Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

KOSAKOLA MPE KOTEYA NA MOKILI MOBIMBA

Azia mpe Moyen-Orient

Azia mpe Moyen-Orient
  • MIKILI 48

  • BATO 4 315 759 010

  • BASAKOLI 703 271

  • BAYEKOLI YA BIBLIA 732 106

Atunaki soki bato mosusu bakoki koya

Ndeko mobali moko apesaki mosali ya parkingi moko na Indonésie lokasa ya libyangi na Ekaniseli, mikolo mibale liboso ya molulu yango. Lokola ndeko apesaki ye kaka lokasa moko, moto yango, oyo azalaki Mizilma, atunaki soki bato mosusu bakoki koya. Ndeko yango ayebisaki ye ete bato mosusu mpe bakoki koya. Moto yango alobaki ete azali na libota monene mpe asɛngaki nkasa mosusu. Ndeko yango apesaki ye nkasa 20 mpe amonisaki ye ete ezali Ekaniseli ya liwa ya Yesu mpe ete moto nyonso, ata mpe bakristo to Bamizilma, akoki koya na likita yango. Moto yango alobaki ete akoya na bato 60 to 70.

Mwa moke nsima ya ebandeli ya diskur ya Ekaniseli, longola bato 248 oyo bazalaki wana, moto wana ayaki na bato soki 100—mibali, basi, mpe bana, kati na bango mibange mpe mwasi moko oyo azalaki na zemi ya monene. Bafutaki mituka ebele mpo bákóma na otɛlɛ epai Ekaniseli ezalaki kosalema. Liboso, ntango bakɛngɛli ya otɛlɛ bamonaki ebele wana ya bato, bapekisaki bango bákɔta. Bamitunaki ntina oyo ebele ya Bamizilma balingaki kokɔta na likita ya bakristo. Ntango bato yango balakisaki bakɛngɛli nkasa na bango ya libyangi, bakɛngɛli bamemaki bango na ndako oyo Ekaniseli ezalaki kosalema. Bakɔtisaki bato soki 60 kati na bango na ndako yango oyo etondaki na ebele ya bato.

Mwa mikolo na nsima, ndeko na biso akendaki kotala mosali wana ya parkingi mpe atunaki ye soki bato na ye basepelaki na Ekaniseli. Alobaki ete liboso, bango nyonso bazalaki koyoka nsɔni kokende Ekaniseli, kasi bakamwaki ndenge bato nyonso bazalaki boboto mpenza, mpe bapesaki bango mbote na esengo. Na nsima, ndeko na biso abengisaki ye na diskur ya ntina mingi oyo esalemaki mokolo ya lomingo oyo elandaki. Na mokolo yango, ayaki na bato soki 40, bato ya libota na ye mpe bato ya kartye. Lokola bakutaki makita elingi kosila, bankulutu bamonaki malamu básala lisusu diskur yango. Prezida abandaki na loyembo mpe libondeli, mpe apesaki motó ya likambo ya diskur. Mpo na kosalisa bato yango oyo bazalaki Bamizilma, molobi azalaki kosalela maloba oyo Bamizilma bayebi, na ndakisa “Buku mosantu” na esika ya “Biblia” mpe “mosakoli Isa” na esika ya “Yesu.”

Na nsima, nkulutu moko akendaki kotala mosali wana ya parkingi na ndako na ye mpe abandaki kosolola na ye na nzela ya mwa buku Yoká Nzambe. Bato 12 bayaki mpo na koyoka mateya, kati na bango Bamizilma mosusu ya basi mpe bana.

Mikanda ya kotánga na bisi

Mongolie: Bandeko bazwi ndingisa ya kotya mikanda na bisi mpo na bato ya mobembo

Na Mongolie, babisi oyo elongwaka na engumba Ulaanbaatar ekendaka na bisika nyonso ya ekólo yango. Mibembo na babisi yango ekoki kozwa mikolo mibale. Mbala mingi, bato batalaka libándá ntango bisi ezali kokende, to mpe balalaka. Bazalaka na mikanda ya kotánga te, nzokande bato ya Mongolie balingaka kotánga mikanda. Na yango, bandeko mosusu ya lisangá ya Songinokhairkhan bakendaki epai ya basofɛlɛ ya babisi yango mpe balobaki na bango boye: “Tolingi kokabela bino buku moko kitoko. Na mpɛpɔ, batyaka mikanda ya kotánga na mabenga ya bakiti. Soki bomoni ete bakiliya na bino bakosepela kotánga na mobembo, tokoki kotya mikanda na mabenga ya bakiti.” Basofɛlɛ mwambe bandimaki. Na yango, bandeko batyaki bazulunalo 299 mpe mwa babuku 144. Soki bazulunalo ya sika ebimi, balongolaka bazulunalo ya kala, mpe batyaka oyo euti kobima.

