MOKAPO YA ZOMI NA LIBWA
Tikalá na kati ya bolingo ya Nzambe
-
Kolinga Nzambe elakisi nini?
-
Ndenge nini tokoki kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe?
-
Mbano nini Yehova akopesa baoyo bazali kotikala na kati ya bolingo na ye?
1, 2. Lelo oyo epai wapi tokoki kozwa esika ya komibomba ya malamu mpenza?
KANISÁ ete ozali kotambola na nzela mpe mopɛpɛ makasi ebandi. Likoló eyindi mpenza mpe etondi na mikalikali, bankake ezali kobɛta makasi, mpe mbula moko ya makasi ebandi konɔka. Obandi kopota mbangu, ozali koluka mpenza esika ya komibomba. Mbala moko omoni mwa ndako moko pembeni na nzela. Ezali makasi, ezali kotanga te, mpe esepelisi yo. Oyo nde esika malamu ya komibomba mpo na yo!
2 Tozali kobika na ntango moko ya yikiyiki. Makambo ya mokili ezali kobeba se kobeba. Kasi tozali na esika ya komibomba oyo ezali malamu mpenza mpe oyo ekoki kobatela biso mpo ete makambo oyo ekoki kobebisa bomoi na biso libela ekómela biso te. Esika yango nini? Talá oyo Biblia ezali koteya biso: ‘Nakoloba epai na [Yehova] ete, Yo ozali ebombamelo na ngai mpe ndako na ngai ya makasi, Nzambe na ngai oyo nakotyela motema.’—Nzembo 91:2.
3. Ndenge nini tokoki kosala ete Yehova azala esika na biso ya komibomba?
3 Kanisá naino! Yehova, Mozalisi mpe Mokonzi Monene ya molɔ́ngɔ́ akoki kozala esika na biso ya komibomba. Akoki kobatela biso, mpamba te azali na makasi koleka bato nyonso to biloko nyonso oyo ekoki kosala biso mabe. Ata soki eloko moko esali biso mabe, Yehova akoki kosilisa mikakatano nyonso oyo yango ebimiseli biso. Ndenge nini tokoki kosala ete Yehova azala esika na biso ya komibomba? Tosengeli kotyela ye motema. Lisusu, Liloba ya Nzambe ezali kolendisa biso ete: “Bómibatela na kati ya bolingo ya Nzambe.” (Yuda 21) Ya solo, tosengeli kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe, kokangama na Tata na biso ya likoló mpe kolinga ye ntango nyonso. Soki tosali yango, tokoki solo kondima ete azali esika na biso ya komibomba. Kasi ndenge nini tokoki kokangama na ye bongo?
LUKÁ KOYEBA BILEMBO YA BOLINGO YA NZAMBE MPE MONISÁ BOTƆNDI
4, 5. Wapi makambo mosusu oyo Yehova asali mpo na komonisa ete alingaka biso?
4 Mpo tótikala na kati ya bolingo ya Nzambe, tosengeli koyeba makambo oyo Yehova asali mpo na komonisa ete alingaka biso. Kanisá mateya mosusu ya Biblia oyo oyekoli na buku oyo. Yehova, Mozalisi, apesi biso mabelé oyo ekokani na ndako moko ya kitoko mpenza. Atondisi yango na ebele ya bilei, mai, biloko ndenge na ndenge, banyama kitoko, mpe bisika kitoko mpenza. Lokola Nzambe nde akomisaki makambo oyo ezali na Biblia, amonisi biso nkombo na ye mpe bizaleli na ye. Liloba na ye emonisi lisusu ete atindaki Yesu, Mwana na ye ya bolingo, awa na mabelé, atikaki ye amona mpasi mpe akufa mpo na biso. (Yoane 3:16) Bongo likabo yango ezali na ntina nini mpo na biso? Epesi biso elikya ya bomoi malamu mpenza na mikolo oyo ezali koya.
5 Elikya na biso mpo na mikolo oyo ezali koya euti mpe na likambo mosusu oyo Nzambe asali. Yehova atye guvɛrnema moko na likoló, Bokonzi ya Masiya. Etikali moke Bokonzi yango esilisa bampasi nyonso mpe ekómisa mabelé paladiso. Kanisá naino! Tokoki kozala na bomoi na paladiso yango, na kimya mpe na esengo, mpo na libela. (Nzembo 37:29) Wana tozali kozela yango, Nzambe apesi biso toli mpo tókoka kozala na bomoi ya malamu mpenza uta sikawa. Apesi mpe biso likabo ya libondeli, oyo na nzela na yango tokoki ntango nyonso kosolola na ye. Wana ezali kaka mwa ndambo ya makambo oyo Nzambe asali mpo na komonisa ete alingaka bato nyonso mpe alingaka yo.
