Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

RÉPUBLIQUE DOMINICAINE

Etikalaki moke natika kosalela Nzambe

Martín Paredes

Etikalaki moke natika kosalela Nzambe
  • ABOTAMAKI NA 1976

  • BATISIMO 1991

  • NA MOKUSE Martín ayebaki solo ya Biblia na eleko oyo azalaki kotánga kelasi ya kokóma sango. Banda wana, asalisi bato ebele bákóma basaleli ya Yehova.

NAKOLÁ na libota ya bato oyo bazalaki bandimi makasi ya Katolike, yango wana nalingaki kokóma sango. Na yango, ntango nakómaki na mbula 12, basango misato bazalaki kotángisa ngai. Na nsima, na 1990, ntango nakómaki na mbula 14, babengaki ngai nakende kotánga na moko ya likindo (séminaire) ya malamu ya ekólo.

Nazalaki kokanga makambo noki mpe bayebisaki ngai ete soki nakobi ndenge wana, nakoki kokóma episkɔpɔ. Kasi, nalɛmbaki nzoto. Na esika tóyekola Biblia, tozalaki koyekola nde mateya ya filozofi. Lisusu, basango bazalaki kosala makambo ya mbindo mpenza. Ntango bakómaki koluka kosangisa na ngai nzoto na makasi, nalingaki natika kosalela Nzambe.

Na ntango yango, ndeko moko ya misionɛrɛ ná mwasi na ye bayaki epai ya moto oyo atalelaka makambo ya mbongo na likindo yango mpe bapesaki ye buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi. Nasɛngaki ye yango mpe natángaki yango ebandeli tii nsuka. Nalobaki na nse ya motema ete: ‘Yango nde nazali koluka.’ Nalongwaki na likindo, nabandaki koyekola na Batatoli, mpe nakómaki koyangana na makita. Sanza mwambe na nsima, na sanza ya nsambo na 1991, nazwaki batisimo. Nakómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza mpe na nsima, nabalaki María, ndeko mwasi moko ya mobongisi-nzela. Banda 2006, tozali babongisi-nzela monene. Natiká kosalela Nzambe te, nazali nde kosalisa bato oyo bazali na nzala ya elimo bákóma basaleli na ye.