Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

 MOKAPO YA ZOMI

Baanzelu bazali banani?

Baanzelu bazali banani?

1. Mpo na nini tosengeli koyeba baanzelu?

YEHOVA alingi tóyeba libota na ye. Baanzelu bazali na kati ya libota ya Nzambe. Biblia ebengi bango ‘bana ya Nzambe.’ (Yobo 38:7) Baanzelu basalaka nini? Ndenge nini basalisaki bato na ntango ya kala? Bakoki mpe kosalisa biso lelo?​—Talá Etanda 8.

2. Baanzelu bautá wapi? Baanzelu boni bakelamaki?

2 Tosengeli koyeba esika baanzelu bautá. Bakolose 1:16 eyebisi biso ete Yehova akelaki liboso Yesu, na nsima “biloko mosusu nyonso ezalisamaki na likoló mpe na mabele,” ezala mpe baanzelu. Baanzelu boni bakelamaki? Biblia elobi ete baanzelu bazali bamilio ebele.​—Nzembo 103:20; Emoniseli 5:11.

3. Yobo 38:4-7 eyebisi biso nini mpo na baanzelu?

3 Biblia emonisi mpe ete Yehova akelaki baanzelu liboso akela mabele. Baanzelu bayokaki ndenge nini ntango bamonaki mabele? Mokanda ya Yobo eyebisi biso ete basepelaki. Bazalaki kosalela Yehova elongo na kati ya libota moko.​—Yobo 38:4-7.

BAANZELU BASALISAKA BASALELI YA NZAMBE

4. Ndenge nini toyebi ete baanzelu basepelaka na makambo ya bato?

4 Baanzelu basepelaka ntango nyonso na makambo ya bato mpe na mokano ya Yehova mpo na bato mpe mpo na mabele. (Masese 8:30, 31; 1 Petro 1:11, 12) Na ntembe te, bayokaki mawa mingi ntango Adama ná Eva batombokelaki Nzambe. Lelo mpe bayokaka mawa mingi koleka ntango bamonaka bato mingi bazali kotosa Yehova te. Kasi, soki moto abongoli motema mpe  azongeli Nzambe, baanzelu basepelaka mingi. (Luka 15:10) Baanzelu basepelaka mingi na bato oyo basalelaka Nzambe. Yehova asalelaka baanzelu mpo na kosalisa basaleli na ye mpe kobatela bango awa na mabele. (Baebre 1:7, 14) Tótalela ndambo ya bandakisa yango.

“Nzambe na ngai atindaki anzelu na ye mpe akangaki monɔkɔ ya bankɔsi.”​—Danyele 6:22

5. Ndenge nini baanzelu basalisaki basaleli ya Nzambe na ntango ya kala?

5 Yehova atindaki baanzelu mibale básalisa Lota ná libota  na ye bábika ntango Sodoma ná Gomora esengelaki kobebisama. (Ebandeli 19:15, 16) Bankama ya bambula na nsima, babwakaki mosakoli Danyele na libulu ya bankɔsi, kasi mabe moko te ekómelaki ye mpo “Nzambe . . . atindaki anzelu na ye mpe akangaki monɔkɔ ya bankɔsi.” (Danyele 6:22) Nsima ya bambula, ntango Ntoma Petro azalaki na bolɔkɔ, Yehova atindaki anzelu moko mpo abimisa ye. (Misala 12:6-11) Baanzelu basalisaki mpe Yesu ntango azalaki awa na mabele. Na ndakisa, nsima ya batisimo na ye, “baanzelu bazalaki kosalela ye.” (Marko 1:13) Mwa moke liboso báboma Yesu, anzelu moko ‘alendisaki ye.’​—Luka 22:43.

6. (a) Ndenge nini toyebi ete baanzelu basalisaka basaleli ya Nzambe lelo? (b) Tokoyanola na mituna nini?