6. Mbala mosusu okozongisela Yehova nini mpo na bolingo oyo alingi yo?
6 Motuna ya ntina mingi oyo osengeli komituna yango oyo: Nakozongisela Yehova nini mpo na bolingo na ye? Bato mingi bakoloba ete: “Ya solo, ebongi ngai mpe nalinga Yehova.” Yo mpe ozali kokanisa bongo? Yesu alobaki ete mobeko oyo eleki monene yango oyo: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.” (Matai 22:37) Na ntembe te, ozali na makambo mingi oyo esengeli kotinda yo olinga Yehova Nzambe. Kasi, kolinga Yehova na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso esuki kaka na koyoka na motema ete olingi ye bongo?
7. Kolinga Nzambe esuki kaka na koyoka na motema ete olingi ye? Limbolá.
7 Ndenge Biblia emonisi yango, kolinga Nzambe esuki kaka te na koyoka na motema ete olingi ye. Atako koyoka ete olingaka Yehova ezali na ntina mingi, kasi yango ezali kaka ebandeli ya bolingo ya solosolo oyo osengeli kolinga ye. Mbuma ya pomɛ ezali na ntina mingi mpo na kobimisa nzete oyo ekobota bapomɛ. Nzokande, soki ozali na mposa ya pomɛ, okosepela soki moto moko apesi yo kaka mbuma na yango? Ata moke te! Ndenge moko mpe, koyoka ete olingaka Yehova Nzambe ezali bobele ebandeli. Biblia elobi: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye, ete tótosaka [mibeko] na ye; kutu [mibeko] na ye ezali kilo te.” (1 Yoane 5:3) Kolinga Nzambe solosolo esengeli komonana na mbuma ya malamu mpenza. Bolingo yango esengeli komonana na misala.—Matai 7:16-20.
8, 9. Ndenge nini tokoki komonisa bolingo mpe botɔndi na biso epai na Nzambe?
8 Tomonisaka ete tolingi Nzambe ntango totosaka mibeko na ye mpe tolandaka mitinda na ye. Kosala bongo ezali likambo ya mpasi te. Mibeko ya Yehova ezali kilo te, apesi yango nde mpo na kosalisa biso tózala na bomoi ya malamu mpe ya esengo. (Yisaya 48:17, 18) Soki na bomoi na biso tozali kolanda toli ya Yehova, Tata na biso ya likoló, yango ekomonisa ete tozali solo na botɔndi mpo na nyonso oyo asaleli biso. Likambo ya mawa, na mokili ya lelo bato mingi te bamonisaka botɔndi ya ndenge wana. Tolingi te kozala bato bazangi botɔndi, lokola bato mosusu oyo bazalaki na bomoi ntango Yesu azalaki awa na mabelé. Yesu abikisaki bato ya maba zomi, kasi kaka moko nde azongaki kopesa ye botɔndi. (Luka 17:12-17) Na ntembe te, biso tokolinga kozala lokola oyo amonisaki botɔndi, kasi te lokola basusu libwa oyo bazangaki botɔndi!
9 Bongo, wapi mibeko ya Yehova oyo tosengeli kotosa? Tolobeli mwa ndambo na yango na buku oyo, kasi tózongela mosusu. Kotosa mibeko ya Nzambe ekosalisa biso tótikala na kati ya bolingo na ye.
PUSANÁ NTANGO NYONSO PENEPENE NA YEHOVA
10. Limbolá mpo na nini ezali na ntina mingi ete tólanda koyeba makambo ya Yehova Nzambe mingi.
10 Koyekola makambo ya Yehova ezali likambo ya ntina mpenza mpo na kopusana penepene na ye, mpe yango esengeli kosuka te. Soki ozali libándá na butu moko oyo mpiɔ ezali makasi, ozali koyɔta mɔtɔ, okotika mɔtɔ yango ebanda kozimana mokemoke tii ekokufa? Te. Okokoba kobakisa nkoni mpo mɔtɔ epela makasi mpo ebengana mpiɔ. Ntango mosusu, soki osali bongo te, okoki kokufa! Se ndenge nkoni epelisaka mɔtɔ, ‘koyeba Nzambe’ ekómisaka mpe bolingo oyo tolingaka Yehova makasi.—Masese 2:1-5.