Makambo na bango ekokaná

Na ekólo moko ya Azia, bankulutu mibale basengelaki kokende kotala ndeko mwasi moko oyo atiká kosakola eleki mbula mwambe. Lokola bankulutu yango bamoná naino ndeko yango te, babengaki ye mpe bayokanaki bákutana na butiki na ye oyo ezali na zando moko monene. Nsima ya kobalukabaluka na babalabala mindɔndɔmindɔndɔ, bandeko yango bamonaki butiki moko oyo bakomá adrɛsi oyo ndeko mwasi yango apesaki bango. Ntango bakɔtaki, mwasi moko apesaki bango mbote; azalaki na Biblia moko ya moke na mesa. Bandeko yango batunaki ye nkombo na ye, engumba oyo autá, mpe mbula ya bana na ye mibale, mpe bamonaki ete ye nde ndeko mwasi oyo atiká kosakola. Balobaki na ye: “Tozali bandeko na yo Batatoli ya Yehova.”

Mwasi yango akamwaki mwa moke mpe alobaki: “Nazali mokristo.” Bandeko yango bakamwaki na elobeli ya mwasi yango. Atako bongo, bapesaki ye mwa mikanda, mpe asepelaki mingi. Nzokande, ntango bandeko bazalaki kobima, bamonaki ete bakɔtaki na butiki mosusu mpo batángaki nimero mabe! Basengelaki kokende na butiki nimero 2202, nzokande wana ezalaki nimero 2200. Nkulutu yango moko alobaki boye: “Nayokaki malili na nse ya mokɔngɔ, lokola nde baanzelu batindaki biso tókɔta na butiki yango. Mwasi wana ná ndeko na biso bazalaki na nkombo moko, bautaki engumba moko, mpe mbula ya bana na bango ekokanaki mpenza! Soki mwasi yango azalaki na nkombo mosusu mpe autá engumba mosusu, tolingaki koyeba ete ye te nde tozalaki koluka.” Nsima ya koleka babutiki mibale, bankulutu bamonaki ndeko mwasi wana, mpe azalaki kozela bango.

“Nayokaki nsɔni mingi mpo atako natikaki kosakola ntango molai, Yehova abosanaki ngai ata moke te”

Mwasi ya butiki oyo bandeko bakɔtaki liboso akómaki koyekola Biblia mpe koyangana na makita. Ndeko mwasi oyo atiká kosakola azongelaki koyangana na makita nyonso mpe kobima na mosala ya kosakola. Alobaki boye: “Nayokaki nsɔni mingi mpo atako natikaki kosakola ntango molai, Yehova abosanaki ngai ata moke te.”

Batindaka bamesaje na eleko ya mbula

Philippines: Greg azali kotinda bamesaje na telefone

Greg ná mwasi na ye Alma bakendá na esanga Catanduanes, na Philippines, epai mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali makasi. Na teritware yango, bisika mosusu ezali ngombangomba, mpe esɛngaka Greg ná Alma bátambola kilomɛtrɛ 19 mpo na kokóma na bisika mosusu. Na bantango mosusu, basalaka ata ngonga mibale na bwato mpo na kokende kosakola na bisanga mosusu. Na eleko ya mbula, ezalaka mpasi mpenza kosala mibembo wana. Na esika báfanda kaka boye na ndako mpe básakola te, bamonaki malamu básala likambo oyo balakisaka na piblisite moko ya telefone na mboka na bango: moto akoki kotinda bamesaje ndenge alingi na ntalo moke.

Greg alobi ete na ebandeli ya mesaje, akomaka liboso nkombo na ye. Na nsima abakisaka ete: “Nalingi koyebisa yo nsango moko ya Biblia.” Moko ya bavɛrsɛ oyo amoni ete esalisaka mpenza ezali Yoane 17:3. Nsima ya kokoma yango, atunaka mituna mibale: Nzambe ya solo nani? mpe Yesu Kristo azali nani? Na nsima asɛngaka moto ayanola na mesaje. Soki moto yango ayanoli, Greg atindelaka ye vɛrsɛ mosusu, na ndakisa Nzembo 83:18. Soki moto yango azali kaka koyanola na bamesaje, atunaka ye soki bakoki kosolola na telefone. Greg ná Alma balobi ete bato mingi bandimaka.

Greg ná Alma bakomelaki mwasi moko oyo azalaki na mituna ebele na makambo ya Biblia; na yango, batindelanaki bamesaje mingi. Nsukansuka, bakómaki koyekola Biblia. Mwasi yango akómaki koyebisa mwana ya ndeko na ye mpe moninga moko ya mosala makambo oyo azalaki koyekola. Na nsima, bango nyonso misato bazwaki batisimo.