrɛ mosusu mpe Betele ya sika
Na sanza ya libwa na 1979, ndeko Abigail Pérez ná mwasi na ye Georgina, oyo bazalaki bamisionɛrɛ, bayaki. Batyaki bango na mosala ya zongazonga. Na nsima, na 1987, ndeko Tom ná Shirley Dean oyo bautaki Gileade bayaki kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola. Batindaki mpe bandeko ebele oyo bazalaki liboso na mosala ya ntango nyonso na Porto Rico. Na sanza ya mwambe na 1988, ndeko Reiner Thompson ná mwasi na ye Jeanne batindamaki na République dominicaine, ekólo na bango ya mitano na mosala ya misionɛrɛ.
Na 1989, basakoli bakómaki 11 081, mpe emonanaki ete motángo yango ekomata mpo bayekoli ya Biblia bazalaki 20 494. Bokoli yango ebimisaki mikakatano. Na ndakisa, bandako ya Betele oyo ezalaki na ntango wana ezalaki kosalisa mingi, kasi na nsuka ya bambula 1980, ekómaki moke. Ndeko Reiner Thompson alobi boye: “Ekómaki nkaka mpenza, mpe esɛngaki tóluka ndako mosusu mpe tósalela bandako ya kobomba biloko na bisika ndenge na ndenge na kati ya engumba.”
Abakisi boye: “Kozwa esika ya malamu mpo na kotonga Betele ya sika ezalaki mpasi mpenza. Na nsima, moto moko ya mombongo ayokaki ete tozali koluka esika mpe akutanaki na biso. Alobaki ete azali na lopango moko ya malamu, kasi akotɛkela yango kaka Batatoli ya Yehova. Kala azalaki na kompanyi moko monene ya kotonga bilamba, mpe sɛkrɛtɛrɛ na ye ná basali mosusu mingi bazalaki Batatoli ya Yehova. Na boumeli ya bambula, amonaki ete bazali bato ya sembo mpe ya bizaleli malamu mpenza
mpe yango esimbaki motema na ye. Lokola azalaki na limemya mingi mpo na Batatoli ya Yehova, andimaki kotɛkela biso mabele yango na ntalo ya malamu mpenza.” Tosombaki esika yango na sanza ya zomi na mibale na 1988, mpe na nsima, tosombaki mapango misato oyo ezalaki pembeni. Mabele nyonso oyo totongaki Betele mpe Ndako ya Mayangani ezalaki na bonene ya hectare pene na 10.Bankama ya bandeko ya ekólo yango mpe ya bikólo mosusu basalisaki na kotonga Betele mpe Ndako ya Mayangani yango. Molulu ya bofungoli esalemaki na sanza ya zomi na moko na 1996, ntango bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi Carey Barber, Theodore Jaracz, mpe Gerrit Lösch, bayaki mpe basalaki badiskur mpo na bofungoli bandako yango mokolo ya pɔsɔ. Mokolo oyo elandaki, basalaki badiskur ya ntina mingi na stade mibale ya minene ya ekólo yango, mpe bato koleka 10000 basalaki vizite ya bandako ya sika ya Betele.
‘Baleki na Masedonia’
Lisolo ya basaleli ya Yehova na République dominicaine ekozala mobimba te soki tolobeli te ebele ya Batatoli ya Yehova oyo bakendá na ekólo yango mpo na kosalisa na bisika oyo mposa ya basakoli ezali mingi. Na nsuka ya bambula ya 1980, ntango bandeko ya bikólo mosusu bayokaki ete moto moko akoki koyekola Biblia na bato ebele na République dominicaine, mingi bakómaki ‘koleka na Masedonia,’ elingi koloba bakómaki koya kosakola na ekólo yango. (Mis. 16:9) Bandeko yango bayebisaki bandeko mosusu esengo ya kobuka mbuma ya elimo na République dominicaine. Yango esalaki ete bato mosusu ebele báya na bambula ya 1990.
