Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

République dominicaine

République dominicaine

NA 1492, ntango Christophe Colomb azalaki kosala mibembo na ye, akómaki na Mokili ya sika: mikili kitoko ya biloko ya motuya mpe bisika ndenge na ndenge ya kotalatala. Apesaki moko ya bisanga epai masuwa na ye esɛmaki nkombo La Isla Española, to Hispaniola. Eteni monene (2/3) ya mokili yango ezali lelo République dominicaine. Na bambula oyo eleki, bankóto ya bato ya ekólo yango bazwi eloko oyo eleki motuya: bayebi ete ekozala na mokili moko ya sika ya boyengebene oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela libela na libela. (2 Pe. 3:13) Tokolobela sikoyo lisolo kitoko ya bato ya sembo oyo bazwá eloko yango ya motuya.

NA ETENI OYO

Makambo etali République dominicaine

Talá na mokuse makambo etali ekólo yango mpe bato na yango.

Koyeba solo

Elekaki ntango boni mpo bamisionɛrɛ ya liboso bábanda koyekola Biblia na moto na République dominicaine?

“Tokokutana na bango”

Nsima ya mbula 13, Pablo González amonaki bato oyo azalaki koluka.

Bakɔti bolɔkɔ mpe mosala epekisami

Nini esalisaki Batatoli bákanga motema atako banyokwamaki makasi bambula ebele na bolɔkɔ?

Mosala ya kosakola ekobi

Na esika ya kokoma bozongeli ya sika mpe bangonga, basakoli bazalaki kokoma choux mpe épinard.

Bazwi bonsomi, na nsima bapekisami lisusu

Epekiseli ya mosala ya Batatoli ya Yehova na République dominicaine oyo eumelaki mbula motoba elongwaki na 1956, mpe ezongaki lisusu nsima ya sanza 11 mpamba.

Boyokani ya Lingomba ya Katolike ná Trujillo

Lingomba ya Katolike, oyo epesaki prezida mabɔkɔ ntango molai, ebendaki nzoto mpe esɛngaki bana-mboka bolimbisi.

Botɛmɛli ya makasi

Batɛmɛlaki Batatoli makasi mpenza, kasi elongaki?

Nani azali Mokonzi?

Na epekiseli, basalelaki masini ya kosala fotokopi, linzanza moko ya monene oyo ezalaki ya mafuta, saki moko monene, mpe songo mpo na kobimisa bilei ya elimo mpe kokabola yango.

Bakokaki kokanga bango

Atako makita na bango epekisamaki, Batatoli ya République dominicaine bazalaki kosala yango na mayele mpo bákanga bango te.

Kokanga motema efuti

Guvɛrnema etɛmɛlaki Batatoli ya Yehova na République dominicaine bambula ebele, kasi bonsomi na bango eutaki na esika oyo bakanisaki te.

“Nabundaki lokola nkɔsi”

Luis Eduardo Montás, moto alukaki koboma mokonzi mabe mbala mibale, azwaki mateya ya solo ntango azalaki koluka lisusu mayele ya koboma mokonzi.

“Bokonzi ya Nzambe ezali ndɔtɔ te”

Batyaki ndeko Efraín De La Cruz na bolɔkɔ nsambo mpe babɛtaki ye mabe mpenza mpo azalaki kosakola nsango malamu. Nini esalisaki ye abatela molende na ye na boumeli ya mbula koleka 60?

“Nakotikala kaka Motatoli ya Yehova”

Sango moko ayebisaki Mary Glass ete akobɛla ligboma soki atángi Biblia, kasi atángaki yango kaka, mpe ayaki koyeba mpo na nini balobaki na ye atánga yango te.

Bonsomi ya kosakola

Nsima ya kobomama ya Trujillo, bamisionɛrɛ ebele bayaki mpe babandaki kosakola. Mokemoke, balongaki kolongola makanisi ya mabe oyo bato bazalaki na yango mpo na Batatoli ya Yehova.

Bakolongwa te

Mosala ya kosakola ekendaki liboso atako makambo ya politiki ezalaki yikiyiki. Nini emonisaki polele ete Batatoli ya Yehova ‘bakolongwa te’ na République dominicaine?

Mposa ya basakoli mingi

Lisolo ya basaleli ya Yehova na République dominicaine ekozala mobimba te soki tolobeli te bandeko oyo bandimá kokende kosakola kuna.

Balingaka bandeko na bango

Ntango mopɛpɛ makasi ebɛtaki République dominicaine na 1998, bolingo ya Batatoli ya Yehova etindaki bango básunga bato ebele mpe ekumisaki Yehova Nzambe.

Kobakisa bandako ya losambo

Lokola bato ebele bazalaki koya na lisangá, Batatoli basalaki nini mpo na kozwa bandako ya losambo oyo ekokoka bato, mpe bandeko oyo babongi mpo na kotambwisa masangá?

Kosakola na Créole Haïtien

Batatoli ya Yehova basakolaka nsango ya Bokonzi epai ya bato oyo balobaka Créole Haïtien. Na nsima masangá mpe bakelasi ya monɔkɔ yango esalemaki.

Koningana ya mabele na Haïti

Betele ya Batatoli ya Yehova na République dominicaine etindaki biloko ebele mpenza mpo na kosunga bandeko na bango nsima ya koningana ya mabele na Haïti na 2010. Bato ebele bamipesaki mpo na kosalisa.

Bokoli monene ekosalema

Mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli na République dominicaine ebandaki na 1945. Makambo mingi ezali kotinda bango bázala na elikya ete bokoli monene ekosalema.

Yehova afungoli mitema ya bato ebele mpenza

Na boumeli ya ntango oyo Leonardo Amor asalaki na La Vega, moto moko te andimaki solo. Mitema ya bato ekoki kobongwana?

“Bato 22 bakimaki ndako-nzambe”

Bato bazalaki koloba ete Batatoli ya Yehova bayaki kolɔka bato ya mboka na ‘mateya na bango ya bondɔki.’ Nzokande, Batatoli ya Yehova basalelaki bavɛrsɛ ya Biblia mpo na koyanola na mituna ya bato.

Motomboki monene akómi mosaleli ya Nzambe

Juan Crispín azalaki kondima ete Nzambe azalaka te mpe azalaki kokanisa ete botomboki nde ekobongisa mokili. Nini etindaki ye akóma mosaleli ya Nzambe?

Baba ya liboso oyo andimaki solo

José Pérez nde baba ya liboso oyo akómaki Motatoli na République dominicaine. Ndenge nini José ‘ayokaki’ nsango ya Biblia mpe akangaki ntina ya mateya na yango malamumalamu?

Ayebá ntina ya bomoi

José Estévez ná libota na ye bayebá mpenza ntina ya bomoi. Ndenge nini bamonaka na miso ndenge Yehova akokisaka bilaka na ye?

Etikalaki moke natika kosalela Nzambe

Martín Paredes azalaki kotánga kelasi ya kokóma sango, kasi etikalaki moke atika kosalela Nzambe. Ndenge nini buku oyo azwaki na seminɛrɛ ebongolaki bomoi na ye?