11. Mateya ya Yesu esalaki bayekoli na ye nini?
11 Yesu alingaki ete bayekoli na ye bálingaka Yehova mpe Liloba na Ye oyo ezali na motuya mingi mpe bolingo yango ezala ntango nyonso makasi. Nsima ya kosekwa, Yesu ateyaki bayekoli na ye mibale makambo ya bisakweli mosusu ya Makomami ya Liebele oyo ekokisamaki epai na ye. Mateya yango esalaki bango nini? Na nsima balobaki ete: “Mitema na biso ezalaki te kozika ntango azalaki koloba na biso na nzela, ntango azalaki kofungolela biso Makomami polelepolele?”—Luka 24:32.
12, 13. (a) Bolingo oyo bato mingi ya mikolo na biso balingaka Nzambe mpe Biblia ekómi ndenge nini? (b) Tokoki kosala nini mpo bolingo na biso ekóma mpiɔ te?
12 Ntango oyekolaki mpo na mbala ya liboso makambo oyo Biblia eteyaka mpenza, oyokaki ete motema na yo ebandi kotonda na esengo, na mposa makasi mpe na bolingo epai ya Nzambe? Na ntembe te, oyokaki bongo. Bato mingi bayokaki mpe bongo. Likambo ya mpasi sikoyo ezali ya kobatela bolingo makasi yango ekita te, kasi nde ekóma lisusu makasi. Tolingi te kolanda ezaleli oyo bato mingi ya mokili bazali na yango lelo. Yesu asakolaki boye: “Bolingo ya bato mingi ekokóma mpiɔ.” (Matai 24:12) Ndenge nini okoki kosala ete bolingo oyo olingaka Yehova mpe solo ya Biblia ekóma mpiɔ te?
13 Kotika te koyekola koyeba Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto. (Yoane 17:3) Manyolá, to kanisá malamumalamu makambo oyo ozali koyekola na Liloba ya Nzambe; omitunaka boye: ‘Makambo oyo nayekoli eteyi ngai nini mpo na Yehova Nzambe? Wapi ntina mosusu oyo yango epesi ngai ya kolinga ye na motema na ngai mobimba, na makanisi na ngai nyonso mpe na molimo na ngai mobimba?’ (1 Timote 4:15) Komanyola bongo ekosala ete olinga ntango nyonso Yehova makasi mpenza.
14. Ndenge nini libondeli ekoki kosala ete bolingo oyo tolingaka Yehova ezala kaka makasi?
14 Lolenge mosusu ya kosala ete bolingo oyo tolingaka Yehova ezala ntango nyonso makasi, ezali ya kobondela ntango nyonso. (1 Batesaloniki 5:17) Na Mokapo 17 ya buku oyo, tomonaki ete libondeli ezali likabo ya motuya mingi oyo Nzambe apesi biso. Se ndenge boyokani kati na bato ekómaka makasi soki bazali kosolola mbala na mbala mpe bazali koyebisana makambo polele, bobele bongo boyokani na biso na Yehova ekotikala makasi soki tozali kobondela ye mbala na mbala. Tosengeli te kokóma na momeseno ya kozongelaka mbala na mbala na mabondeli na biso maloba ndenge moko, oyo ezangi ntina to oyo euti mpenza na motema te. Tosengeli kosolola na Yehova lokola mwana asololaka na tata na ye ya bolingo. Tokosolola na ye nde na limemya, kasi na kozanga kobanga, na bosembo mpe na motema mobimba. (Nzembo 62:8) Koyekola Biblia biso moko mpe kobondela na motema mobimba ezali makambo ya ntina mingi ya losambo na biso, mpe esalisaka biso tótikala na kati ya bolingo ya Nzambe.
SAMBELÁ YEHOVA NA ESENGO
15, 16. Mpo na nini tokoki mpenza kotalela mosala ya kosakola Bokonzi ete ezali mosala ya lokumu monene mpe eloko moko ya motuya?