6 Lelo oyo, baanzelu babimelaka lisusu bato te. Kasi, Nzambe azali kaka kosalela bango mpo na kosalisa basaleli na ye. Biblia elobi: “Anzelu ya Yehova atɛlɛmaka penepene na baoyo babangaka ye, mpe abikisaka bango.” (Nzembo 34:7) Mpo na nini tosengeli kobatelama? Mpo tozali na banguna ya nguya oyo balukaka kosala biso mabe. Banguna yango banani? Bautá wapi? Na ndenge nini balukaka kosala biso mabe? Mpo na koyanola na mituna yango, tótalela likambo oyo esalemaki mwa moke nsima ya kokelama ya Adama ná Eva.

BANGUNA OYO TOMONAKA TE

7. Bato basali nini lokola Satana akosi bango?

7 Na Mokapo 3, toyekolaki ete anzelu moko atombokelaki Nzambe mpe alukaki koyangela basusu. Biblia ebengi ye Satana Zabolo. (Emoniseli 12:9) Satana atindaki mpe basusu bátombokela Nzambe. Alongaki kokosa Eva, mpe banda wana akosá bato ebele. Kasi, bato mosusu, na ndakisa Abele, Enoka, mpe Noa, batikalaki sembo epai ya Yehova.​—Baebre 11:4, 5, 7.

8. (a) Ndenge nini baanzelu mosusu bakómaki bademo? (b) Bademo basalaki nini mpo bákufa te na Mpela?

 8 Na mikolo ya Noa, baanzelu mosusu batombokelaki Nzambe mpe batikaki esika na bango na likoló, mpo na kofanda lokola bato awa na mabele. Mpo na nini? Biblia elobi ete balingaki kozwa basi. (Tángá Ebandeli 6:2.) Kasi kosala bongo ezalaki mabe mpo na baanzelu. (Yuda 6) Ndenge moko na baanzelu mabe wana, bato mingi na ntango wana bakómaki na bizaleli mabe mpe mobulu makasi. Na yango, Yehova akanaki kozindisa mokili mobimba na mai mpo na koboma bato mabe. Kasi abikisaki basaleli na ye ya sembo. (Ebandeli 7:17, 23) Baanzelu mabe yango bazongaki na likoló mpo bákufa te. Biblia ebengi baanzelu mabe yango bademo. Baponaki kosangana na Satana na botomboki na ye, mpe Zabolo akómaki mokonzi na bango.​—Matai 9:34.

9. (a) Nini ekómelaki bademo ntango bazongaki na likoló? (b) Tokolobela nini sikoyo?

9 Lokola baanzelu yango bakómaki batomboki to bademo, Yehova ayambaki bango lisusu te na libota na ye. (2 Petro 2:4) Bademo bakoki lisusu kolata nzoto ya bato te, kasi bazali kaka “kokosa mabele mobimba esika bato bafandi.” (Emoniseli 12:9; 1 Yoane 5:19) Tólobela naino ndenge balongi kokosa ebele ya bato.​—Tángá 2 Bakorinti 2:11.

NDENGE BADEMO BAKOSAKA BATO

10. Ndenge nini bademo bakosaka bato?

10 Bademo bakosaka bato na mayele ndenge na ndenge. Ntango bato basololaka na bademo basalaka yango mpenza bango moko, to na nzela ya nganga-nkisi to ya moto ya maji. Kosolola na bademo ebengami misala ya bademo to misala ya bilimo mabe. Kasi, Biblia esɛngi biso tóboya eloko nyonso oyo ezali na boyokani na bademo. (Bagalatia 5:19-21) Mpo na nini? Ndenge kaka mobomi-nyama  asalelaka motambo mpo na kokanga banyama, bademo basalelaka mayele mabe mpo na kokanga bato mpe kokonza bango.​—Talá Etanda 26.

11. Bato basalaka nini mpo na kosakola makambo oyo ekoya? Mpo na nini tosengeli koboya makambo yango?

11 Moko ya mayele oyo bademo basalelaka ezali kosakola makambo oyo ebombamá. Bato oyo basalaka yango basalelaka nguya ya bilimo mpo na koyeba makambo oyo ekoya to oyo eyebani te. Mpo na kosala yango, bato mosusu batalaka minzoto, bilembo, bakarte, talatala, to banzela ya mabɔkɔ ya moto. Bato mingi bakanisaka ete makambo yango ezali mabe te, nzokande bamikosaka. Makambo wana ezali mabe mpenza. Na ndakisa, Biblia emonisi ete bato oyo basakolaka makambo oyo ekoya basalaka yango na nguya ya bademo. Na Misala 16:16-18 totángi ete “demo moko ya kosakola makambo oyo ebombaná” akɔtelaki mwana mwasi moko mpo asakolaka “makambo oyo ekoya.” Ntango ntoma Paulo abimisaki demo yango, mwana mwasi wana azalaki lisusu na likoki ya kosakola makambo oyo ekoya te.

