RÉPUBLIQUE DOMINICAINE
Ayebá ntina ya bomoi
José Estévez
-
ABOTAMAKI NA 1968
-
BATISIMO 1989
-
NA MOKUSE Ntango José azalaki mwana moke, akendaki na engumba monene mpo na koluka bomoi ya malamu. Kuna, ayekolaki solo, mpe banda wana, asalelaka Nzambe na molende mpe alukaka liboso Bokonzi.
JOSÉ ayaki na Saint-Domingue ntango azalaki na mbula 11; mpo na kozwa mbongo, azalaki kotya cirage na basapato mpe kotɛka krɛmɛ ná malala. Ntango akolaki, bato bayebaki ete azali makasi na mosala. Mwa bambula na nsima, yaya na ye ya mobali oyo azalaki Motatoli ya Yehova asɛngaki ye abatelaka ndako na ye. Mokolo moko, José amonaki na mesa buku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis, mpe atángaki yango butu mobimba. Amonaki ete azwi eloko oyo esalisaki ye ayeba ntina ya bomoi.
Na nsuka ya pɔsɔ, José akendaki na Ndako ya Bokonzi mpe alobaki ete azali Motatoli ya Yehova. Ayebisaki bandeko ete ayekolaki ete asengeli koyangana na makita mpe kosakola nsango malamu. Ayebisaki bango mpe ete ntango atángaki buku Bomoi ya seko, amonaki makambo oyo mokristo asengeli kosala te, mpe amonisaki bango ete asalaka
yango ata moko te. Mikolo 15 na nsima, bandimaki José akóma mosakoli. Azwaki batisimo sanza motoba na nsima, ntango azalaki na mbula 21.Lokola mosala oyo José azwaki ezalaki kopekisa ye ayangana na makita, alukaki mosala mosusu oyo ezalaki na lifuti moke mpenza (ya liboso kabolá na minei), kasi ezalaki kotikela ye ntango ya kokende makita mpe kosala mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Kasi na nsima, ntango abalaki mpe abotaki bana mibale, akataki mosala ya mobongisi-nzela.
José alingaki koteya bana na ye ntango bazali mike mpenza. Yango wana, ntango mwasi na ye Josefina azwaki zemi ya Noé, mwana na bango ya liboso mpe zemi yango ekómaki ya sanza misato, José azalaki kotánga buku Mokanda mpo na masolo ya Biblia na elikya ete mwana oyo azali na libumu ayoka ye. Ntango Noé abotamaki, José asilaki kotánga buku yango mobimba. Asalaki mpe bongo mpo na mwana na bango ya mibale, Neftalí.
Nsima ya bambula, José akómaki mokonzi ya kompanyi moko, mpe lifuti na ye elekaki mbala zomi oyo azalaki kozwa na mosala ya liboso. Kasi, na 2008, ntango bana na ye bakómaki na mbula 10 mpe 13, alongwaki mokonzi mpe azongelaki mosala ya mobongisi-nzela, mbala oyo ná mwasi na ye ná bana. Lokola azalaki lisusu kozwa mbongo mingi te, libota mobimba bayokanaki ete básalelaka lisusu mbongo mingi te. Bango nyonso minei bayekolaka Biblia na bato soki 30 sanza na sanza. Yesu alobaki ete soki totye Bokonzi na esika ya liboso, Yehova akopambola biso. (Mat. 6:33) José ná libota na ye bandimaka elaka wana mpe bamonaka mpenza ete Yehova akokisaka maloba na ye.