15 Koyekola Biblia biso moko mpe kobondela ezali makambo ya losambo oyo mokomoko na biso akoki kosala ye moko. Kasi sikoyo tólobela likambo mosusu ya losambo oyo tosalaka na miso ya bato: koyebisa bato mateya ya lingomba na biso. Osilá koyebisa bato mateya ya solo ya Biblia? Soki ɛɛ, ozwaki mpenza libaku moko ya malamu mingi. (Luka 1:74) Ntango toyebisaka bato mateya ya solo ya Yehova Nzambe oyo toyekoli, tokokisaka mokumba moko ya ntina mingi oyo bapesi baklisto nyonso ya solo—kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.—Matai 24:14; 28:19, 20.
16 Mpo na ntoma Paulo, mosala na ye ya kosakola ezalaki na valɛrɛ mingi. Kutu abengaki yango eloko ya motuya. (2 Bakolinti 4:7) Koyebisa bato makambo ya Yehova Nzambe mpe mikano na ye ezali mosala ya malamu oyo eleki misala nyonso. Mpo na nini? Mpamba te Nkolo ya mosala yango azali malamu koleka bankolo nyonso, mpe mosala yango eleki misala mosusu nyonso na matomba. Ntango omipesi na mosala yango ya kosakola, ozali kosalisa bato ya motema sembo bápusana penepene na Tata na biso ya likoló mpe bábanda kotambola na nzela ya bomoi ya seko! Mosala mosusu nini ekoki mpenza kopesa esengo bongo? Lisusu, ntango ozali kopesa litatoli mpo na Yehova mpe mpo na Liloba na ye, kondima na yo ezali kokóma makasi mpe okolinga ye mingi. Mpe milende na yo ezali na valɛrɛ mingi na miso ya Yehova. (Baebele 6:10) Soki ozali kosala ntango nyonso mosala yango na molende, okotikala na kati ya bolingo ya Nzambe.—1 Bakolinti 15:58.
17. Mpo na nini mosala ya kosakola esengeli kosalema nokinoki lelo oyo?
17 Ezali na ntina mingi obosana te ete mosala ya kosakola Bokonzi ezali likambo oyo esengeli kosalema nokinoki. Biblia elobi: “Sakolá liloba, salá yango na molende.” (2 Timote 4:2) Mpo na nini lelo oyo kosakola ezali likambo oyo esengeli kosalema nokinoki? Liloba ya Nzambe eyebisi biso ete: “Mokolo monene ya [Yehova] ebɛlɛmi; ebɛlɛmi, eyei mbangu mpenza.” (Sefania 1:14) Ɛɛ, etikali moke mpenza Yehova asukisa ebongiseli mobimba ya makambo ya ntango oyo. Esengeli kokebisa bato! Basengeli koyeba ete sikawa nde ntango ya kopona Yehova azala Mokonzi Monene na bango. Nsuka “ekokóma nsima ya ngonga te.”—Habakuku 2:3, NW.
18. Mpo na nini tosengeli kosambela Yehova elongo na baklisto mosusu ya solo?
18 Yehova alingi tósambelaka ye elongo na baklisto mosusu ya solo. Yango wana Liloba na ye elobi ete: “Tiká tótyelanaka likebi mpo na kopusama na kozala na bolingo mpe na misala ya malamu, kotikáká te koyangana na biso mpenza, ndenge bamosusu bamesaná kosala, kasi nde tólendisanaka, mpe tósalaka bongo na koleka mpenza lokola bozali komona mokolo yango ezali kokóma pene.” (Baebele 10:24, 25) Ntango tosanganaka na makita ya boklisto elongo na baninga na biso bandimi, tozalaka na libaku malamu mpenza ya kosanzola mpe kosambela Nzambe na biso ya bolingo. Longola yango, tolendisanaka mpe toyikisanaka mpiko.
19. Ndenge nini tokoki kosala mpo ete bolingo ekóma makasi na kati ya lisangá ya boklisto?
19 Ntango tozali esika moko na basaleli mosusu ya Yehova, bolingo mpe boninga na kati ya lisangá ekómaka makasi. Ezali na ntina mingi tólukaka makambo ya malamu epai na baninga na biso, se ndenge Yehova alukaka makambo ya malamu epai na biso. Kosɛnga te ete baninga na yo bandimi básalaka makambo lokola bato ya kokoka. Kobosana te ete bango nyonso bazali makasi ndenge moko te na elimo, mpe ete biso nyonso tosalaka mabunga. (Bakolose 3:13) Luká kokóma moninga ya motema ya baoyo balingaka Yehova mingi, mpe okomona ete ozali solo kokola na elimo. Kosambela Yehova elongo na bandeko na yo ya elimo ekosalisa yo mpenza otikala na kati ya bolingo ya Nzambe. Mbano nini Yehova akopesa baoyo bazali kosambela ye na bosembo mpe bazali kotikala na kati ya bolingo na ye?