12. (a) Mpo na nini ezali likama koluka kosolola na bato oyo bakufá? (b) Mpo na nini basaleli ya Nzambe basengeli kosala soki moke te milulu oyo ezali na boyokani na bademo?

12 Bademo basalelaka mpe mayele mosusu mpo na kokosa bato. Balukaka kondimisa bato ete bakoki kosolola na bato oyo bakufá, ete bato oyo bakufá bazali na bomoi esika moko boye, mpe bakoki koyebisa bango makambo to kosala bango mabe. Na ndakisa, moto oyo ndeko to moninga na ye akufi akoki kokende epai ya moto oyo asololaka na bilimo, oyo akoyebisa ye ete akoki kosolola na ndeko to moninga na ye oyo akufi. Moto oyo asololaka na bilimo akoki koyebisa moto wana likambo moko oyo etali ndeko to moninga oyo akufá to kutu komekola mongongo na ye. (1 Samwele 28:3-19) Milulu  mingi oyo bato basalaka soki moto akufi basalaka yango mpe mpo bakanisaka ete bakufi bazalaka na bomoi esika moko boye. Ekoki kozala milulu ya kokunda ebembe, kokanisa mokolo oyo moto moko akufaki, kokende kotya biloko na lilita, konyokola mwasi to mobali oyo molongani na ye akufi, kolata pili, to kosala milulu liboso to nsima ya kokunda ebembe. Ntango mokristo aboyi kosala makambo yango, bato ya libota to bato ya mboka bakoki kotyola ye, kofinga ye to mpe koyina ye. Kasi, bakristo bayebi ete bato oyo bakufá bazalaka na bomoi esika mosusu te. Tokoki lisusu kosolola na bango te mpe bakoki kosala biso mabe te. (Nzembo 115:17) Kebá! Koluka ata moke te kosolola na bato oyo bakufá to bademo mpe kosala ata mokolo moko te milulu oyo ezali na boyokani na bademo.​—Tángá Kolimbola Mibeko 18:10, 11; Yisaya 8:19.

13. Ebele ya bato oyo bazalaki kobanga bademo basalá nini?

13 Bademo basukaka kaka te na kokosa bato, babangisaka mpe bango. Lelo oyo, Satana ná bademo na ye bayebi ete batikali kaka “na ntango mokuse” mpo Nzambe alongola bango na mabele. Yango wana, bakómi na nkanza mpe na nkanda makasi koleka. (Emoniseli 12:12, 17) Nzokande, ebele ya bato oyo bazalaki kobanga bademo babangaka bango lisusu te. Nini esalisaki bango bátika kobanga bademo?

TƐMƐLÁ BADEMO MPE KATÁ BOYOKANI NYONSO NA BANGO

14. Na ndakisa ya bakristo ya siɛklɛ ya liboso, ndenge nini tokoki kokata boyokani na bademo?

14 Biblia eyebisi biso ndenge ya kotɛmɛla bademo mpe kokata boyokani na bango. Na ndakisa, na engumba ya Efese, bato mosusu bazalaki kosolola na bademo liboso ete báyeba solo. Ndenge nini bakataki boyokani na  bademo? Biblia elobi: “Ebele ya baoyo bazalaki kosala misala ya maji basangisaki babuku na bango esika moko mpe batumbaki yango na miso ya bato nyonso.” (Misala 19:19) Lokola balingaki kokóma bakristo, batumbaki babuku na bango nyonso ya maji. Esengeli mpe kosala bongo lelo. Moto nyonso oyo alingi kosalela Yehova asengeli kotika makambo nyonso oyo ezali na boyokani na bademo. Ekoki kozala babuku, bazulunalo, kotala minzoto mpo na koyeba makambo ekoya, bafilme, miziki, masano, ata mpe bafɔtɔ oyo emonisaka ete misala ya maji, ya bademo, to bimonaneli ezali mabe te to ezali kaka mpo na kosepelisa. Ekoki mpe kozala mwa biloko oyo bato balataka mpo na komibatela mpo bilimo mabe esala bango mabe te.​—1 Bakorinti 10:21.