Na ndakisa, ndeko Stevan Norager ná mwasi na ye Miriam oyo bautaki Danemark basakolaka na République
dominicaine banda 2001. Liboso, Miriam asalaki mbula moko na ndambo na ekólo yango elongo na yaya na ye ya mwasi. Nini etindaki ye ná mobali na ye bákende na mboka oyo bato bazali na mimeseno mosusu mpe balobaka monɔkɔ mosusu? Miriam alobi boye: “Biso mibale tokolá na mabota oyo baboti bazalaki babongisi-nzela monene na bolenge na bango; kasi, nsima ya kobota bana bakómaki babongisi-nzela ya sanza na sanza. Baboti na biso bazalaki ntango nyonso kolendisa biso tómipesa na mosala ya ntango nyonso mpo na kosalela Yehova.”Stevan ná Miriam bakómá babongisi-nzela monene banda 2006 mpe basalisi bato ebele báyeba solo. Stevan alobi boye: “Mapamboli ezali beboo. Ata soki tozali na mikakatano to soki nzoto ezali malamu te, nyonso wana ezali mpamba soki tokokanisi yango na makambo kitoko oyo tokutanaka na yango mpe esengo ya kosalisa bato
báyeba Yehova mpe bálinga ye. Tozwi mpe libota moko monene mpe baninga ya solosolo. Kosala na République dominicaine eteyi biso komikitisa mpe kozala motema molai, mpe kozala na bomoi ezangi mindɔndɔ esalisi biso tózala na kondima makasi mpe tótyela Yehova motema.”Jennifer Joy asali mbula koleka 20, asalisaka na koteya bababa
Jennifer Joy azali moko ya ebele ya bandeko basi minzemba oyo bautá bikólo mosusu mpe bayá kosakola na République dominicaine. Ntango Jennifer ayaki na 1992 kotala mama-kulutu na bango Edith White, oyo azalaki misionɛrɛ banda kala, abimaki mosala ya kosakola mpe ebotaki mbuma malamu. Akutanaki mpe na bandeko basi ya bikólo mosusu oyo bayá kosakola. Jennifer
alobi boye: “Nazalaki nsɔninsɔni mpe bibangabanga. Kasi, nalobaki ete, ‘Soki bango bakoki, mbala mosusu ngai mpe nakokoka.’”Na ebandeli, Jennifer akanaki kosala kaka mbula moko. Kasi mbula na mbula, azalaki kokoba mpe sikoyo asali mbula koleka 20 na République dominicaine. Asalisi bayekoli na ye mingi ya Biblia bákóma basaleli ya Yehova. Jennifer asalisi mpe mingi mpo mosala ya kosakola na elobeli ya bababa ekende liboso na ekólo yango, mpe asalisi na kobongisa mateya mpo na kolakisa bato monɔkɔ yango.
‘Tii sikoyo, Yehova azali kosunga ngai, mpo na nini nandima te ete akosunga ngai na mbula elandi?’
Ndenge nini Jennifer azwaka mbongo ya kobikela? Alobi boye: “Mbula na mbula, nazongaka na Canada mpo na kosala mwa basanza. Na boumeli ya bambula, nasali misala ndenge na ndenge, na ndakisa kokanga bafɔtɔ, kosukola bafɔtɔ, kotya langi na bandako, kotya bopɛto na babiro, kosala miinda ya mituka, mpe kosala batapi. Nazalaki mpe kotambwisa bato mpo na kolakisa bango bisika, nasalaki na kompanyi moko ya mibembo, nazalaki molakisi ya Lingelesi, mpe mobongoli.” Jennifer alobaka ete bomoi na ye ezali lokola bomoi ya Bayisraele na esobe. Alobi boye: “Bazalaki kobika na liloba nyonso ya monɔkɔ ya Yehova. Alobaki ete akokokisa bamposa na bango, mpe asalaki yango. Bazalaki kolya mokolo na mokolo, mpe bilamba ná basandale na bango ebebaki te. (Mib. 8:3-4) Yehova alaki ete akokokisa mpe bamposa na biso. (Mat. 6:33) Tii sikoyo, azali kosunga ngai, bongo mpo na nini nandima te ete akosunga ngai mpe na mbula oyo elandi?”
Basakoli koleka 1 000 bautá bisika ndenge na ndenge lokola Autriche, Espagne, États-Unis, Japon, Pologne,