LUKÁ KOZWA “BOMOI YA SOLOSOLO”
20, 21. “Bomoi ya solosolo” ezali nini, mpe mpo na nini yango ezali elikya moko malamu mpenza?
20 Yehova akopesa basaleli na ye ya sembo mbano ya bomoi, kasi bomoi ya ndenge nini? Mpo na yo, tozali mpenza na bomoi sikoyo? Bato mingi bakoloba ete eyano ezali polele. Lokola tozali kopema, kolya mpe komɛla, emonisi mpenza ete tozali na bomoi. Mpe na bantango oyo tozalaka mpenza na esengo, mbala mosusu tolobaka kutu ete: “Bomoi ya solosolo yango oyo!” Nzokande, Biblia ezali koloba mpenza ete ata moto moko te lelo oyo azali na bomoi ya solosolo.
21 Liloba ya Nzambe ezali kolendisa biso ‘tósimba makasi bomoi ya solosolo.’ (1 Timote 6:19) Maloba oyo emonisi ete “bomoi ya solosolo” ezali eloko oyo tozali na elikya ya kozwa na mikolo oyo ezali koya. Ɛɛ, ntango tokokóma bato ya kokoka nde tokozala na bomoi ya solosolo mpenza, mpamba te na ntango wana tokozala mpenza na bomoi ndenge Nzambe alingaki tózala na yango. Ntango tokozala na paladiso awa na mabelé na nzoto kolɔngɔnɔ mpenza, na kimya mpe na esengo, wana nde tokokóma na “bomoi ya solosolo”—bomoi ya seko. (1 Timote 6:12) Wana ezali solo elikya moko kitoko, boye te?
22. Ndenge nini okoki ‘kosimba makasi bomoi ya solosolo’?
22 Ndenge nini tokoki ‘kosimba makasi bomoi ya solosolo’? (1 Timote 6:19) Ntango Paulo alobelaki likambo yango, alendisaki mpe baklisto “básala makambo ya malamu” mpe “bázala bato ya bomɛngo na misala ya malamu mpenza.” (1 Timote 6:18) Emonani polele ete ndenge oyo totosaka mateya ya solo oyo toyekoli na Biblia ezali na ntina mingi. Kasi Paulo alingaki nde koloba ete “bomoi ya solosolo” yango ezali nde lifuti ya misala malamu oyo tosalaka? Te, mpamba te bomoi ya malamu mpenza ndenge wana euti nde na “boboto monene” ya Nzambe. (Baloma 5:15) Atako bongo, Yehova asepelaka mingi kopesa mbano na baoyo basalelaka ye na bosembo. Alingi ete ozala na “bomoi ya solosolo.” Bomoi ya esengo, ya kimya mpe ya seko na seko ya ndenge wana ekozala mpo na baoyo nyonso bakotikala na kati ya bolingo ya Nzambe.
23. Mpo na nini kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe ezali na ntina mingi?
23 Mokomoko na biso asengeli komituna: ‘Nazali kosambela Nzambe na ndenge asɛngi na Biblia?’ Soki tozali kokeba mokolo na mokolo, ete eyano na biso ezalaka ɛɛ, boye tozali na nzela ya malamu. Tokoki solo kotya motema ete Yehova azali esika na biso ya komibomba. Akobatela basaleli na ye ya sembo na mikolo mabe ya nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo. Yehova akobikisa mpe biso mpo na kokɔtisa biso na ebongiseli ya makambo ya sika ya nkembo oyo ekómi pene. Tokozala na nsai monene ya komona likambo yango! Mpe tokozala solo na esengo makasi ete tozwaki bikateli ya malamu na mikolo oyo ya nsuka! Soki ozwi bikateli wana sikawa, okozwa mpo na libela “bomoi ya solosolo,” oyo Yehova alingaki ozala na yango!