15. Tosengeli lisusu kosala nini mpo na kotɛmɛla Satana ná bademo?

15 Mwa bambula na nsima, ntoma Paulo akomelaki bato ya Efese oyo batumbaki babuku na bango ya maji ete basengeli kokoba “kobunda etumba . . . na mampinga ya bilimo mabe.” (Baefese 6:12) Ya solo, batumbaki babuku na bango, kasi bademo bazalaki kaka koluka kosala bango mabe. Na yango, basengelaki lisusu kosala nini? Ntoma Paulo ayebisaki bango: “Bókamata nguba monene ya kondima, oyo na yango, bokokoka koboma mɔtɔ ya mbanzi nyonso oyo ezali kopela ya moto mabe.” (Baefese 6:16) Ndenge kaka nguba ebatelaka soda na etumba, kondima ekoki kobatela biso. Soki totyeli Yehova motema mobimba ete akobatela biso, tokotɛmɛla Satana ná bademo na ye.​—Matai 17:20.

16. Ndenge nini tokoki kokómisa kondima na biso epai ya Yehova makasi?

16 Ndenge nini tokoki kokómisa kondima na biso epai ya Yehova makasi? Tosengeli kotángaka Biblia mokolo na mokolo mpe koyekola kotyela Yehova motema ete akobatela biso. Soki tozali na kondima makasi epai ya Yehova,  Satana ná bademo bakokoka kosala biso mabe te.​—1 Yoane 5:5.

17. Eloko nini mosusu ekoki kobatela biso mpo bademo básala biso mabe te?

17 Likambo nini lisusu bakristo ya Efese basengelaki kosala? Bafandaki na engumba oyo etondaki na misala ya bademo. Yango wana, ntoma Paulo ayebisaki bango: ‘Bókoba kobondela na libaku nyonso.’ (Baefese 6:18) Basengelaki kosɛnga Yehova abatela bango ntango nyonso. Bongo biso? Biso mpe tozali na mokili oyo etondi na misala ya bademo. Biso mpe tosengeli kosɛngaka Yehova abatela biso, mpe tosengeli kosalelaka nkombo na ye ntango tozali kobondela. (Tángá Masese 18:10.) Soki tokobi kosɛnga Yehova abikisa biso mpo tókwea na mitambo ya Satana te, akoyanola mabondeli na biso.​—Nzembo 145:19; Matai 6:13.

18, 19. (a) Ndenge nini tokoki kolonga etumba oyo tozali kobunda na Satana ná bademo? (b) Motuna nini tokoyanola na mokapo oyo elandi?

18 Soki tolongoli eloko nyonso oyo ezali na boyokani na bademo mpe totyeli Yehova motema ete akobatela biso, tokokoka kotɛmɛla Satana ná bademo. Ntina ya kobanga bango ezali te. (Tángá Yakobo 4:7, 8.) Yehova aleki bademo na nguya mosika mpenza. Apesaki bango etumbu na mikolo ya Noa, mpe na mikolo ezali koya, akoboma bango. (Yuda 6) Kobosana te, tozali kobunda biso moko te. Yehova azali kosalela baanzelu na ye mpo na kobatela biso. (2 Bakonzi 6:15-17) Tokoki mpenza kondima ete Yehova akosalisa biso tólonga etumba oyo tozali kobunda na Satana ná bademo.​—1 Petro 5:6, 7; 2 Petro 2:9.

19 Kasi soki Satana ná bademo bazali komonisa bato mpasi mingi boye, mpo na nini Nzambe abomi bango naino te? Tokoyanola motuna yango na mokapo oyo elandi.